Rite
1
Libota ya Elimeleki kati na Moabi
Na mikolo oyo bilombe bazalaki koyangela, nzala makasi ezalaki kati na mokili. Mobali moko ya Beteleemi ya Yuda, elongo na mwasi na ye mpe bana na ye mibale ya mibali, bakendeki kovanda na mboka Moabi. Kombo ya mobali yango ezalaki « Elimeleki ; » kombo ya mwasi na ye ezalaki « Naomi ; » mpe bakombo ya bana na ye ya mibali ezalaki « Maaloni » mpe « Kilioni. » Bazalaki bato ya libota ya Efrate mpe bawutaki na Beteleemi ya Yuda. Bakendeki na Moabi mpe bavandaki kuna. Elimeleki, mobali ya Naomi, akufaki ; mpe Naomi atikalaki ye moko elongo na bana na ye mibale ya mibali. Bana na ye mibale ya mibali babalaki basi ya Moabi : ya liboso, kombo na ye ezalaki « Oripa ; » mpe ya mibale, « Rite. » Sima na bango kowumela kuna mibu pene zomi, Maaloni mpe Kilioni bakufaki. Naomi atikalaki ye moko, azangaki bana na ye mibale ya mibali mpe mobali na ye.
Naomi mpe Rite bazongi na Beteleemi
Tango Naomi ayokaki wuta na Moabi ete Yawe ayaki mpo na kosunga bato na Ye na kopesa bango biloko ya kolia, ye elongo na babokilo na ye ya basi babongamaki mpo na kozonga na Yuda wuta na Moabi. Elongo na babokilo na ye mibale ya basi, Naomi alongwaki na esika oyo azalaki kovanda mpe azwaki nzela mpo na kozonga na mokili ya Yuda.
Bongo Naomi alobaki na babokilo na ye mibale ya basi :
— Bozonga, moto na moto na ndako ya mama na ye. Tika ete Yawe asalela bino bolamu ndenge bosalaki bolamu epai ya bato oyo bakufaki mpe epai na ngai moko. Tika ete Yawe apesa na moko na moko na bino bopemi kati na ndako ya mobali mosusu.
Bongo Naomi apesaki bango beze, mpe balelaki makasi. 10 Sima, balobaki na ye :
— Tokokende elongo na yo, epai ya bato na yo.
11 Kasi Naomi azongiselaki bango :
— Bana na ngai ya basi, bozonga na bandako na bino. Mpo na nini kolanda ngai ? Boni, nakoki lisusu kobota bana mibali oyo bakoki kozala mibali na bino ? 12 Bana na ngai, bozonga epai na bino ; nakomi mobange makasi, nakokoka lisusu kobala te. Ata soki nakanisi ete nazali nanu na elikya ya kobota, mpe, na butu ya lelo, nasangisi nzoto na mobali, mpe naboti bana mibali, 13 boni, bokokoka penza kozela kino bakokola ? Bokokoba kaka kozanga kobala mpo na bango ? Te, bana na ngai ! Mawa na ngai ezali makasi koleka mawa na bino, pamba te loboko na Yawe eyokisi ngai pasi makasi.
14 Tango bayokaki bongo, balelaki lisusu. Boye Oripa apesaki mama-bokilo na ye beze mpe mbote ya suka. Kasi Rite akangamaki kaka na ye.
15 Naomi alobaki na Rite :
— Tala, mbanda na yo azongi epai ya bato na ye mpe epai ya banzambe na ye ; yo mpe zonga elongo na ye.
16 Kasi Rite azongiselaki ye :
— Kotindika ngai na makasi te ete natika yo to napengwa na nzela na yo ; pamba te na esika nyonso oyo yo okokende nde ngai mpe nakokende, mpe na esika nyonso oyo yo okovanda nde ngai mpe nakovanda ; bato na yo bakozala bato na ngai, mpe Nzambe na yo akozala Nzambe na ngai. 17 Na esika oyo yo okokufa nde ngai mpe nakokufa, mpe na esika yango nde bakokunda ngai. Tika ete Yawe apesa ngai etumbu ya makasi soki eloko mosusu ekaboli biso longola kaka kufa.
18 Tango Naomi amonaki ete Rite atingami kaka kokende na ye elongo, atikaki kotindika ye na makasi. 19 Yango wana, bango mibale bakendeki kino bakomaki na Beteleemi. Tango bakomaki na Beteleemi, engumba mobimba eyokaki mawa mpo na bango. Mpe basi batunaki :
— Oyo Naomi ?
20 Ye alobaki na bango :
— Bobenga ngai lisusu Naomi te, kasi Mara ; pamba te Nkolo-Na-Nguya-Nyonso ayokisi ngai mawa mingi. 21 Nazalaki na biloko ebele tango nakendeki, kasi Yawe azongisi ngai maboko pamba. Bongo mpo na nini kobenga ngai lisusu Naomi ? Yawe ayokisi ngai pasi, mpe Nkolo-Na-Nguya-Nyonso ayokisi ngai mawa.
22 Ndenge wana nde Naomi azongaki na Yuda wuta na Moabi, elongo na Rite, moto ya Moabi, bokilo na ye ya mwasi. Bakomaki na Beteleemi, na ebandeli ya tango oyo babukaka bambuma ya orje.