4
Batelemeli misala ya kotonga Tempelo
Tango banguna ya Yuda mpe ya Benjame bayokaki ete bato oyo bawutaki na bowumbu bazali kotonga Tempelo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, bayaki epai ya Zorobabeli mpe bakambi ya mabota ; balobaki na bango :
— Botika ete tosunga bino na mosala ya kotonga Tempelo oyo, pamba te biso mpe tolukaka Nzambe na bino mpe tobonzelaka Ye mbeka wuta na tango ya Esari-Adoni, mokonzi ya Asiri, oyo amemaki biso awa.
Kasi Zorobabeli, Jozue mpe bakambi mosusu ya mabota ya Isalaele bazongisaki :
— Bokotonga te elongo na biso Tempelo ya Yawe, Nzambe na biso ; tokotonga yango biso moko mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, kolanda mitindo ya Sirisi, mokonzi ya Persi.
Bato ya bikolo oyo ezalaki elongo na bango kati na mboka balembisaki bato ya Yuda nzoto mpe babangisaki bango mpo ete bakoba lisusu te kotonga ; bapesaki bapesi toli kanyaka mpo ete batelemela mpe babebisa mabongisi na bango na nzela ya batoli ya mabe, na mikolo nyonso ya Sirisi kino na oyo ya Dariusi, bango mibale bakonzi ya Persi.
Mokanda epai ya mokonzi Aritakizerisesi
Kaka na ebandeli ya bokonzi ya Kizerisesi, batindelaki ye mokanda mpo na kofunda bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi. Bongo na mikolo ya Aritakizerisesi lokola mokonzi ya Persi, Bishilami, Mitredati, Tabeyeli mpe baninga na bango ya mosala bakomelaki Aritakizerisesi mokanda. Bakomaki yango na makomi mpe na lokota ya Arami. Moyangeli Rewumi mpe Shimishayi, mokomi mikanda na ye, bakomelaki mokonzi Aritakizerisesi mokanda oyo na tina na Yelusalemi :
« Moyangeli Rewumi mpe Shimishayi, mokomi mikanda, elongo na baninga na bango, basambisi mpe bakambi ya bato ya Dini, ya Arifarisataki, ya Taripeli, ya Afarasi, ya Ereki, ya Babiloni, ya Size, ya Deya, ya Elami, 10 mpe bato ya bikolo mosusu oyo Asuribanipali, mokonzi monene mpe mokonzi ya lokumu, amemaki na bowumbu mpo na kotia bango kati na engumba Samari mpe kati na bituka nyonso ya ngambo ya weste ya ebale Efrate. »
11 Tala maloba oyo batindelaki ye na mokanda :
« Epai ya mokonzi Aritakizerisesi.
Maloba kowuta na biso basali na yo, bato ya ngambo ya weste ya ebale Efrate.
12 Tika ete mokonzi ayeba ete Bayuda oyo bawutaki epai na yo bakomi kati na biso, na Yelusalemi ; bazali kotonga engumba ya batomboki mpe ya bato ya mobulu, bazali kotonga bamir mpe kobongisa lisusu miboko.
 
13 Tika ete mokonzi ayeba lisusu ete, soki engumba oyo etongami lisusu mpe babongisi bamir na yango, bakofuta lisusu te mpako ya mokonzi, mpako ya mabele mpe mpako ya nzela ; na bongo, bomengo ya mokonzi ekokita. 14 Sik’oyo, lokola tozwi libaku ya kosala epai ya mokonzi mpe lokola ezali malamu te mpo na biso komona lokumu ya mokonzi kobebisama, totindi sango oyo mpo na kotalisa makambo oyo epai ya mokonzi 15 mpo ete baluka kati na babuku ya bakonzi oyo bazalaki liboso na yo mpo na kososola malamu. Okomona solo kati na babuku yango ete engumba oyo ezali engumba ya batomboki, etungisaka bakonzi mpe bituka. Mpe lisusu, wuta kala, ezali esika ya batomboki. Yango wana engumba oyo ebebisamaki. 16 Tozali koyebisa mokonzi ete soki batongi lisusu engumba oyo mpe babongisi bamir na yango, okotikala lisusu na eloko moko te na ngambo ya weste ya ebale Efrate. »
17 Mokonzi azongisaki eyano oyo :
« Epai ya moyangeli Rewumi ; Shimishayi, mokomi mikanda na ye, mpe baninga na bango mosusu ya mosala oyo bavandaka na Samari mpe kati na bituka nyonso na ngambo ya weste ya ebale Efrate :
Napesi bino mbote.
18 Batangaki mpe babongolaki na miso na ngai mokanda oyo botindelaki biso. 19 Napesaki mitindo mpo ete baluka koyeba mpe kososola bosolo. Boye emonani solo ete, wuta na kala, engumba oyo etombokelaka kaka bakonzi mpe etindaka bato na botomboki mpe na mobulu. 20 Na Yelusalemi, ezalaki na bakonzi ya nguya oyo bazalaki kokonza etuka mobimba ya ngambo ya weste ya ebale Efrate mpe epai ya banani bazalaki kofuta mpako ya mokonzi, mpako ya mabele mpe mpako ya nzela. 21 Boye, bopesa sik’oyo mitindo epai ya bato wana ete bakoba lisusu te kotonga mpo ete engumba wana etongama lisusu te kino tango ngai moko nakopesa mitindo. 22 Bosala keba ete bozwa likambo oyo na pete te. Mpo na nini kotika nzela ete mobulu oyo ekola mpe ekitisa bomengo ya mokonzi ? »
23 Tango kaka batangaki mokanda ya mokonzi Aritakizerisesi liboso ya Rewumi ; Shimishayi, mokomi mikanda na ye, mpe baninga na bango ya mosala bakendeki mbala moko na Yelusalemi epai ya Bayuda mpe bapekisaki bango na makasi ete bakoba lisusu te kotonga.
 
24 Wuta tango wana, misala ya Ndako ya Nzambe kati na Yelusalemi etelemaki kino na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, mokonzi ya Persi.