6
Mawa na bato oyo bamimonaka ete bakoka
Mawa na bino oyo bomimonaka ete bokoka kati na Siona,
mpe na bino oyo bokanisaka ete bozali na kimia na likolo ya ngomba Samari,
bino bato ya lokumu ya ekolo oyo ekenda sango
koleka bikolo mosusu epai wapi bana ya Isalaele bayaka !
Bokende na Kaline mpo na kotala makambo oyo elekaki kuna !
Bongo longwa kuna, bokende na Amati, engumba monene,
mpe bokende lisusu na Gati kati na Filisitia !
Boni, bingumba oyo eleki penza
bingumba ya mikili ya bokonzi oyo na malamu ?
Mpe etando na yango eleki ya bino na monene ?
Bozali kozongisa mokolo ya pasi sima
mpe komibendela bokonzi ya somo.
Bozali kolala na bambeto oyo batia pembe ya nzoko,
bozali komivandisa na bakiti ya divan ya kitoko,
bozali kolia misuni ya bameme ya kitoko kati na bibwele
mpe ya bana ngombe ya mibali ya mafuta kati na etonga.
Bozali kobeta mandanda na bino lokola Davidi
mpe kokotisa bibetelo mindule kati na banzembo na bino.
Bozali komela bakopo etonda na masanga ya vino
mpe bozali kopakola mafuta ya talo na banzoto na bino,
kasi kobebisama ya ndako ya Jozefi ezali kosala bino pasi na mitema te.
Yango wana bokozala bato ya liboso mpo na kokende na bowumbu,
mpe bafeti ya bato oyo bamivandisaka na bakiti ya kitoko ekosila.
Kobebisama ya engumba Samari
Nkolo Yawe alapi ndayi na Kombo na Ye moko ;
Yawe, Nzambe, Mokonzi ya mampinga, alobi :
« Nazali na somo ya lolendo ya Jakobi,
nayini bandako na ye, oyo batonga makasi ;
nakokaba engumba elongo na biloko na yango nyonso. »
Soki bato zomi batikali na bomoi kati na ndako moko, bango mpe bakokufa. 10 Soki noko moko oyo asengeli kotumba bibembe ayei kobimisa yango na ndako mpe atuni na moto nyonso oyo abombami kuna :
— Boni, ozali elongo na moto mosusu kuna ?
Akozongisa :
— Te, moto mosusu azali te !
Bongo akoloba lisusu :
— Esili ! Bakolobela lisusu Kombo ya Yawe te.
11 Pamba te Yawe apesi mitindo,
boye akobuka-buka na biteni ndako monene
mpe akobuka-buka na biteni ya mike-mike ndako moke.
 
12 Boni, bampunda ekimaka penza mbangu
na nzela oyo etonda na mabanga ?
Ngombe ebalolaka penza mabele na bisika ya ndenge wana ?
Kasi bino bokomisi bosembo ngenge,
mpe mbuma ya bosembo bololo.
13 Bozali kosepela mpo ete bozwi Lo-Debari
mpe bozali komikumisa na koloba :
« Boni, tobotoli engumba Karinayimi na makasi na biso moko te ? »
 
14 Mpo na yango, Yawe, Nzambe, Mokonzi ya mampinga, alobi :
« Oh libota ya Isalaele, nakobimisa ekolo moko
oyo ekobundisa mpe ekonyokola yo tango nyonso
wuta na Lebo-Amati kino na lubwaku ya Araba. »