8
Ah, soki ozalaki ndeko na ngai ya mobali
oyo amelaki mabele ya mama na ngai !
Soki nakutanaki na yo na libanda,
nalingaki kopesa yo beze,
mpe moto moko te alingaki kotiola ngai.
Nalingaki komema yo
mpe kokotisa yo na ndako ya mama na ngai,
mpo ete oteya ngai bolingo.
Nalingaki komelisa yo vino ya kitoko,
oyo basali na bambuma ya grenade.
 
Tika ete loboko na ye ya mwasi ezala na se ya moto na ngai,
mpe loboko na ye ya mobali ekanga ngai nzoto !
 
Bilenge basi ya Yelusalemi, nabondeli bino :
bolamusa Bolingo na ngai te
liboso ete ye moko akoma na posa ya kolamuka.
Bilenge basi
Nani oyo abimi na esobe
mpe alaleli mobali na ye ya motema ?
Elenge mwasi
Nalamusaki yo na se ya nzete ya pome,
na esika oyo mama na yo azwaki zemi na yo,
esika oyo abotaki yo na pasi.
Tia ngai lokola kashe na motema na yo,
lokola kashe na loboko na yo ;
pamba te bolingo ezali makasi lokola kufa,
zuwa ezali makasi lokola mokili ya bakufi.
Moto ya bolingo epelaka makasi
lokola kake kowuta epai na Yawe.
Mayi minene ekoki koboma moto ya bolingo te ;
ezala mayi ya bibale, ekoki komela yango te.
Soki moto apesi biloko na ye nyonso ya ndako
mpo na kosomba bolingo,
solo penza bakotiola ye.
Bandeko mibali
Tozali na ndeko moko ya mwasi, azali nanu moke ;
azali nanu ata na mabele te.
Tokosala nini mpo na ye
na mokolo oyo bakoluka ye na libala ?
Soki azalaki mir, tolingaki kotonga likolo na ye
ndako oyo esalemi na palata ;
soki azalaki ekuke, tolingaki kokanga ye
na libaya ya sedele.
Elenge mwasi
10 Nazali mir, mpe mabele na ngai ezali
lokola bandako milayi.
Boye, na miso na ye, nazali lokola mwasi
oyo azwi kimia.
Elenge mobali
11 Salomo azali na elanga ya vino kati na Bala-Amoni,
apesi yango na bakengeli ;
moko na moko kati na bango azalaki kopesa
mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko
mpo na kosomba bambuma na yango.
12 Oh Salomo, mbongo ya bibende ya palata,
nkoto moko ezali ya yo,
mpe bibende nkama mibale ezali ya bakengeli bambuma ;
kasi elanga na ngai ya vino, oyo ezali liboso na ngai, ezali ya ngai.
 
13 Yo oyo ovandi kati na bilanga,
baninga na yo balingi koyoka mongongo na yo ;
tika ete oyokisa ngai yango !
Elenge mwasi
14 Oh bolingo na ngai, kima mbangu,
zala lokola mboloko to lokola mwana ya mbuli ;
kende na likolo ya bangomba oyo etondi
na matiti ya solo kitoko.