5
Bato ya mbindo basengeli kozala libanda ya molako
Yawe alobaki na Moyize : « Pesa mitindo epai na bana ya Isalaele ete babimisa libanda ya molako moto nyonso oyo azali na bokono ya poso ya nzoto, moto nyonso oyo atangaka makila, mpe moto nyonso oyo akomi mbindo mpo ete asimbi ebembe. Azala mobali to mwasi, bobengana ye, bobimisa ye libanda ya molako mpo ete bakomisa molako na bango mbindo te, pamba te Ngai nazali kowumela elongo na bango. »
Bana ya Isalaele basalaki bongo ; babimisaki bango libanda ya molako. Basalaki ndenge kaka Yawe atindaki na nzela ya Moyize.
Ndenge nini kozongisa boyokani kati na bandeko
Yawe alobaki na Moyize : « Loba na bana ya Isalaele : ‹ Soki moto, azala mobali to mwasi, atamboli na boyengebene te liboso ya Yawe wana asali moninga na ye mabe, azali na ngambo. Boye asengeli koyambola lisumu oyo asalaki. Asengeli kozongisa epai ya moto oyo ye asali mabe : nyonso oyo azwaki mpe akobakisa likolo na yango, ndambo moko kati na mitano. Kasi soki moto yango azali na ndeko te oyo akoki kozwa eloko oyo bakozongisa mpo na mabe oyo basalaki ye, bakopesa eloko oyo basengelaki kozongisela ye epai na Yawe na nzela ya Nganga-Nzambe, bakisa meme moko ya mobali oyo Nganga-Nzambe akosala na yango mosala ya bolimbisi masumu mpo na moto oyo asalaki mabe. Biloko nyonso kati na makabo ya bule oyo bana ya Isalaele bakomema epai ya Nzambe ekozala ya Nganga-Nzambe. 10 Biloko oyo moto nyonso akotia pembeni mpo na Yawe ekopesama epai ya Nganga-Nzambe ; kasi eloko nyonso oyo moto akokabela Nganga-Nzambe ekokoma ya Nganga-Nzambe. › »
Mobeko na tina na zuwa
11 Bongo Yawe alobaki na Moyize : 12 « Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Soki mwasi akosi mobali na ye, wana abimi na mobali mosusu 13 mpe asangisi na ye nzoto, amikomisi mbindo atako esalemi na nkuku mpe moto moko te amoni ye ; mpe ezala mobali na ye ayebi eloko te. 14 Soki mobali asali zuwa mpe akomi kokanisa ete mwasi na ye akomi mbindo, azala mbindo to mbindo te, 15 mobali asengeli komema mwasi na ye epai ya Nganga-Nzambe mpe kopesa mpo na ye likabo ya bakilo misato ya farine ya orje ; akosopela yango mafuta te mpe akotia yango ansa te, pamba te ezali likabo oyo epesami mpo na zuwa, likabo mpo na kokanisa mbeba. 16 Nganga-Nzambe akobenga mwasi mpe akomema ye liboso ya Yawe. 17 Nganga-Nzambe akotoka mayi ya bule, na mbeki basala na mabele batumba mpe akozwa putulu ya mabele ya Mongombo mpo na kotia yango kati na mayi yango. 18 Nganga-Nzambe akotia mwasi ya kotelema liboso ya Yawe, akofungola ye suki mpe akotia na maboko na ye likabo ya zuwa, wana ye moko Nganga-Nzambe akobatela na maboko na ye mayi ya bololo oyo ememaka elakeli mabe. 19 Nganga-Nzambe akolapisa mwasi yango ndayi, akoloba na ye :
‘ Soki mobali mosusu asangisaki na yo nzoto te, mpe soki omikomisaki mbindo te na kokosa mobali na yo wuta bobalana, wana tika ete mayi oyo ya bololo mpe ememaka elakeli mabe esala yo eloko moko te ! 20 Kasi soki, wana ozali ya kobala, okosaki mobali na yo mpe omikomisaki mbindo na kosangisa nzoto na mobali mosusu, ’ 21 Nganga-Nzambe asengeli awa kolapisa mwasi yango ndayi ya kondima kokweyela bilakeli mabe kowuta na maloba oyo : ‘ tika ete Yawe akomisa yo elakeli mabe mpe eloko ya nkele kati na bato na yo ! Tika ete akomisa yo ekomba mpe avimbisa yo libumu ! 22 Tika ete mayi oyo ezali komema elakeli mabe ekota kati na yo mpo ete libumu na yo evimba mpe okoma ekomba. ’
Mwasi akozongisa :
‘ Amen ! Tika ete esalema bongo ! ’
23 Nganga-Nzambe akokoma maloba yango ya bilakeli mabe kati na buku mpe akokotisa yango kati na mayi ya bololo mpo na kolongola makomi yango. 24 Bongo akomelisa mwasi mayi oyo ya bololo, oyo ezali komema elakeli mabe mpo ete ekokota kati na ye. 25 Nganga-Nzambe akozwa wuta na maboko ya mwasi likabo ya zuwa, akotombola yango liboso ya Yawe mpe akomema yango na etumbelo. 26 Nganga-Nzambe akotondisa na loboko na ye, bambuma oyo akozwa kati na likabo yango ya zuwa lokola ekaniseli, mpe akotumba yango na likolo ya etumbelo ; sima na yango, akomelisa mwasi mayi. 27 Soki penza amikomisaki mbindo na kosangisa nzoto na mobali mosusu, mayi oyo ememaka elakeli mabe ekokota kati na ye, ekovimbisa libumu na ye, akokoma ekomba mpe akolakelama mabe kati na bato na ye. 28 Kasi soki mwasi amikomisaki mbindo te, soki azali penza peto, akomona pasi ata moko te mpe akoki kobota bana.
29 Wana nde ezali mobeko na tina na zuwa ; ekokanga mwasi ya libala oyo akosi mobali na ye mpe amikomisi mbindo. 30 Bakosalela yango mpe soki mobali asali zuwa mpe akanisi penza ete mwasi na ye abimi na mobali mosusu : mobali akomema mwasi mpe akotelemisa ye liboso ya Yawe ; bongo Nganga-Nzambe akosalela mobeko oyo na mobimba na yango epai ya mwasi. 31 Mobali akomema ngambo ata moke te kasi mwasi akozwa etumbu ya lisumu na ye. › »