14
Mokolo ya Yawe
Tala, mokolo ya Yawe ezali koya ; ezali mokolo oyo bakokabola bomengo ya bitumba kati na yo, Yelusalemi.
Nakosangisa bikolo nyonso, na Yelusalemi, mpo ete babundisa engumba yango ; bakobotola yango, bakobuka bandako na yango, bakozwa basi na yango na makasi mpo na kobebisa lokumu na bango, mpe ndambo ya bato kati na yango bakokende na bowumbu, bongo ndambo mosusu ya bato bakotikala.
Bongo Yawe akobima mpe akobundisa bikolo wana, ndenge asalaka na tango ya bitumba. Na mokolo wana, makolo na Ye ekotelema likolo ya ngomba ya banzete ya olive oyo ezali na ngambo ya este ya Yelusalemi ; mpe ngomba ya olive ekokabwana na biteni mibale : eteni moko na ngambo ya este mpe eteni mosusu na ngambo ya weste. Lubwaku moko ya monene ekosalema : eteni moko ya ngomba ekokende na ngambo ya nor, mpe eteni mosusu, na ngambo ya sude. Bokokimela kati na lubwaku ya bangomba na ngai, pamba te lubwaku ya bangomba ekokende kino na Atsali ; bokokima ndenge bokimaki tango mabele eninganaki na tango Oziasi azalaki mokonzi ya Yuda. Bongo Yawe, Nzambe na ngai, akoya elongo na basantu na Ye nyonso.
Na mokolo wana, ezala pole to malili to mpe mvula, eloko moko te ekozala. Ekozala mokolo ya ndenge mosusu, mokolo ezanga moyi mpe butu, mokolo oyo Ye moko kaka Yawe ayebi ; pole ekobima soki pokwa ekoki.
Na mokolo wana, mayi oyo etiolaka ekobimela na Yelusalemi. Ndambo moko ekokende na ebale monene ya este mpe ndambo mosusu, na ebale monene ya weste, na eleko ya malili mpe ya molunge.
Yawe akozala Mokonzi ya mabele mobimba. Na mokolo wana, Ye moko kaka nde akozala Nkolo, mpe bakosambela kaka Ye.
10 Mokili mobimba, longwa na Geba kino na Rimoni, na ngambo ya sude ya Yelusalemi, ekokoma lokola etando ya Araba ; kasi Yelusalemi ekozala kaka na likolo, ekotikala kaka na esika na yango, longwa na Ekuke ya Benjame kino na esika oyo Ekuke ya kala ezalaki, na songe ya bamir, longwa na ndako molayi ya Ananeyeli kino na bikamolelo ya mokonzi. 11 Bato bakozongela kovanda na Yelusalemi ; Yelusalemi ekobebisama lisusu te mpe ekokoma na kimia.
12 Tala etumbu oyo Yawe akopesa na bikolo nyonso oyo ekobundisa Yelusalemi : Misuni ya banzoto na bango ekobanda kopola wana bazali nanu na bomoi ; miso na bango ekokufa na bilongi na bango mpe balolemo na bango ekokufa kati na minoko na bango. 13 Na mokolo wana, Yawe akosala ete mobulu ekota kati na bango, bakobetana makofi mpe bakobomana bango na bango. 14 Bato ya Yuda mpe bakobunda kati na Yelusalemi, bakokongola bomengo ya bikolo nyonso ya zingazinga : wolo, palata mpe bilamba mingi koleka. 15 Etumbu ya ndenge moko kaka ekokweya likolo ya bampunda, ya bamile, ya bashamo, ya ba-ane mpe ya banyama nyonso oyo ekozala na molako.
16 Boye, batikali kati na bikolo nyonso oyo ebundisaki Yelusalemi bakomata mibu nyonso na Yelusalemi mpo na kogumbamela Mokonzi, Yawe Mokonzi ya mampinga, mpe mpo na kosala feti ya Bandako ya kapo. 17 Soki bato ya etuka moko ya mabele bakei te na Yelusalemi mpo na kogumbamela Mokonzi, Yawe Mokonzi ya mampinga, mvula ekonoka te na mokili na bango. 18 Soki bato ya Ejipito baboyi kokende kosala feti na Yelusalemi, mvula ekonoka te na mokili na bango. Boye, Yawe akopesa bango etumbu oyo abongisa mpo na ekolo nyonso oyo ekoboya kokende kosala feti ya Bandako ya kapo. 19 Ekozala etumbu ya Ejipito mpe ya bikolo nyonso oyo ekoboya kokende kosala feti ya Bandako ya kapo.
20 Na mokolo wana, bakotia makomi na bangonga mike-mike ya bampunda : « Ebulisami mpo na Yawe ! » Banzungu ya Tempelo ya Yawe ekozala mpe bule ndenge bakopo ezalaka bule liboso ya etumbelo. 21 Banzungu nyonso kati na Yelusalemi mpe kati na Yuda ekobulisama mpo na Yawe, Mokonzi ya mampinga ; mpe bato nyonso oyo bakoya kopesa makabo bakozwa ndambo ya banzungu mpe bakolambela yango. Na mokolo wana, ata moto moko te ya mombongo akotikala kati na Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga.