3
Makebisi mpe pamela
Oh bana ya Isalaele, boyoka liloba oyo Yawe alobi na tina na bino, na tina na etuka nyonso oyo nabimisaki na Ejipito :
« Bozali etuka moko kaka oyo Ngai napona
kati na bituka nyonso ya mabele ;
yango wana nakopesa bino etumbu
mpo na mabe nyonso oyo bosali.
Boni, bato mibale bakoki solo kotambola nzela moko
soki bayokani te ?
Nkosi ekoki solo koganga na zamba
soki emoni te nyama ya kolia ?
Mwana nkosi ekoki penza konguluma
na esika oyo evandaka soki ekangi nyama te ?
Ndeke ekoki solo kokangama na motambo
oyo ezali na mabele
soki ezangi eloko ya kolia ?
Motambo ekoki solo koningana
soki ekangi eloko te ?
Boni, kelelo ya bitumba ekoki solo kobeta kati na engumba,
bongo bato bazanga kobanga ?
Pasi ekoki solo koya na engumba
soki Yawe atindi yango te ?
Solo, Nkolo Yawe asalaka eloko moko te
soki alakisi mabongisi na Ye te
epai ya basali na Ye, basakoli.
Nkosi egangi ;
nani akobanga te ?
Nkolo Yawe alobi ;
nani akoki koboya kosakola ?
Bosakola makambo oyo
kati na bandako ya Asidodi mpe ya Ejipito :
‹ Bosangana na likolo ya bangomba ya Samari
mpe botala ndenge nini mobulu mpe minyoko
ezali kosalema kati na yango !
10 Bato na Ngai bayebi lisusu te
kosala makambo na bosembo, ›
elobi Yawe,
‹ batondisi bandako na bango na bomengo ya bitumba
mpe na biloko oyo babotoli na makasi. › »
11 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :
« Monguna moko akozingela yo,
akosukisa yo mpe akobotola na makasi
biloko kati na bandako na yo,
oyo batonga makasi. »
 
12 Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Ndenge mobateli bibwele alongolaka na monoko ya nkosi
makolo mibale to songe ya litoyi ya meme,
ndenge wana nde bana ya Isalaele bakobikisama,
ba-oyo bavandaka na Samari, na basonge
mpe na basuka ya bambeto na bango. »
13 « Boyoka makambo oyo
mpe bokebisa ndako ya Jakobi, »
elobi Yawe, Nzambe, Mokonzi ya mampinga.
14 « Na mokolo oyo nakopesa Isalaele etumbu
mpo na masumu na ye,
nakobebisa bitumbelo ya Beteli,
nakobuka maseke ya bitumbelo,
mpe ekokweya na mabele.
15 Nakokweyisa ndako ya tango ya malili makasi
mpe ya tango ya molunge makasi ;
mpe bandako oyo batonga kitoko
na pembe ya nzoko ekozala lisusu te, »
elobi Yawe.