13
Moyize atindi bato mpo na kononga Kanana
Yawe alobaki na Moyize : « Tinda bato mpo na kononga mokili ya Kanana oyo nalingi kopesa na bana ya Isalaele. Kati na libota moko na moko, pona mpe tinda moto moko kati na bakambi. »
Na mitindo ya Yawe, Moyize atindaki bango wuta na esobe ya Parani. Bango nyonso bazalaki bakambi ya mabota ya bana ya Isalaele.
 
Tala bakombo na bango :
 
mpo na libota ya Ribeni : Chamuwa, mwana mobali ya Zakuri ;
mpo na libota ya Simeoni : Shafati, mwana mobali ya Ori ;
mpo na libota ya Yuda : Kalebi, mwana mobali ya Yefune ;
mpo na libota ya Isakari : Yigali, mwana mobali ya Jozefi ;
mpo na libota ya Efrayimi : Oze, mwana mobali ya Nuni ;
mpo na libota ya Benjame : Paliti, mwana mobali ya Rafu ;
10 mpo na libota ya Zabuloni : Gadieli, mwana mobali ya Sodi ;
11 mpo na libota ya Jozefi na nzela ya Manase : Gaadi, mwana mobali ya Susi ;
12 mpo na libota ya Dani : Amieli, mwana mobali ya Gemali ;
13 mpo na libota ya Aseri : Seturi, mwana mobali ya Mikaeli ;
14 mpo na libota ya Nefitali : Nakibi, mwana mobali ya Vofisi ;
15 mpo na libota ya Gadi : Geweli, mwana mobali ya Maki.
 
16 Oyo nde bakombo ya bato oyo Moyize atindaki mpo na kononga mokili ya Kanana. Moyize apesaki Oze, mwana mobali ya Nuni, kombo « Jozue. »
 
17 Tango Moyize atindaki bango mpo na kononga mokili ya Kanana, alobaki : « Bolekela na nzela ya etuka ya Negevi mpe bokotela na nzela ya mokili ya bangomba. 18 Botala soki mokili yango ezali ndenge nini mpe soki bato oyo bavandaka kuna bazalaka makasi to balemba, soki bazalaka ebele to moke. 19 Botala ndenge nini mokili epai wapi bazali kowumela ezali : soki ezali malamu to mabe ; soki bazingela bingumba na yango na bamir to te. 20 Botala soki mabele na yango ezali ndenge nini : ebotaka malamu to te ; ezali na banzete to te. Bosala nyonso penza ete bozonga na mbuma ya mokili yango. »
Ezalaki eleko ya kobuka bambuma ya liboso ya vino.
21 Boye bakendeki mpe banongaki mokili kobanda na esobe ya Tsini kino na Reobi, pembeni ya Lebo-Amati. 22 Balekaki na nzela ya etuka ya Negevi mpe bakomaki kino na Ebron epai wapi Ayimani, Sheshayi mpe Talimayi, bakitani ya Anaki, bazalaki kovanda. Engumba Ebron etongamaki mibu sambo liboso ya engumba Tsoani kati na Ejipito. 23 Tango bakomaki na lubwaku ya Eshikoli, bakataki etape mobimba ya nzete ya vino oyo ezalaki na liboke ya bambuma ya vino. Lokola ezalaki kilo makasi, bato mibale kati na bango basalelaki banzete mpo na komema yango ; bamemaki lisusu bambuma ya grenade mpe ya figi. 24 Wuta na tango wana, bakomaki kobenga esika yango « lubwaku ya Eshikoli, » oyo elingi koloba « lubwaku ya liboke ya bambuma ya vino, » mpo na kokanisa liboke ya bambuma ya vino oyo bana ya Isalaele babukaki kuna.
Banongi bapesi sango
25 Sima na mikolo tuku minei, bazongaki wuta na mokili oyo banongaki. 26 Bayaki kokuta Moyize, Aron mpe lisanga mobimba ya bana ya Isalaele na Kadeshi, kati na esobe ya Parani. Ezalaki kuna nde bapesaki bango elongo na lisanga mobimba sango ya mobembo na bango mpe balakisaki bango bambuma ya mokili yango. 27 Bapesaki sango oyo epai ya Moyize : « Tokotaki kino na mokili epai wapi otindaki biso. Solo, ezali penza mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi ; tala kutu bambuma ya mokili yango. 28 Kasi bato oyo bavandaka kuna bazali makasi mingi, bingumba na bango etongama makasi mpe ezali minene ; tomonaki lisusu bakitani ya Anaki kuna. 29 Bato ya Amaleki bavandaka na etuka ya Negevi ; bato ya Iti, ya Yebusi mpe ya Amori bavandaka na mokili ya bangomba, mpe bato ya mboka Kanana bavandaka pembeni ya ebale monene mpe pembeni-pembeni ya Yordani. »
30 Bongo Kalebi apamelaki bato ete batika makelele liboso ya Moyize, mpe alobaki :
— Tokende kobotola mokili yango, pamba te tozali solo na makoki mpo na kosala yango !
31 Kasi bato oyo bakendeki elongo na ye balobaki :
— Tokokoka te kobundisa bato wana mpo ete bazali makasi koleka biso.
32 Bongo bakomaki kopanza sango mabe kati na bana ya Isalaele na tina na mboka oyo banongaki, bazalaki koloba : « Mokili oyo tonongaki ezali penza mabele oyo eliaka bavandi na yango ; bongo bato nyonso oyo tomonaki kuna bazali bingambe. 33 Tomonaki kuna lisusu bato milayi, bakitani ya Anaki, oyo babima na nzela ya bato milayi. Na miso na biso moko, tozalaki komimona lokola mabanki ; bango mpe bazalaki komona biso kaka ndenge wana na miso na bango. »