21
Isalaele alongi mokonzi ya Aradi
Tango moto ya mboka Kanana, mokonzi ya Aradi, oyo azalaki kovanda na Negevi ayokaki ete Isalaele azali koya pembeni ya nzela ya Atarimi, abundisaki bana ya Isalaele mpe akangaki bamosusu kati na bango na boloko. Boye, bana ya Isalaele balapaki ndayi oyo epai na Yawe : « Soki okabi bato oyo na maboko na biso, tokobebisa bingumba na bango nyonso. »
Yawe ayokaki kolela ya bana ya Isalaele mpe apesaki bango elonga likolo ya bato ya mboka Kanana elongo na bingumba na bango. Yango wana, babengaka esika yango « Orima » oyo elingi koloba : kobebisama.
Moyize atelemisi nyoka ya ebende
Bana ya Isalaele batikaki ngomba Ori mpe bakendeki pembeni-pembeni ya nzela ya ebale monene ya Barozo, mpo na kokima mokili ya Edomi. Kasi bato bakokaki lisusu te kokanga motema na nzela. Batombokelaki Nzambe mpe Moyize, balobaki : « Mpo na nini boye ! Bobimisaki biso na Ejipito mpo ete toya kokufa na esobe ? Bilei ezali te, mayi ezali te mpe tolembi kolia bilei oyo ya pamba-pamba ! »
Bongo Yawe atindelaki bango banyoka ya ngenge oyo ekomaki koswa bato mpe bana ya Isalaele ebele bakufaki. Bato bayaki epai ya Moyize mpe balobaki : « Tosalaki masumu tango totombokelaki Yawe mpe totombokelaki yo. Bondela Yawe ete alongola mosika na biso banyoka oyo. »
Boye, Moyize abondelaki mpo na bato.
Yawe alobaki na Moyize :
— Salisa nyoka moko ya ebende mpe telemisa yango likolo ya nzete mpo ete moto nyonso oyo aswami, atala yango mpe abika.
Boye, Moyize asalisaki nyoka moko ya ebende mpe atelemisaki yango na likolo ya nzete. Boye moto nyonso oyo nyoka eswaki, bongo atalaki nyoka ya ebende, abikaki.
Bana ya Isalaele bakei kino na Pisiga
10 Bana ya Isalaele balongwaki wana mpe bakendeki kotonga molako na bango na Oboti. 11 Kolongwa na Oboti bakendeki kotonga molako na bango na Iye-Abarimi, na esobe oyo etalana na Moabi, na ngambo oyo moyi ebimaka. 12 Kolongwa wana, bakendeki kotonga molako na bango na lubwaku ya Zeredi. 13 Kolongwa wana, bakendeki kotonga molako na bango na ngambo mosusu ya Arinoni, mayi oyo elekela na esobe, wuta na etuka ya mokili ya bato ya Amori. Mayi ya Arinoni ezalaki na mondelo ya Moabi, na kati-kati ya mokili ya Moabi mpe ya Amori. 14 Yango wana, buku ya bitumba ya Yawe eloba :
« Wahebi kati na Sufa mpe miluka na yango,
Arinoni 15 mpe nzela ya miluka ya mabwaku
oyo ekenda kino na engumba Ari
mpe elekela pembeni-pembeni ya mondelo ya Moabi. »
16 Kolongwa wana, bakobaki kokende kino na Beri oyo ezalaki libulu ya mayi epai wapi Yawe alobaki na Moyize : « Sangisa bato esika moko mpo ete nakopesa bango mayi. »
17 Boye, bana ya Isalaele bayembaki loyembo oyo :
« Oh libulu, bimisa mayi !
Boyembela yango !
18 Libulu oyo bana bakonzi batimola,
oyo bato minene batobola
na mangenda mpe banzete na bango. »
Kolongwa na esobe, bakendeki kino na Matana ; 19 kolongwa na Matana bakendeki na Naalieli, kolongwa na Naalieli bakendeki kino na Bamoti ; 20 mpe kolongwa na Bamoti bakendeki kino na lubwaku ya Moabi, na songe ya ngomba Pisiga, oyo eleki molayi na esobe.
Bana ya Isalaele balongi Sikoni mpe Ogi
21 Bana ya Isalaele batindaki bantoma mpo na koyebisa Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori :
22 « Tika biso tolekela na mokili na yo. Tokokota te na elanga to na elanga ya vino moko, mpe tokomela te mayi ya mabulu na bino ; tokoleka kaka na nzela ya monene ya mokonzi kino tokosilisa kokatisa mokili na yo. »
23 Kasi Sikoni aboyaki kopesa bana ya Isalaele nzela ya kolekela na mokili na ye ; asangisaki mampinga na ye nyonso ya basoda mpe abimaki na esobe mpo na kobundisa Isalaele. Abundisaki Isalaele tango akomaki na Yakatsi. 24 Kasi Isalaele alongaki ye mpe akamataki mokili na ye wuta na Arinoni kino na Yaboki, mpe lisusu kino na mokili ya bato ya Amoni, mpo ete bazalaki kokengela mondelo yango makasi. 25 Isalaele abotolaki bingumba nyonso ya bato ya Amori mpe bakomaki kovanda kati na yango, bakisa Eshiboni mpe bamboka mike na yango nyonso ya zingazinga. 26 Eshiboni ezalaki engumba oyo Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo abundisaki mokonzi ya kala ya Moabi mpe abotolaki na maboko na ye mokili nyonso, kino na Arinoni.
27 Yango wana balobaka na masese :
« Boya na Eshiboni !
Tika ete etelema lisusu !
Tika ete engumba Sikoni etongama lisusu !
 
28 Moto ebimaki wuta na Eshiboni,
ndemo ya moto ebimaki wuta na engumba ya Sikoni,
etumbaki Ari ya Moabi, bavandi ya bangomba ya Arinoni.
29 Oh Moabi, mawa na yo !
Oh bato ya Kemoshi, bobebisami !
Bakomisaki bana na ye ya mibali bakimi ;
mpe bana basi na ye, bakangami
ya mokonzi Sikoni, mokonzi ya Amori.
 
30 Kasi tolongi bango ;
Eshiboni nyonso ebebisami kino na Diboni,
topanzi yango nyonso kino na Nofaki,
mpe kino na Medeba. »
31 Boye Isalaele avandaki na mokili ya bato ya Amori. 32 Sima na yango, Moyize atindaki banongi na Yaezeri, bana ya Isalaele babotolaki bamboka ya mike-mike oyo ya zingazinga na yango mpe babenganaki bato ya Amori oyo bazalaki kovanda kuna.
33 Boye bana ya Isalaele babalukaki mpe bakendeki pembeni-pembeni ya nzela oyo ekenda kino na Bashani. Ogi, mokonzi ya Bashani, elongo na mampinga na ye nyonso babimaki mpo na kokutana na bango mpe kobundisa bango na Edreyi. 34 Bongo Yawe alobaki na Moyize : « Kobanga ye te, pamba te nakabi ye elongo na mampinga na ye nyonso mpe mokili na ye na maboko na yo ; sala ye ndenge osalaki Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kovanda na Eshiboni. »
35 Boye, bana ya Isalaele babomaki ye elongo na bana na ye ya mibali mpe mampinga na ye nyonso ; batikaki ata moto moko te na bomoi, mpe bakamataki mokili na ye.