7
Yesu mpe bokoko ya Bayuda
(Mat 15.1-20)
Bafarizeo mpe ndambo ya balakisi ya Mobeko oyo bawutaki na Yelusalemi basanganaki zingazinga ya Yesu. Bamonaki bayekoli mosusu ya Yesu kolia lipa na maboko ya mbindo, elingi koloba na maboko oyo basukola te. Nzokande, Bafarizeo mpe Bayuda nyonso baliaka te soki basukoli te maboko malamu. Ezalaki na nzela wana nde bazalaki kotosa bokoko na bango. Mpe soki bawuti na esika oyo bato ebele bakutanaka, baliaka te soki bamipetoli nanu te na mayi. Bazalaki lisusu na mibeko ebele ya bokoko oyo bazalaki kotosa, ndakisa : kosukola bakopo, bambeki, bambeto mpe basani ya bibende. Boye, Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko batunaki Yesu :
— Mpo na nini bayekoli na yo bazali kotosa te bokoko na biso ? Mpo na nini bazali kolia na maboko ya mbindo ?
Yesu azongiselaki bango :
— Bato ya bilongi mibale ! Mosakoli Ezayi asakolaki penza malamu na tina na bino, kolanda ndenge ekomama :
« Bato oyo bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu,
kasi mitema na bango ezali mosika na Ngai ;
basambelaka Ngai kaka na pamba,
mateya na bango ezali kaka mibeko ya bomoto. »
Botiaka mibeko ya Nzambe pembeni mpo na kotosa bokoko ya bato.
Alobaki na bango lisusu :
— Boyebi malamu penza kosundola mibeko ya Nzambe mpo na kobatela bokoko na bino. 10  Solo, Moyize alobaki : « Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu ; » mpe « moto oyo akolakela tata na ye to mama na ye mabe asengeli na etumbu ya kufa. »
11  Kasi bino, boteyaka ete soki moto alobi na tata na ye to na mama na ye : « Lisungi oyo nalingaki kopesa yo, nakobonza yango lokola likabo epai ya Nzambe, » 12  akangolami na mokumba ya kosalela tata na ye to mpo na mama na ye likambo songolo. 13  Na bongo, bokomisaka pamba Liloba na Nzambe na nzela ya bokoko oyo bolakisaka. Mpe bosalaka makambo mosusu ebele ya lolenge wana.
14 Yesu abengaki lisusu ebele ya bato mpe alobaki na bango :
— Bino nyonso, boyoka Ngai mpe bososola likambo oyo. 15  Eloko moko te oyo ewuti na libanda mpe ekoti kati na moto ekoki kokomisa ye mbindo, kasi ezali oyo ebimaka kati na moto nde ekomisaka ye mbindo. [ 16  Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !]* Eteni oyo ezali te kati na mikanda mosusu ya kala.
17 Tango Yesu atikaki ebele ya bato mpe akotaki na ndako, bayekoli na Ye batunaki Ye tina ya lisese yango. 18 Alobaki na bango :
— Bino mpe, boni, bozali mayele te ? Bozali kososola te ete eloko moko te oyo ewuti na libanda mpe ekoti kati na moto ekoki kokomisa ye mbindo. 19  Pamba te ekendaka te na motema na ye, kasi ekendaka nde na libumu na ye ; mpe na sima, ekendaka na zongo.
Na maloba oyo, Yesu atatolaki ete bilei nyonso ezali peto.
20 Yesu alobaki lisusu :
— Oyo ebimaka na moto, yango nde ekomisaka ye mbindo. 21  Pamba te, ezali wuta na kati, na motema penza ya moto nde ewutaka makanisi mabe, kindumba, moyibi, koboma, 22  ekobo, lokoso ya mbongo, kanda, mayele mabe, pite, likunya, songisongi, mafinga, lolendo mpe makambo nyonso mosusu ya mabe. 23  Makambo nyonso wana ya mabe ewutaka kati na moto, mpe yango nde ekomisaka moto mbindo.
Kondima ya mwasi mopagano
(Mat 15.21-28)
24 Yesu alongwaki wana mpe akendeki na etuka ya Tiri Mikanda mosusu ya kala ebakisaka : « mpe ya Sidoni ». Akotaki kati na ndako moko ; alingaki te ete ata moto moko ayeba yango, kasi alongaki kaka te kobombama. 25 Pamba te, ezalaki na mwasi moko oyo mwana na ye ya mwasi azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe oyo ezalaki mpe konyokola ye makasi ; boye tango kaka ayokaki sango na tina na Yesu, ayaki komibwaka na makolo ya Ye. 26 Mwasi yango azalaki moto ya Grese, moto ya Fenisi ya Siri ; asengaki na Yesu ete abengana molimo mabe oyo ezali konyokola mwana na ye ya mwasi.
27 Kasi Yesu alobaki na ye :
— Tika bana ya ndako balia nanu mpe batonda, pamba te ezali malamu te kokamata lipa ya bana mpo na kobwakela yango bambwa !
28 Mwasi yango azongiselaki Yesu :
— Nkolo, ezali penza ya solo ; kasi bambwa eliaka biteni oyo bana bakweyisaka na se ya mesa !
29 Yesu alobaki :
— Mpo na maloba oyo olobi, kende, zonga na ndako na yo, pamba te molimo mabe esili kobima na mwana na yo ya mwasi.
30 Mpe tango akendeki na ndako, akutaki mwana na ye alali na mbeto mpe molimo mabe ebimi.
Yesu abikisi baba
31 Yesu alongwaki na engumba ya Tiri, alekaki na Sidoni mpe akendeki na ebale ya Galile wana akatisaki etuka ya bingumba zomi. 32 Bamemelaki ye moto moko oyo akufa matoyi mpe alobaka te, mpe basengaki na Yesu ete atia ye maboko. 33 Yesu alongolaki ye kati na ebele ya bato, amemaki ye na pembeni mpe atiaki ye misapi na matoyi ; atiaki ye soyi mpe asimbaki lolemo ya moto yango. 34 Atalaki na likolo, abendaki pema mpe alobaki na ye : « Fungwama ! »
35 Mbala moko, matoyi na ye efungwamaki, lolemo na ye ekangolamaki mpe akomaki koloba malamu. 36 Yesu apekisaki bango ete baloba yango na moto te. Atako azalaki kopekisa bango makasi, kasi bango bazalaki kaka kopanza sango yango koleka.
37 Bato bakamwaki makasi mpe bazalaki koloba :
— Azali kosala makambo nyonso malamu ; azali kosala ete ezala bato oyo bakufa matoyi bakoka koyoka, mpe bababa bakoka koloba.

*7:16 Eteni oyo ezali te kati na mikanda mosusu ya kala.

7:24 Mikanda mosusu ya kala ebakisaka : « mpe ya Sidoni »