29
Na tina na bambeka mpo na feti ya bakelelo
« ‹ Na mokolo ya liboso ya sanza ya sambo, bokozala na mayangani ya bule. Bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo, ekozala nde mokolo ya kobeta bakelelo. Bokobonzela Yawe lokola mbeka ya kotumba, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe : mwana ngombe moko ya mobali, meme moko ya mobali mpe bana mibali ya meme sambo ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba. Mpo na ngombe ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo libwa ya farine basangisa na mafuta ; mpo na meme ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo motoba ; mpe mpo na mwana meme moko na moko ya mobali kati na yango sambo, bokobonza yango na likabo ya bakilo misato.
Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bino. Bambeka oyo ekobakisama na mbeka ya kotumba ya sanza na sanza elongo na makabo na yango ya bambuma, na mbeka ya kotumba ya mokolo na mokolo elongo na makabo na yango ya bambuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda ndenge ekatama. Ezali makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.
Na tina na bambeka mpo na mokolo ya bolimbisi masumu
Na mokolo ya zomi, na sanza ya sambo, bokozala na mayangani ya bule. Bokokila bilei, bokosala mosala moko te oyo bokosalaka mokolo na mokolo. Bokobonzela Yawe mbeka ya kotumba, lokola biloko ya solo kitoko : mwana ngombe moko ya mobali, meme moko ya mobali mpe bana mibali ya meme sambo ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba. Mpo na ngombe ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo libwa ya farine basangisa na mafuta ; mpo na meme ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo motoba ; 10 mpe mpo na mwana meme moko na moko ya mobali kati na yango sambo, bokobonza yango na likabo ya bakilo misato. 11 Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ; ekobakisama na mbeka mpo na masumu oyo epesami na mokolo ya bolimbisi masumu mpe na mbeka ya kotumba ya libela na mbeka na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.
Na tina na bambeka mpo na feti ya bandako ya kapo
12 Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya sambo, bokozala na mayangani ya bule ; bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo mpe bokosala feti monene mpo na Yawe mikolo sambo. 13 Bokobonzela Yawe lokola mbeka ya kotumba mpe lokola likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe : bangombe zomi na misato ya mibali, bameme mibale ya mibali, mpe bana meme zomi na minei ya mibali ya mobu moko mpe ezanga mbeba. 14 Mpo na ngombe moko na moko ya mobali kati na bangombe yango zomi na misato ya mibali, bokobonza yango elongo na likabo ya bakilo libwa ya farine basangisa na mafuta ; mpo na meme moko na moko kati na bameme yango mibale ya mibali, bakilo motoba ; 15 mpe mpo na mwana meme moko na moko kati na bana meme yango zomi na minei, bakilo misato. 16 Bokobakisa, ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, bakisa lisusu mbeka ya kotumba ya libela na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.
17 Na mokolo ya mibale, bokobonza bangombe ya mibali zomi na mibale, bameme ya mibali mibale mpe bana mibali ya meme zomi na minei, ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba ; 18 elongo na makabo ya mbuma mpe likabo ya masanga mpo na bangombe ya mibali, bameme ya mibali mpe bana mibali ya meme, kolanda motango oyo ekatama. 19 Bokobakisa, ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu mpe lisusu, mbeka ya kotumba ya libela elongo na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.
20 Na mokolo ya misato, bokobonza bangombe ya mibali zomi na moko, meme mibale ya mibali mpe bana mibali ya meme zomi na minei ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba. 21 Mpo na bangombe ya mibali, bameme ya mibali mpe bana mibali ya meme, bokobonza yango na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda motango oyo ekatama. 22 Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, kobakisa lisusu, mbeka ya kotumba ya libela elongo na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.
23 Na mokolo ya minei, bokobonza bangombe ya mibali zomi, bameme ya mibali mibale mpe bana mibali ya meme zomi na minei, ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba. 24 Mpo na bangombe ya mibali, bameme ya mibali mpe bana mibali ya meme, bokobonza yango na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda motango oyo ekatama. 25 Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, kobakisa lisusu, mbeka ya kotumba ya libela elongo na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.
26 Na mokolo ya mitano, bokobonza bangombe ya mibali libwa, bameme ya mibali mibale mpe bana mibali ya meme zomi na minei ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba. 27 Mpo na bangombe ya mibali, bameme ya mibali mpe bana mibali ya meme, bokobonza yango na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda motango oyo ekatama. 28 Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, kobakisa lisusu, mbeka ya kotumba ya libela elongo na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.
29 Na mokolo ya motoba, bokobonza bangombe ya mibali mwambe, bameme ya mibali mibale mpe bana mibali ya meme zomi na minei ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba. 30 Mpo na bangombe ya mibali, bameme ya mibali mpe bana mibali ya meme, bokobonza yango na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda motango oyo ekatama. 31 Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, kobakisa lisusu, mbeka ya kotumba ya libela elongo na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.
32 Na mokolo ya sambo, bokobonza bangombe ya mibali sambo, bameme ya mibali mibale mpe bana mibali ya meme zomi na minei ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba. 33 Mpo na bangombe ya mibali, bameme ya mibali mpe bana mibali ya meme, bokobonza yango na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda motango oyo ekatama. 34 Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, kobakisa lisusu, mbeka ya kotumba ya libela elongo na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.
35 Na mokolo ya mwambe, bokozala na mayangani monene mpe bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo. 36 Bokobonza lokola mbeka ya kotumba mpe likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe : ngombe moko ya mobali, meme moko ya mobali ; mpe bana mibali ya meme, sambo, ya mobu moko mpe ezanga mbeba. 37 Mpo na ngombe ya mobali, meme ya mobali mpe bana mibali ya meme, bokobonza yango na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda motango oyo ekatama. 38 Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, kobakisa lisusu, mbeka ya kotumba ya libela elongo na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.
39 Oyo nde makabo mpe bambeka oyo bokobonzela Yawe na mikolo ya bafeti na bino oyo ekatama ; ekobakisama na likolo ya mbeka na bino ya kotumba, na likolo ya makabo na bino ya bambuma, mbeka na bino ya masanga, mbeka na bino ya boyokani mpo na kokokisa ndayi to mpe na likolo ya makabo oyo bopesaka wuta na mokano ya mitema na bino moko. › »