13
Yesu asakoli pasi mpo na Yelusalemi
(Mat 24.1-3; Lk 21.5-7)
Wana Yesu azalaki kobima longwa na Tempelo, moko kati na bayekoli na Ye alobaki na Ye :
— Moteyi, tala ndenge mabanga oyo ezali kitoko ! Tala ndenge Ndako oyo ezali monene !
Yesu alobaki na ye :
— Ozali komona bandako minene oyo ! Libanga moko te ekotikala awa na likolo ya libanga mosusu, nyonso ekobukama.
Bongo Yesu avandaki na ngomba ya banzete ya olive, oyo etalana na Tempelo.
Petelo, Jake, Yoane mpe Andre batunaki Yesu, na esika oyo bazalaki bango moko kaka :
— Yebisa biso, makambo wana ekosalema tango nini ? Mpe elembo nini ekotalisa biso ete makambo yango nyonso ekomi pene ya kokokisama ?
Yesu alobaki na bango :
— Bosala keba ete moto moko te akosa bino ! Bato mingi bakoya na Kombo na Ngai mpe bakoloba : « Ngai nde Masiya, » mpe bakokosa bato ebele.
Tango bokoyoka basango ya bitumba mpe nungunungu na tina na bitumba, kasi bomitungisa te mpo na yango ; pamba te makambo wana esengeli kosalema, kasi ekozala nanu suka ya mokili te. Ekolo moko ekotelemela ekolo mosusu, bokonzi moko ekobundisa bokonzi mosusu, mabele ekoningana bipai na bipai, mpe nzala ekozala makasi penza. Makambo wana ekozala kaka ebandeli ya pasi lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota.
Kasi bosala keba, pamba te bakofunda bino na bisambiselo ya Bayuda mpe bakobeta bino fimbu kati na bandako ya mayangani. Likolo na Ngai, bokosamba liboso ya bayangeli mpe liboso ya bakonzi. Boye, ekozala mpo na bino libaku malamu ya kotatola solo na tina na Ngai. 10  Pamba te esengeli ete Sango Malamu esakolama liboso epai ya bikolo nyonso ya mokili. 11  Tango bakokanga bino mpo na komema bino na bisambiselo, bomitungisa te mpo na koluka makambo ya koloba ; boloba kaka oyo ekopesamela bino na tango wana, pamba te ekozala bino te bato bokoloba, kasi Molimo Mosantu. 12  Ndeko akokaba ndeko na ye mpo ete baboma ye, tata akokaba mwana na ye mpo ete baboma ye, bana bakotombokela baboti na bango mpe bakobomisa bango. 13  Bato nyonso bakoyina bino mpo na Kombo na Ngai, kasi moto oyo akoyika mpiko kino na suka akobika.
14  Tango bokomona makambo ya nkele kosalema kati na Esika ya bule, —tika ete motangi asosola malamu— wana tika ete bato oyo bakozala kati na Yuda bakima na bangomba ; 15  tika ete moto oyo akozala na likolo ya ndako akita te, mpo na kokende kozwa eloko songolo kati na ndako na ye ; 16  tika ete moto oyo akozala kati na bilanga azonga na ndako te, mpo na kokende kozwa elamba na ye ! 17  Na mikolo wana, mawa na basi oyo bakozala na bazemi mpe na ba-oyo bakozala komelisa bana mabele ! 18  Bosambela mpo ete makambo wana esalema te na eleko ya malili makasi. 19  Pamba te ekozala mikolo ya pasi, na lolenge oyo etikala nanu kozala te, wuta Nzambe akela mokili kino sik’oyo, mpe na lolenge oyo ekotikala kozala lisusu te.
20  Mpe soki Nkolo ayeisaki te mikolo yango moke, moto ata moko te akokaki kobika ; kasi mpo na baponami na Ye, akoyeisa yango moke. 21  Na tango wana, soki moto moko alobi na bino : « Klisto azali awa ! » to « Azali kuna, » bondima ye te. 22  Pamba te bamasiya ya lokuta mpe basakoli ya lokuta bakobima, bakosala bilembo minene mpe bikamwa mpo na kokosa ata baponami, soki ekokaki kosalema. 23  Boye bino, bosala keba ! Ngai, namiyebiseli bino makambo nyonso.
24  Kasi na mikolo yango, sima na pasi wana,
« moyi ekokoma molili,
sanza ekongenga lisusu te,
25  minzoto ekokweya longwa na Likolo,
mpe banguya ya Likolo ekoningisama. »
26  Bongo, bato bakomona Mwana na Moto koya kati na mapata, na nguya monene mpe na nkembo. 27  Akotinda ba-anjelu na Ye mpe akosangisa baponami na Ye longwa na bangambo nyonso minei ya mokili, longwa na suka ya mabele kino na suka ya Likolo.
28  Tika ete lisese ya nzete ya figi eteya bino : soki kaka bitape na yango elembi mpe ebandi kobimisa makasa, boyebaka ete eleko ya moyi makasi ekomi pene. 29  Ndenge moko mpe mpo na bino ; tango bokomona makambo wana kosalema, boyeba ete Mwana na Moto akomi pene, lokola na bikuke ya engumba. 30  Nazali koloba na bino penza ya solo : bato ya ekeke oyo bakoleka te kino makambo wana nyonso ekosalema. 31  Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te. 32  Mpo na oyo etali mokolo to ngonga, moko te ayebi yango, ezala ba-anjelu ya Likolo to Mwana ; Ye moko kaka Tata nde ayebi yango.
33  Bosala keba ! Bosenzela ! Pamba te boyebi te tango nini ngonga yango ekoya.
34  Ekozala lokola moto oyo akei na mobembo, bongo atiki ndako na ye mpe apesi mokumba na yango epai ya basali na ye ; apesi na mosali moko na moko mosala oyo ekoki na ye mpe apesi mitindo epai ya mokengeli ekuke ete akengela malamu. 35  Yango wana, bosenzela ; pamba te boyebi te tango nini nkolo ndako akozonga : na pokwa to na midi ya butu to tango soso elelaka to mpe na tongo. 36  Pamba te soki ayei na mbalakata, asengeli te kokuta bino bolali pongi. 37  Makambo oyo nalobi na bino, nazali koloba yango mpe na bato nyonso : Bosenzela.