8
Ndenge nini kotia minda
Yawe alobaki na Moyize : « Loba na Aron mpe yebisa ye : ‹ Tango okotia minda, minda sambo esengeli kongengisa liboso ya etelemiselo ya minda. › »
Aron asalaki kaka bongo : atiaki minda na liboso ya etelemiselo ya minda ndenge Yawe atindaki na nzela ya Moyize. Tala ndenge basalaki etelemiselo ya minda : basalaki yango na wolo batuta wuta na likonzi kino na bafololo na yango ; basalaki yango ndenge kaka Yawe alakisaki Moyize.
Libulisi ya Balevi
Yawe alobaki na Moyize : « Kamata Balevi kati na bana ya Isalaele mpe petola bango. Tala ndenge okosala mpo na kopetola bango : okobwakela bango mayi ya bopetoli ; bongo bakolekisa jileti na nzoto na bango mobimba mpo na komikokola suki ya nzoto mobimba mpe bakosukola bilamba na bango. Ezali na nzela wana nde bakokoma peto. Bakokamata mwana ngombe ya mobali elongo na likabo na yango ya farine oyo basangisa na mafuta ; mpe okokamata mwana ngombe mosusu ya mobali mpo na mbeka ya masumu. Yeisa Balevi liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe sangisa lisanga mobimba ya Isalaele. 10 Okopusa Balevi liboso ya Yawe mpe bana ya Isalaele bakotia bango maboko. 11 Sima na yango, Aron akobonza Balevi lokola likabo oyo bana ya Isalaele babonzeli Yawe mpo ete bazwa makoki ya kosala mosala ya Yawe. 12 Mpe na sima, Balevi bakotia maboko na bango likolo ya mito ya bangombe ya mibali. Bonza ngombe moko lokola mbeka ya masumu epai na Yawe mpe mosusu lokola mbeka ya kotumba, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na Balevi. 13 Tika ete Balevi batelema liboso ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali ; bongo bonza bango lokola likabo epai na Yawe. 14 Ezali na nzela wana nde okotia pembeni Balevi kati na bana ya Isalaele, mpe bakozala ya Ngai. 15 Sima na yo kopetola Balevi mpe kobonza bango lokola likabo, bakozwa ndingisa ya kosala mosala na bango na Ndako ya kapo ya Bokutani.
Boye, okopetola bango mpe okobonza bango lokola likabo epai na Yawe, 16 pamba te bango nde bazali bato oyo bapesameli Ngai kati na bana ya Isalaele. Ngai moko nde nazwaki bango na esika ya bana nyonso ya liboso ya bana ya Isalaele. 17 Pamba te, bana nyonso ya liboso ya bana ya Isalaele bazali ya Ngai, ezala bana ya liboso ya bana ya bato to ya banyama. Tango nabomaki bana nyonso ya liboso na mokili ya Ejipito, natiaki bango pembeni mpo na Ngai moko. 18 Mpe nazwaki Balevi na esika ya bana nyonso ya liboso ya bana ya Isalaele. 19 Kati na bato nyonso ya Isalaele, napesi Balevi lokola likabo epai ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali, mpo ete basala mosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na bolamu ya bana ya Isalaele mpe basala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bango, mpo ete likama moko te ekomela bana ya Isalaele tango bakopusana pene ya Esika ya bule. »
20 Moyize, Aron mpe lisanga mobimba ya bana ya Isalaele basalaki mpo na Balevi, makambo nyonso oyo Yawe atindaki Moyize. 21 Balevi bamipetolaki mpe basukolaki bilamba na bango. Aron abonzaki bango lokola likabo epai na Yawe mpe asalaki mpo na bango mosala ya bolimbisi masumu mpo na kopetola bango. 22 Sima na yango, Balevi bazwaki ndingisa ya kosala mosala na bango na Ndako ya kapo ya Bokutani, na se ya bokonzi ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali. Basalaki mpo na Balevi, makambo oyo Yawe atindaki na nzela ya Moyize.
Tango oyo Balevi basengeli kokota na mosala
23 Yawe alobaki na Moyize : 24 « Tala bikateli oyo etali Balevi : mobali nyonso oyo azali na mibu ya mbotama kobanda tuku mibale na mitano mpe koleka asengeli koya kosala mosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. 25 Kasi soki akokisi mibu tuku mitano, akotika mosala oyo azalaki kosala, akosala lisusu mosala te. 26 Akokoma nde kosunga bandeko na ye mpo na kokokisa misala na bango kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. Nzokande ye moko akosala lisusu mosala te. Yango nde ekozala bikateli oyo okolanda mpo na mosala ya Balevi. »