11
Polo atelemeli bantoma ya lokuta
Bandeko, nabondeli bino : boyikela nanu oyo emonani lokola bozoba na ngai mpiko ! Iyo, boyikela ngai mpiko. Mpo na bino, natondi na zuwa kowuta na Nzambe. Nabalisaki bino na mobali moko kaka, Ye nde Klisto, lokola elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe azali peto.
Nzokande, nazali kobanga ete makanisi na bino ebeba mpe epengwisa bino mosika na nzela ya solo mpe ya peto na miso ya Klisto, ndenge nyoka ekosaki Eva na mayele na yango ya mabe. Pamba te bozali kondima ete songolo aya koteya bino Yesu mosusu oyo akeseni na Yesu oyo biso toteyaki bino ; bozali mpe kondima kozwa molimo mosusu oyo ekeseni na Molimo oyo boyambaki to mateya oyo ekeseni na Sango Malamu oyo bondimelaki !
Nzokande, nakanisi ete nazali moke te na miso ya bantoma oyo bamimonaka ete bazali minene. Nakoki solo komonana lokola moto oyo ayebi nanu te koloba malamu, kasi nazali na boyebi ; mpe tolakisaki bino yango polele na banzela mpe na makambo nyonso.
Boni, nasalaki mabe ndenge namikitisaki mpo ete bino botombwama, wana nateyaki bino Sango Malamu ya Nzambe ? Nazwaki mbongo kowuta na Mangomba mosusu lokola lisungi na bango, wana nazalaki kokokisa lotomo na ngai kati na bino. Tango nazalaki epai na bino, namemisaki moto moko te mokumba na ngai, atako nazalaki kokelela. Pamba te bandeko oyo bawutaki na Masedwane bapesaki ngai biloko nyonso oyo nazalaki na yango na bosenga. Mpe nazalaki komibatela malamu mpo ete namemisa bino mokumba na ngai te ; mpe nakokoba kaka komibatela mpo na likambo yango. 10 Lokola solo ya Klisto ezali kati na ngai, moto moko te kati na etuka ya Akayi akobotola ngai lokumu yango.
11 Mpo na nini nalobi bongo ? Mpo nalingaka bino te ? Nzambe ayebi ete nalingaka bino ! 12 Mpe nakokoba kosala oyo nazali kosala sik’oyo, mpo na kopekisa bato oyo bazali koluka nzela ya komikokanisa na biso kati na makambo oyo bazali komikumisa na yango.
13 Pamba te bato ya lolenge wana bazali bantoma ya lokuta, bazali bakosi oyo bazali komikomisa lokola bantoma ya Klisto. 14 Ezali likambo ya kokamwa te, pamba te Satana mpe amikomisaka lokola anjelu ya pole. 15 Ezali likambo ya kokamwa te soki basali na ye mpe bazali komikomisa lokola basali ya Nzambe ya sembo. Kasi suka na bango ekozala kolanda misala na bango.
Polo mpe basakoli ya lokuta
16 Nazongeli lisusu : tika ete moto moko te azwa ngai lokola moto ya liboma ! Kasi soki bolingi bongo, boyamba ngai lokola moto ya liboma mpo ete ngai mpe namikumisa mwa moke.
17 Makambo oyo nalingi koloba, nakoloba yango te ndenge Nkolo alingi, kasi nakoloba yango lokola moto ya liboma, mpe nazali na elikya ete nakozwa nzela ya komikumisa. 18 Lokola bato mingi bazali komikumisa na tina na makambo ya mokili, ngai mpe nakomikumisa.
19 Bino oyo bozali bato ya bwanya, bozali kondima na esengo nyonso bato ya maboma. 20 Bozali penza kondima ete bato bakomisa bino bawumbu, babotola bozwi na bino, banyokola bino, bamonela bino, babeta bino na bilongi !
21 Nalobi yango na soni ete tozalaki penza babolole mpo na komitika bongo. Nzokande, makambo oyo bato mosusu balingi komikumisa na tina na yango —nazali koloba lokola moto ya liboma— ngai mpe nakoki komikumisa na tina na yango. 22 Bazali Ba-Ebre ? Ngai mpe nazali Mo-Ebre. Bazali bana ya Isalaele ? Ngai mpe nazali mwana ya Isalaele ! Bazali bakitani ya Abrayami ? Ngai mpe nazali mokitani ya Abrayami. 23 Bazali basali ya Klisto ? —Nazali koloba lokola moto ya liboma— Ngai naleki bango. Pamba te nasalaki makasi penza, nakotaki mbala mingi na boloko, babetaki ngai mingi, nakutanaki na makama ya kufa mbala mingi. 24 Mbala mitano, Bayuda babetaki ngai bafimbu tuku misato na libwa ; 25 mbala misato, babetaki ngai banzete ; mbala moko, babambaki ngai mabanga ; mbala misato, nazindaki na mayi ; nasalaki mokolo moko mpe butu moko kati na ebale monene. 26 Mbala na mbala, nazalaki kosala mibembo ; nakutanaki na makama ya bibale, makama liboso ya bato mabe, makama liboso ya bandeko na ngai ya ekolo moko, makama liboso ya Bapagano, makama kati na engumba, makama kati na esobe, makama kati na ebale monene, mpe makama liboso ya bandeko ya lokuta.
27 Solo nasalaki misala makasi mpe ya pasi penza ; mbala mingi, nalalaki pongi te, nazangaki bilei ya kolia mpe mayi ya komela, nakilaki bilei, nanyokwamaki na malili, mpe nazangaki bilamba ya kolata. 28 Longola makambo nyonso oyo etikali, mokumba na ngai ya mokolo na mokolo ezalaki : komitungisa na tina na Mangomba nyonso. 29 Nani oyo alembi, bongo ngai nalemba nzoto te ? Nani oyo akweyi na masumu, bongo ngai nayoka motema pasi te ? 30 Soki nasengeli komikumisa, nakomikumisa mpo na bolembu na ngai. 31 Nzambe mpe Tata ya Nkolo Yesu, Ye oyo akumisama mpo na seko, ayebi ete nazali kokosa te.
32 Kati na Damasi, moyangeli ya mokonzi Aretasi apesaki mitindo ete bakengela engumba ya bato ya Damasi mpo ete bakanga ngai. 33 Kasi bakitisaki ngai na nzela ya lidusu kati na mir, kati na kitunga, libanda ya mir ; bongo nalongaki kokima ye.