Mibeko ya kotosa sima na kokota na mokili
15
Bambeka mpe makabo
Yawe alobaki na Moyize : « Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Sima na bino kokota na mokili oyo nakopesa bino, mokili epai wapi bokovanda, bokobonzela Yawe likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe ; ekowuta kati na bangombe, bameme mpe bantaba na bino. Tika ete ezala mbeka ya kotumba to mbeka mpo na kokokisa ndayi, mbeka oyo bokobonza wuta na mokano ya mitema na bino to mpe mbeka oyo bokobonza na bafeti na bino ya bule. Boye, moto oyo akomema mbeka na ye asengeli kobonzela Yawe likabo ya gato, bakilo misato ya farine oyo basangisa na balitele mibale ya mafuta ya olive. Mpo na bana meme moko na moko ya mbeka ya kotumba, bosengeli kobakisa balitele ya vino lokola likabo ya masanga. Mpo na meme ya mobali, bokobongisa likabo ya gato, bakilo motoba ya farine oyo basangisa na balitele mibale na ndambo ya mafuta ya olive, mpe balitele mibale na ndambo ya vino lokola likabo ya masanga. Bokobonza yango lokola malasi ya solo kitoko liboso ya Yawe. Soki bobongisi mwana ngombe ya mobali lokola mbeka ya kotumba to mbeka mpo na kokisa ndayi to mbeka ya boyokani mpo na Yawe ; bokomema elongo na mwana ngombe, likabo ya gato, bakilo libwa ya farine basangisa na balitele minei ya mafuta. 10 Bokomema lisusu balitele minei ya vino lokola likabo ya masanga : ezali likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.
11 Ezali ndenge wana nde esengeli kobongisa mbeka nyonso ya ngombe ya mobali to ya meme ya mobali to ya bana meme to mpe ya mwana ntaba. 12 Bokosala bongo mpo na nyama moko na moko, ezala soki motango na yango ezali boni. 13 Mwana mboka asengeli kosala bongo mpo na makabo wana tango akomema likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe. 14 Pamba te, na milongo oyo ekoya, mopaya nyonso to moto mosusu oyo azali kowumela kati na bino, oyo akobonza likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe, asengeli kosala ndenge kaka bino bozali kosala. 15 Mibeko ya kosalela ekozala ndenge moko mpo na lisanga mobimba, ezala bino to mopaya oyo akowumela kati na bino. Yango ekozala mobeko ya libela ezala mpo na milongo oyo ekoya. Bino na mopaya bozali ndenge moko liboso ya Yawe. 16 Ezala bino to mopaya oyo azali kati na bino, bokosalela kaka mibeko mpe mitindo moko. › »
Likabo ya mapa ya liboso
17 Yawe alobaki na Moyize : 18 « Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Tango bokokota na mokili oyo nazali komema bino 19 mpe bokolia bilei ya mokili yango, bobonza ndambo lokola likabo epai na Yawe. 20 Bobonza gato oyo ewuti na farine ya liboso oyo bokonika, mpe bobonza yango lokola likabo oyo ewuti na mbuma ya liboso oyo elanga ya ble eboti. 21 Boye, bokobonzaka epai na Yawe bambuma ya liboso ya milona na bino : ekozala bongo mpo na milongo oyo ekoya na sima.
Bambeka mpo na masumu oyo esalemi na nko te
22 Soki esalemi ete bobuki na nko te moko kati na mibeko oyo Ngai Yawe napesaki na nzela ya Moyize, 23 moko kati na mitindo oyo Ngai Yawe napesaki bino na nzela ya Moyize, kobanda na mokolo oyo napesaki bino yango, mpe nazali kokoba kopesa yango kati na milongo oyo ekoya ; 24 mpe soki mbeba yango esalemi na nko te mpe lisanga esosoli yango te, lisanga mobimba ekobonza mwana ngombe ya mobali lokola mbeka ya kotumba oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe, elongo na likabo ya gato mpe likabo ya masanga ndenge ekatama, mpe ntaba ya mobali lokola mbeka mpo na masumu. 25 Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na lisanga mobimba ya Isalaele, mpe bakolimbisama ; pamba te basalaki mabe na nko te mpe bamemelaki Yawe mpo na mabe na bango likabo bazikisa na moto mpe mbeka mpo na masumu. 26 Lisanga mobimba ya Isalaele elongo na bapaya oyo bazali kowumela kati na bango bakozwa bolimbisi, pamba te bato nyonso bamikotisaki na mbeba oyo esalemaki na nko te.
27 Kasi soki esalemi ete moto moko nde asali lisumu na nko te, asengeli komema mwana ntaba ya mwasi ya mobu moko lokola mbeka mpo na masumu. 28 Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu liboso ya Yawe mpo na moto oyo asalaki masumu na nko te. Mpe tango mosala ya bolimbisi masumu ekosalema mpo na ye, akolimbisama solo. 29 Bosengeli kosalela mobeko se moko, ezala mpo na mwana mboka kati na bana ya Isalaele to mpo na mopaya oyo azali kowumela kati na bino, oyo asali lisumu na nko te.
30 Kasi moto nyonso oyo akosala lisumu na nko, azala mwana mboka to mopaya, atioli nde Yawe ; mpe moto ya lolenge oyo basengeli kolongola ye kati ya bato na ye. 31 Pamba te atioli Liloba na Yawe mpe abuki mitindo na ye. Solo, moto ya lolenge oyo basengeli kolongola ye kati na bato na ye mpe akomema ngambo ya mabe na ye. › »
Kufa mpo na moto oyo akomemia te mokolo ya Saba
32 Wana bana ya Isalaele bazalaki kati na esobe, bamonaki moto moko kolokota bakoni na mokolo ya Saba. 33 Bato oyo bamonaki ye kolokota bakoni bamemaki ye epai ya Moyize, Aron mpe lisanga mobimba. 34 Batiaki ye na esika oyo bazalaki kokengela ye malamu, pamba te bayebaki nanu malamu-malamu te nini esengelaki kosala mpo na ye. 35 Bongo Yawe alobaki na Moyize : « Moto oyo asengeli kokufa. Bato nyonso ya lisanga basengeli komema ye libanda ya molako mpe koboma ye na mabanga. »
36 Bongo lisanga mobimba ememaki ye libanda ya molako mpe babambaki ye mabanga kino akufaki ndenge Yawe atindaki yango epai ya Moyize.
Malako na tina na bilamba
37 Yawe alobaki na Moyize : 38 « Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Na milongo oyo ekoya, bosengeli kotia singa ya langi ya ble na basonge ya bilamba na bino ; esengeli kokangisa kitendi moko na moko na singa ya langi ya ble. 39 Tango nyonso bokotala bitendi yango, bokobanda kokanisa mitindo nyonso ya Yawe, mpo ete botosa yango mpe botika kolanda baposa ya mitema na bino mpe ya miso na bino, oyo ekoki kotindika bino na kobungisa boyengebene. 40 Boye, bokokanisa mibeko na Ngai nyonso, bokotosa yango mpe bokozala bule mpo na Nzambe na bino. 41 Nazali Yawe, Nzambe na bino ; nabimisaki bino na Ejipito mpo ete nazala Nzambe na bino. Solo, nazali Yawe, Nzambe na bino. › »