Mitango
Bana ya Isalaele kati na esobe ya Sinai
1
Moyize mpe Aron batangi motango ya bana ya Isalaele
Kati na esobe ya Sinai, Yawe asololaki na Moyize kati na Ndako ya kapo ya Bokutani ; ezalaki na mokolo ya liboso ya sanza ya mibale, na mobu ya mibale, sima na bango kobima na mokili ya Ejipito. Alobaki na ye : « Tanga motango ya lisanga mobimba ya bana ya Isalaele kolanda mabota na bango mpe bituka na bango ; mpe koma bakombo ya mibali nyonso, moto moko na moko. Yo mpe Aron, bokotanga motango ya mibali oyo bazali na mibu tuku mibale mpe koleka, ba-oyo nyonso bazali na makoki ya kosala mosala ya soda kati na Isalaele ; bokotanga bango kolanda milongo na bango ya mampinga.
Kati na libota moko na moko, ekozala na mobali moko mpo na kosunga bino : asengeli kozala mokambi ya etuka na ye.
 
Tala bakombo ya mibali oyo bakosunga bino :
 
mpo na libota ya Ribeni : Elitsuri, mwana mobali ya Shedewuri ;
mpo na libota ya Simeoni : Shelumieli, mwana mobali ya Tsurishadayi ;
mpo na libota ya Yuda : Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi ;
mpo na libota ya Isakari : Netaneeli, mwana mobali ya Tsuwari ;
mpo na libota ya Zabuloni : Eliabi, mwana mobali ya Eloni ;
10 mpo na bana mibali ya Jozefi :
mpo na libota ya Efrayimi : Elishama, mwana mobali ya Amiwudi ;
mpo na libota ya Manase : Gamilieli, mwana mobali ya Pedakitsuri ;
11 mpo na libota ya Benjame : Abidani, mwana mobali ya Gideoni ;
12 mpo na libota ya Dani : Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi ;
13 mpo na libota ya Aseri : Pagieli, mwana mobali ya Okirani ;
14 mpo na libota ya Gadi : Eliazafi, mwana mobali ya Deweli ;
15 mpo na libota ya Nefitali : Akira, mwana mobali ya Enani. »
 
16 Ezali bango nde baponamaki kati na lisanga : bazalaki bakambi ya mabota na bango, bakambi ya mampinga ya Isalaele.
 
17 Moyize mpe Aron bakamataki bato oyo baponamaki na bakombo mpo ete basala na bango elongo. 18 Basangisaki lisanga mobimba na mokolo ya liboso, na sanza ya mibale ; boye bana ya Isalaele batalisaki bokoko na bango kolanda mabota na bango mpe bituka na bango. Bakomaki bakombo ya mibali nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, mobali moko na moko na kombo na ye, 19 ndenge Yawe atindaki Moyize oyo atangaki motango na bango na esobe ya Sinai.
 
20 Mpo na bakitani ya Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Isalaele :
bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye. 21 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Ribeni ezalaki nkoto tuku minei na motoba na nkama mitano.
 
22 Mpo na bakitani ya Simeoni :
bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye. 23 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Simeoni ezalaki nkoto tuku mitano na libwa na nkama misato.
 
24 Mpo na bakitani ya Gadi :
bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye. 25 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Gadi ezalaki nkoto tuku minei na mitano na nkama motoba.
 
26 Mpo na bakitani ya Yuda :
bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu ya mbotama kobanda tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye. 27 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Yuda ezalaki nkoto tuku sambo na minei na nkama motoba.
 
28 Mpo na bakitani ya Isakari :
bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye. 29 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Isakari ezalaki nkoto tuku mitano na minei na nkama minei.
 
30 Mpo na bakitani ya Zabuloni :
bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye. 31 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Zabuloni ezalaki nkoto tuku mitano na sambo na nkama minei.
 
32 Mpo na bana mibali ya Jozefi :
Mpo na bakitani ya Efrayimi :
bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye. 33 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Efrayimi ezalaki nkoto tuku minei na nkama mitano.
34 Mpo na bakitani ya Manase :
bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye. 35 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Manase ezalaki nkoto tuku misato na mibale na nkama mibale.
 
36 Mpo na bakitani ya Benjame :
bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye. 37 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Benjame ezalaki nkoto tuku misato na mitano na nkama minei.
 
38 Mpo na bakitani ya Dani :
bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye. 39 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Dani ezalaki nkoto tuku motoba na mibale na nkama sambo.
 
40 Mpo na bakitani ya Aseri :
bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye. 41 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Aseri ezalaki nkoto tuku minei na moko na nkama mitano.
 
42 Mpo na bakitani ya Nefitali :
bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye. 43 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Nefitali ezalaki nkoto tuku mitano na misato na nkama minei.
 
44 Bango nde bato oyo Moyize mpe Aron elongo na bakambi zomi na mibale ya Isalaele, oyo moko na moko azalaki kotalisa libota na ye, batangaki. 45 Bongo bato nyonso ya Isalaele oyo batangamaki kolanda mabota na bango mpo ete bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, mpe bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, 46 bazalaki bango nyonso nkoto nkama motoba na misato na nkama mitano na tuku mitano.
 
47 Nzokande batangaki te nzela moko na mabota mosusu motango ya bato ya libota ya Levi.
Yawe abongisi mosala mpo na libota ya Levi
48 Yawe alobaki na Moyize : 49 « Kotanga te motango ya bato ya libota ya Levi, kokotisa bango te na molongo ya bato mosusu ya Isalaele. 50 Okopesa na bato ya libota ya Levi mokumba ya Mongombo ya Litatoli mpe ya bisalelo na yango nyonso elongo na biloko nyonso oyo ezalaka kati na Mongombo. Bango bakozwa mokumba ya komemaka yango elongo na bisalelo na yango mpe bakovanda zingazinga na yango. 51 Tango nyonso Mongombo ekolongwa na esika moko mpo na kokende na esika mosusu, Balevi nde bakolongola yango ; mpe tango ekotelema, bango mpe kaka nde bakotelemisa yango. Moto mosusu oyo akopusana pembeni na yango asengeli kokufa. 52 Bana ya Isalaele bakotelemisa bandako na bango ya kapo kolanda milongo na bango ya mampinga, mpe moto na moto akozala kati na molako na ye, na se ya bendele na ye. 53 Kasi bato ya libota ya Levi bakotelemisa bandako na bango ya kapo zingazinga ya Mongombo ya Litatoli mpo ete kanda makasi ya Yawe ekoka kokweya likolo ya lisanga ya bana ya Isalaele te. Bato ya libota ya Levi nde bakosala mosala ya kobatela Mongombo ya Litatoli. »
54 Bana ya Isalaele basalaki makambo oyo nyonso, ndenge kaka Yawe atindaki na nzela ya Moyize.