2
Bayuda oyo bawutaki na bowumbu
Tala bato ya etuka ya Yuda, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, amemaki na bowumbu na mokili ya Babiloni, mpe, wuta na bowumbu, bazongaki na Yelusalemi mpe na Yuda, moto na moto kati na engumba na ye. Bazongaki nzela moko na Zorobabeli, Jozue, Neyemi, Seraya, Reyelaya, Maridoshe, Bilishani, Misipari, Bigivayi, Rewumi, Baana.
 
Tala motango ya bana ya Isalaele :
Bakitani ya Pareoshi :
nkoto mibale na nkama moko na tuku sambo na mibale.
Bakitani ya Shefatia :
nkama misato na tuku sambo na mibale.
Bakitani ya Ara :
nkama sambo na tuku sambo na mitano.
Bakitani ya Paati-Moabi na nzela ya Jozue mpe Joabi :
nkoto mibale na nkama mwambe na zomi na mibale.
Bakitani ya Elami :
nkoto moko na nkama mibale na tuku mitano na minei.
Bakitani ya Zatu :
nkama libwa na tuku minei na mitano.
Bakitani ya Zakayi :
nkama sambo na tuku motoba.
10 Bakitani ya Bani :
nkama motoba na tuku minei na mibale.
11 Bakitani ya Bebayi :
nkama motoba na tuku mibale na misato.
12 Bakitani ya Azigadi :
nkoto moko na nkama mibale na tuku mibale na mibale.
13 Bakitani ya Adonikami :
nkama motoba na tuku motoba na motoba.
14 Bakitani ya Bigivayi :
nkoto mibale na tuku mitano na motoba.
15 Bakitani ya Adini :
nkama minei na tuku mitano na minei.
16 Bakitani ya Ateri na nzela ya Ezekiasi :
tuku libwa na mwambe.
17 Bakitani ya Betsayi :
nkama misato na tuku mibale na misato.
18 Bakitani ya Yora :
nkama moko na zomi na mibale.
19 Bakitani ya Ashumi :
nkama mibale na tuku mibale na misato.
20 Bakitani ya Gibari :
tuku libwa na mitano.
21 Bato ya mboka Beteleemi,
nkama moko na tuku mibale na misato.
22 Bato ya mboka Netofa :
tuku mitano na motoba.
23 Bato ya mboka Anatoti :
nkama moko na tuku mibale na mwambe.
24 Bato ya Azimaveti :
tuku minei na mibale.
25 Bakitani ya Kiriati-Yearimi, Kefira mpe Beyeroti :
nkama sambo na tuku minei na misato.
26 Bakitani ya Rama mpe Geba :
nkama motoba na tuku mibale na moko.
27 Bato ya mboka Mikimasi :
nkama moko na tuku mibale na mibale.
28 Bato ya bamboka Beteli mpe Ayi :
nkama mibale na tuku mibale na misato.
29 Bakitani ya Nebo :
tuku mitano na mibale.
30 Bakitani ya Magibishi :
nkama moko na tuku mitano na motoba.
31 Bakitani ya Elami mosusu :
nkoto moko na nkama mibale na tuku mitano na minei.
32 Bakitani ya Arimi :
nkama misato na tuku mibale.
33 Bakitani ya Lodi, Adidi mpe Ono :
nkama sambo na tuku mibale na mitano.
34 Bakitani ya Jeriko :
nkama misato na tuku minei na mitano.
35 Bakitani ya Sena :
nkoto misato na nkama motoba na tuku misato.
 
36 Tala motango ya Banganga-Nzambe :
Bakitani ya Yedaeya, na nzela ya libota ya Jozue :
nkama libwa na tuku sambo na misato.
37 Bakitani ya Imeri :
nkoto moko na tuku mitano na mibale.
38 Bakitani ya Pashuri :
nkoto moko na nkama mibale na tuku minei na sambo.
39 Bakitani ya Arimi :
nkoto moko na zomi na sambo.
 
