17
Nani akoki kopusana pene na Nzambe ?
Yawe alobaki na Moyize : « Loba na Eleazari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron, ete balongola bambabola oyo batumbelaka malasi na kati-kati ya moto, mpe bapanza makala ya moto mosika, pamba te bambabola wana ezali bule. Tika ete bakamata bambabola yango, atako ezali ya bato oyo bakufaki likolo ya masumu na bango ; mpe tika ete batuta yango na marto mpo ete ekoma papala mpe batia yango likolo ya etumbelo, pamba te bamemaki yango liboso ya Yawe mpe ekomaki bule. Tika ete yango ekoma elembo mpo na bana ya Isalaele. »
Boye, Nganga-Nzambe Eleazari alokotaki bambabola nyonso ya bronze oyo bato oyo bazikaki na moto bamemaki, mpe atutaki yango na marto mpo na kotia yango likolo ya etumbelo ; ndenge Yawe atindaki ye, na nzela ya Moyize. Yango ekozala lokola ekaniseli mpo na bana ya Isalaele ete moto moko te, moto oyo abulisama te, moto oyo azali mopaya liboso ya bakitani ya Aron, akoki koya kotumba malasi ya ansa liboso ya Yawe, noki te akokoma lokola Kore mpe bato oyo balandaki ye.
Bato bakomi koyimayima
Mokolo oyo elandaki, lisanga mobimba ya bana ya Isalaele ekomaki koyimayima mpo na Moyize mpe Aron. Bazalaki koloba : « Bino bobomi bato na Yawe. »
Kasi tango lisanga mobimba esanganaki mpo na kotelemela Moyize mpe Aron, babalukaki na ngambo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mpe mbala moko lipata ezipaki yango mpe nkembo na Yawe emonisamaki. Boye, Moyize mpe Aron bakendeki liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe Yawe alobaki na Moyize : 10 « Bokende mosika ya lisanga oyo mpo ete nasilisa bango kaka na mbala moko. »
Mpe bakweyaki bilongi kino na mabele. 11 Moyize alobaki na Aron : « Kamata mbabola na yo mpe tia malasi ya ansa kati na yango elongo na moto ya etumbelo. Bongo, kima mbangu kati na lisanga mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bango, pamba te kanda makasi ebimi liboso ya Yawe, etumbu ezali koya. »
12 Aron asalaki ndenge kaka Moyize alobaki, mpe akimaki mbangu na kati-kati ya lisanga. Nzokande, etumbu emibandelaki kosala mosala na yango na kati-kati ya bato, kasi Aron abonzaki malasi ya ansa mpe asalaki mosala ya bolimbisi masumu mpo na bango. 13 Atelemaki na kati-kati ya bato oyo bazalaki na bomoi mpe oyo bazalaki ya kokufa mpe etumbu esilaki. 14 Nzokande, bato nkoto zomi na minei na nkama sambo bakufaki na etumbu wana, bakisa oyo bakufaki likolo ya Kore. 15 Bongo, Aron azongaki epai ya Moyize na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, pamba te etumbu esilaki.
Yawe alakisi ete aponi Aron
16 Yawe alobaki na Moyize : 17 « Yebisa bana ya Isalaele ete bapesa yo mangenda zomi na mibale, lingenda moko mpo na mokambi ya libota moko na moko kati ya bikolo na bango. Koma kombo ya moto moko na moko na lingenda na ye. 18 Koma kombo ya Aron mpo na lingenda ya libota ya Levi, mpo ete mokambi moko na moko ya libota akozala na lingenda moko. 19 Tia mangenda yango na Ndako ya kapo ya Bokutani, liboso ya Sanduku ya Litatoli, epai wapi nakutanaka na bino. 20 Lingenda ya moto oyo nakopona ekobimisa moto ya etape. Ezali na nzela wana nde nakosukisa Ngai moko koyimayima ya tango nyonso kati na bana ya Isalaele na tina na bino. »
21 Moyize ayebisaki bana ya Isalaele, mpe bakambi na bango bapesaki ye mangenda zomi na mibale, lokola lingenda moko mpo na mokambi ya libota moko na moko, lingenda ya Aron mpe ezalaki kati na mangenda wana. 22 Moyize atiaki mangenda nyonso liboso ya Yawe, kati na Ndako ya kapo ya Litatoli. 23 Mokolo oyo elandaki, Moyize akotaki na Ndako ya kapo ya Litatoli, bongo amonaki ete lingenda ya Aron, oyo ezalaki kolakisa ndako ya Levi, ebimisaki mito ya etape, ebotaki bafololo mpe ezalaki na bambuma ya amande ya kotela. 24 Moyize abimisaki mangenda nyonso longwa na liboso ya Yawe mpe amemaki yango na miso ya bato nyonso ya Isalaele. Bamonaki yango mpe moto na moto azwaki lingenda na ye.
25 Yawe alobaki na Moyize : « Zongisa lingenda ya Aron liboso ya Sanduku ya Litatoli mpo ete ebombama lokola elembo ya kotomboka na bango. Boye, okosukisa koyimayima na bango mpo na Ngai mpo ete bakufa te. »
26 Moyize asalaki ndenge kaka Yawe atindaki ye.
27 Bana ya Isalaele balobaki na Moyize : « Tokufi na biso, tobebi na biso, biso nyonso, tobebi na biso ! 28 Moto nyonso oyo akopusana pembeni ya Mongombo na Yawe akokufa. Boni, biso nyonso tokufa ? »