15
Yesu asambi liboso ya Pilato
(Mat 27.11-26; Lk 21.1-5, 13-25; Yn 18.28-40; 19.4-16)
Tango tongo etanaki, bakonzi ya Banganga-Nzambe, bakambi ya bato, balakisi ya Mobeko mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda basanganaki mpo na kokata likambo. Bakangaki Yesu na basinga, bamemaki Ye mpe bakabaki Ye na maboko ya Pilato.
Pilato atunaki Yesu :
— Boni, ozali mokonzi ya Bayuda ?
Yesu azongisaki :
— Olobi yango.
Bakonzi ya Banganga-Nzambe bazalaki kofunda Ye na makambo ebele.
Pilato atunaki Ye lisusu :
— Boni, ozali te na eyano ya kopesa, na makambo nyonso oyo bazali koloba mpo na kofunda yo ?
Kasi Yesu azongisaki ata liloba moko te ; mpe Pilato akamwaki makasi. Na feti nyonso ya Pasika, azalaki kobimisa na boloko mokangami moko oyo bato bazalaki kosenga. Na tango wana, moto oyo bazalaki kobenga « Barabasi » azalaki kati na boloko elongo na batomboki oyo bayeisaki mobulu kati na engumba mpe babomaki moto. Ebele ya bato bayaki mpe basengaki na Pilato ete asalela bango makambo oyo amesana kosalela bango mbala na mbala.
Pilato atunaki :
— Bolingi nabimisela bino mokonzi ya Bayuda ?
10 Pilato ayebaki malamu ete ezali mpo na likunya nde bakonzi ya Banganga-Nzambe bakabaki Yesu na maboko na ye. 11 Bakonzi ya Banganga-Nzambe batindikaki ebele ya bato mpo ete basenga na Pilato ete abimisela bango Barabasi longwa na boloko.
12 Pilato atunaki bango :
— Nasala nini na moto oyo bozali kobenga mokonzi ya Bayuda ?
13 Bagangaki lisusu :
— Baka ye na ekulusu !
14 Pilato atunaki bango lisusu :
— Mabe nini asali ?
Kasi bakobaki kaka koganga makasi koleka :
— Baka ye na ekulusu !
15 Lokola Pilato alingaki kosepelisa ebele ya bato, abimiselaki bango Barabasi longwa na boloko. Sima na kobetisa Yesu fimbu, Pilato apesaki Ye na maboko na bango mpo ete babaka Ye na ekulusu.
Basoda batioli Yesu
(Mat 27.27-31; Yn 19.2-3)
16 Basoda bakumbaki Yesu kati na ndako ya moyangeli, na esambiselo, mpe basangisaki lisanga mobimba ya basoda. 17 Balatisaki Yesu nzambala ya motane mpe ekoti oyo basalaki na banzube ; 18 mpe babandaki kopesa ye mbote : « Mbote, mokonzi ya Bayuda ! »
19 Bazalaki kosalela lingenda moke mpo na kobeta Ye na moto, bazalaki kobwakela Ye soyi mpe kofukama mpo na kogumbama liboso na Ye.
20 Sima na bango kosakanela Ye, balongolaki Ye nzambala ya motane, balatisaki Ye lisusu bilamba na Ye mpe bakumbaki Ye mpo na kobaka Ye na ekulusu.
21 Bakangaki na makasi moleki nzela moko oyo awutaki na bilanga, mpo ete amema ekulusu ya Yesu ; kombo na ye ezalaki Simona, moto ya Sirene mpe tata ya Alekizandre mpe Rifisi. 22 Bamemaki Yesu na esika oyo babengaka « Gologota, » oyo elingi koloba : esika ya mokuwa ya moto, 23 bapesaki Ye masanga ya vino basangisa na mire, kasi amelaki yango te. 24 Babakaki Ye na ekulusu, mpe bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke mpo na koyeba oyo moko na moko akozwa.
25 Babakaki Ye na ekulusu na ngonga ya libwa ya tongo.
26 Tala makomi oyo ezalaki kotalisa mpo na nini bakatelaki Ye etumbu :
Mokonzi ya Bayuda.