40 Tala motango ya Balevi :
Bakitani ya Jozue na nzela ya Kadimieli mpe ya Odavia :
tuku sambo na minei.
 
41 Tala motango ya bayembi :
Bakitani ya Azafi :
nkama moko na tuku mibale na mwambe.
 
42 Tala motango ya bakengeli bikuke ya Tempelo :
Bakitani ya Shalumi, Ateri, Talimoni, Akubi, Atita mpe Shobayi :
nkama moko na tuku misato na libwa.
 
43 Tala basali ya Tempelo :
Bakitani ya Tsika, Asufa, Tabaoti, 44 Kerosi, Siya, Padoni, 45 Lebana, Agaba, Akubi 46 Agabi, Shalimayi, Anani, 47 Gideli, Gaari, Reaya, 48 Retsini, Nekoda, Gazami, 49 Uza, Paseya, Besayi, 50 Asina, Mewunimi, Nefusimi, 51 Bakibuki, Akufa, Aruri, 52 Batsiluti, Meyida, Arisha, 53 Barikosi, Sisera, Tama, 54 Netsia mpe Atifa.
 
55 Tala bakitani ya basali ya Salomo :
Bakitani ya Sotayi, Sofereti, Peruda, 56 Yala, Darikoni, Gideli, 57 Shefatia, Atili, Pokereti-Atsebayimi mpe Ami.
58 Motango ya basali ya Tempelo mpe ya bakitani ya basali ya Salomo : nkama misato na tuku libwa na mibale.
 
59 Tala molongo ya bato oyo bawutaki na bowumbu, na bingumba Teli-Mela, Teli-Arisha, Kerubi-Adani mpe Imeri, kasi balongaki te kolakisa ete mabota na bango ya botata ewuta na Isalaele :
60 Bakitani ya Delaya, Tobiya mpe Nekoda :
nkama motoba na tuku mitano na mibale.
 
61 Mpe kati na Banganga-Nzambe :
Bakitani
ya Obaya, ya Akotsi mpe ya Barizilayi oyo abengamaki « Barizilayi » mpo ete abalaki mwana mwasi ya Barizilayi, moto ya Galadi.
62 Balukaki mikanda oyo bakoma bakombo ya bakoko na bango, kasi batikalaki komona yango te. Boye balongolaki bango na mosala ya bonganga-Nzambe, pamba te bazalaki mbindo. 63 Moyangeli apekisaki bango kolia bilei ya bule kino tango Nganga-Nzambe moko akotuna toli ya Yawe na tina na bango, na nzela ya Urimi mpe Tumimi.
 
64 Motango ya lisanga mobimba ya bato oyo bawutaki na bowumbu ezalaki nkoto tuku minei na mibale na nkama misato na tuku motoba, 65 bakisa bawumbu na bango ya mibali mpe ya basi, nkoto sambo na nkama misato na tuku misato na sambo ; bazalaki na bayembi na bango ya basi mpe ya mibali, nkama mibale ; 66 bampunda ya bitumba, nkama sambo na tuku misato na motoba ; bamile nkama mibale na tuku minei na mitano ; 67 bashamo nkama minei na tuku misato na mitano ; mpe ba-ane nkoto motoba na nkama sambo na tuku mibale.
 
68 Tango bakomaki na Tempelo ya Yawe, na Yelusalemi, bakambi mingi ya mabota bapesaki makabo oyo bakataki bango moko kopesa wuta na mokano ya mitema na bango mpo na kotonga lisusu Tempelo ya Nzambe, na esika na yango ya kala. 69 Bapesaki na libenga ya misala, moto na moto kolanda ezweli na ye, mbongo ya bibende ya wolo nkoto tuku motoba na moko, mbongo ya bibende ya palata nkoto mitano, mpe banzambala nkama moko ya mosala ya bonganga-Nzambe.
70 Banganga-Nzambe, Balevi, bakengeli bikuke, bayembi, basali ya Tempelo, ndambo kati na bato mpe bato nyonso ya Isalaele bavandaki kati na bingumba na bango.