27
Bana basi ya Tselofikadi bakitani na libula
Bana basi ya Tselofikadi, mwana mobali ya Eferi, mwana mobali ya Galadi, mwana mobali ya Makiri, mwana mobali ya Manase bazalaki bakitani ya libota ya Manase, mwana mobali ya Jozefi. Bakombo na bango ezalaki : Mala, Noa, Ogila, Milika mpe Tiritsa. Bayaki liboso ya Moyize, ya Nganga-Nzambe Eleazari mpe ya bakambi ya lisanga mobimba, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe balobaki : « Tata na biso akufaki na esobe. Azalaki te na molongo na bato oyo bazalaki kolanda Kore, oyo basanganaki lisanga mpo na kotelemela Yawe, kasi akufaki mpo na masumu na ye moko mpe atikaki bana mibali te. Bongo mpo na nini kombo ya tata na biso elimwa kaka boye na libota na ye, mpo ete azalaki na mwana mobali te ? Pesa biso mpe eteni ya mabele kati na bandeko ya tata na biso. »
Boye, Moyize amemaki likambo na bango liboso ya Yawe.
Yawe alobaki na Moyize : « Makambo oyo bana basi ya Tselofikadi bazali koloba ezali solo. Osengeli kopesa bango eteni ya mabele lokola libula kati na bandeko ya tata na bango mpe pesa bango libula ya tata na bango. Loba na bana ya Isalaele : ‹ Soki moto moko asili kokufa mpe atiki bana mibali te, bokopesa libula na ye epai ya mwana na ye ya mwasi. Soki mpe azali na mwana mwasi te, bokopesa libula na ye epai ya bandeko na ye ya mibali. 10 Soki mpe azali na bandeko mibali te, bokopesa libula na ye epai ya bandeko mibali ya tata na ye. 11 Bongo, soki tata na ye azalaki mpe na bandeko mibali te, bokopesa libula na ye epai ya ndeko ya pene ya libota ya tata na ye ; ye nde akokitana na yango. Oyo ekozala mpo na Isalaele, mobeko oyo bosengeli kolanda ndenge Yawe alobaki na Moyize. › »
Jozue akitani na Moyize
12 Yawe alobaki na Moyize :
— Mata likolo ya bangomba ya Abarimi, mpe tala mokili oyo napesaki epai ya bana ya Isalaele. 13 Sima na yo komona yango, yo mpe okokende kosangana na bakoko na yo na mokili ya bakufi ndenge moko na Aron, ndeko na yo ya mobali, 14 pamba te tango lisanga ya bato batombokaki mpo na mayi, na esobe ya Tsini, bino mpe botosaki mitindo na Ngai te mpe bopesaki lokumu te na bosantu na Ngai na miso na bango. Ezalaki nde mayi ya Meriba ya Kadeshi, na esobe ya Tsini.
15 Moyize alobaki na Yawe :
16 — Tika ete Yawe, Nzambe oyo apesaka pema na bato nyonso, apona moto moko mpo ete akamba lingomba oyo ; 17 moto oyo akobanda kobima mpe kokota liboso na bango, oyo akobanda kobimisa mpe kokotisa bango mpo ete bato na Yawe bazala te lokola bibwele oyo ezanga mobateli.
18 Yawe azongiselaki Moyize :
— Kamata Jozue, mwana mobali ya Nuni, moto oyo azali na molimo mpe tia ye maboko na yo. 19 Mema ye liboso ya Nganga-Nzambe Eleazari mpe ya lingomba mobimba ya bato, bongo okopesa ye mosala na miso na bango. 20 Pesa ye ndambo ya bokonzi na yo mpo ete lisanga mobimba ya bana ya Isalaele bakoka kotosa ye. 21 Akokende kotelema liboso ya Nganga-Nzambe Eleazari, oyo akotuna mokano na Yawe mpo na ye, na nzela na Urimi. Na mokano wana nde, ye mpe lisanga mobimba ya bana ya Isalaele bakobanda kobima mpe kokota.
22 Moyize asalaki ndenge Yawe atindaki ye. Akamataki Jozue mpe atelemisaki ye liboso ya Nganga-Nzambe Eleazari mpe liboso ya lisanga mobimba ya Isalaele. 23 Atiaki ye maboko mpe apesaki ye mosala, ndenge Yawe atindaki na nzela ya Moyize.