4
Libala ya Boazi mpe Rite
Wana Boazi akendeki na ekuke ya engumba mpe avandaki kuna, amonaki mosikoli, oyo Boazi alobaki ete ye nde azali na ndingisa ya kosikola Rite, azali koleka. Boazi alobaki na ye : « Ndeko na ngai ya mobali, yaka nanu mpe vanda awa. » Moto yango apusanaki mpe avandaki.
Boazi abengaki mibali zomi kati na bakambi ya engumba mpe asengaki ete bavanda na bango elongo. Tango bavandaki, Boazi alobaki na mosikoli ya Rite :
— Naomi oyo awutaki na mokili ya Moabi azali koteka elanga ya Elimeleki, ndeko na biso. Ngai nazwaki likanisi ya koyebisa yo mpe kosenga na yo ete osomba na yo yango na miso ya bavandi ya engumba mpe ya bakambi oyo bazali awa. Soki ondimi kosomba yango, somba na yo. Soki te, yebisa ngai mpo ete nayeba ; pamba te yo nde ozali moto ya liboso oyo azali na ndingisa ya kosomba yango, mpe ngai nazali na ndingisa sima na yo.
Moto yango azongiselaki ye :
— Iyo, nakosomba yango.
Boazi alobaki :
— Na mokolo oyo okosomba elanga na maboko ya Naomi, okozwa mpe Rite, moto ya Moabi, mwasi akufisa mobali ; mpo na kosala ete kombo ya mowei etikala na libula na ye.
Mosikoli alobaki :
— Nakoki kosikola yango te, noki te nakotia mobulu kati na libula na ngai. Sikola yango yo moko, pamba te ngai nakoki te kosala yango.
Nzokande, na tango ya kala kati na Isalaele, mpo na kosikola mpe kopesa libula, moto moko azalaki kolongola sapatu na ye mpe kopesa yango epai ya moto mosusu. Sapatu yango ezalaki lokola elembo ya litatoli kati na Isalaele.
Mosikoli alobaki na Boazi :
— Yo moko somba yango.
Boye, alongolaki sapatu na ye.
Boazi ayebisaki bampaka mpe bato nyonso :
— Bino moko bozali batatoli ete nasombi na maboko ya Naomi libula nyonso ya Elimeleki, ya Kilioni mpe ya Maaloni. 10 Nazwi lisusu Rite, moto ya Moabi, oyo azalaki mwasi ya Maaloni oyo akufa, mpo ete azala mwasi na ngai, mpo na kosala ete kombo na ye etikala na libula na ye, ete ebunga te kati na bandeko na ye mpe kati na buku ya leta ya engumba na ye. Bino bozali batatoli na yango lelo.
11 Boye, bampaka mpe bato nyonso oyo bazalaki na ekuke ya engumba balobaki :
— Iyo, biso moko tozali batatoli. Tika ete Yawe akomisa mwasi oyo azali koya na ndako na yo, lokola Rasheli mpe Lea, oyo batongaki elongo libota ya Isalaele. Tika ete okoma moto monene kati na Efrata mpe moto ya lokumu kati na Beteleemi ! 12 Tika ete bakitani oyo Yawe akopesa yo na nzela ya elenge mwasi oyo, bakomisa ndako na yo lokola ndako ya Peretsi oyo Tamari abotelaki Yuda !
 
13 Boye, Boazi akamataki Rite mpe abalaki ye. Sima na Boazi kosangisa na ye nzoto, Yawe asalelaki Rite ngolu : azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. 14 Basi balobaki na Naomi :
« Tika ete Yawe akumisama ;
Ye oyo, na mokolo ya lelo, atiki yo te
kozanga mosikoli oyo kombo na ye
ekokende sango kati na Isalaele !
15 Akoyeisa bomoi na yo sika
mpe akosunga yo na kimobange na yo,
pamba te bokilo na yo, oyo alingaka yo
mpe azali na motuya na miso na yo
koleka bana mibali sambo,
aboteli yo mwana mobali. »
16 Naomi azwaki mwana, atiaki ye na tolo na ye mpe akomaki mama mobokoli na ye. 17 Basi ya mboka wana balobaki : « Naomi aboti mwana mobali ! » Bapesaki mwana mobali yango kombo « Obedi. » Obedi abotaki Izayi, mpe Izayi abotaki Davidi.
 
18 Tala libota ya Peretsi :
 
Peretsi abotaki Etsironi,
19 Etsironi abotaki Rami,
Rami abotaki Aminadabi,
20 Aminadabi abotaki Nashoni,
Nashoni abotaki Salima,
21 Salima abotaki Boazi,
Boazi abotaki Obedi,
22 Obedi abotaki Izayi,
Izayi abotaki Davidi.