27 Babomi mibale ya bato babakamaki na ba-ekulusu elongo na Yesu : moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu ; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi. [ 28 Ezali boye nde ekokisamaki Makomi oyo ezali koloba : « Batangaki Ye na molongo ya bato ya mabe. »]* Eteni oyo ezali te kati na mikanda mingi ya kala.
29 Baleki nzela bazalaki kofinga Ye na koningisa mito na bango ; bazalaki koloba :
— Yo oyo okobuka Tempelo mpe okotonga yango lisusu na mikolo misato, 30 mibikisa yo moko mpe kita longwa na ekulusu !
31 Bakonzi ya Banganga-Nzambe elongo na balakisi ya Mobeko bazalaki mpe kotiola kati na bango :
— Abikisaki bato mosusu, kasi ye moko akoki komibikisa te ! 32 Tika ete Klisto, Mokonzi ya Isalaele, akita sik’oyo longwa na ekulusu, mpo ete tomona mpe tondima !
Bato oyo babakamaki elongo na Yesu na ba-ekulusu bazalaki mpe kofinga Ye.
(Mat 27.45-56; Lk 23.44-49; Yn 19.25-30)
33 Kobanda na ngonga ya midi kino na ngonga ya misato ya pokwa, molili ekotaki na mokili mobimba.
34 Na ngonga yango ya misato ya pokwa, Yesu agangaki :
— Eloi, Eloi, lema sabachtani ?
Elingi koloba : « Nzambe na Ngai, Nzambe na Ngai, mpo na nini osundoli Ngai ? »
35 Kati na bato oyo batelemaki wana, ndambo bayokaki Yesu ; boye bakomaki koloba :
— Boyoka, azali kobenga Eliya !
36 Moto moko akimaki mbangu, azindisaki eponze moko na vino ya ngayi, atiaki eponze yango na songe ya mwa nzete mpe apesaki yango Yesu mpo ete amela ; alobaki :
— Totala soki Eliya akoya kokitisa ye.
37 Kasi Yesu agangaki makasi mpe akataki motema.
38 Rido ya Tempelo epasukaki na biteni mibale, kobanda na likolo kino na se.
39 Mpe tango mokonzi ya basoda ya Rome, oyo atelemaki liboso ya Yesu, amonaki ndenge Yesu akufaki, alobaki :
— Moto oyo azalaki penza Mwana na Nzambe !
40 Ezalaki mpe na basi oyo bazalaki kotala na mosika. Kati na basi yango, ezalaki na Mari, moto ya Magidala ; Mari, mama ya Jake oyo ya elenge, ya Joze mpe ya Salome ; 41 oyo bazalaki kolanda Yesu mpe kosunga Ye tango azalaki kati na Galile ; ezalaki mpe na basi mosusu ebele oyo bakendeki na Yelusalemi elongo na Yesu.
Bakundi Yesu
(Mat 27.57-61; Lk 23.50-56; Yn 19.38-42)
42 Wana pokwa ekomaki, lokola ezalaki mokolo ya komilengela mpo ete etikalaki ngonga moke mpo na kokota na mokolo ya Saba, 43 Jozefi, moto ya mboka Arimate, oyo azalaki moto ya lokumu kati na Likita-Monene ya Bayuda mpe azalaki kozela Bokonzi ya Nzambe, abangaki te kokende epai ya Pilato mpo na kosenga nzoto ya Yesu. 44 Pilato akamwaki tango ayokaki ete Yesu asilaki kokufa ; abengaki mokonzi ya basoda mpo na kotuna ye soki solo Yesu asilaki kokufa. 45 Tango ayokaki na monoko ya mokonzi ya basoda ete ezali bongo, apesaki Jozefi ndingisa ya kokamata nzoto ya Yesu. 46 Jozefi asombaki liputa ya lino, akitisaki nzoto ya Yesu longwa na ekulusu, alingaki yango na liputa yango ; atiaki nzoto yango kati na kunda oyo batobolaki kati na libanga moko ya monene, mpe atindikaki libanga mosusu liboso ya ekotelo ya kunda yango.
47 Mari, moto ya mboka Magidala, mpe Mari, mama ya Joze, bazalaki kotala esika oyo akotia nzoto ya Yesu.

*15:28 Eteni oyo ezali te kati na mikanda mingi ya kala.