5
Ester akoti epai ya mokonzi
Na mokolo ya misato ya kokila bilei, Ester alataki bilamba na ye ya bokonzi mpe akotaki na lopango ya kati ya ndako ya mokonzi, liboso ya shambre na ye. Mokonzi azalaki ya kovanda na kiti na ye ya bokonzi kati na shambre oyo ezalaki kotalana na ekuke ya kokotela. Tango mokonzi amonaki Ester, mwasi na ye, atelemi kati na lopango, asalelaki ye ngolu. Mokonzi asembolaki epai ya Ester lingenda ya wolo ya bokonzi na ye, oyo ezalaki na loboko na ye. Ester apusanaki mpe asimbaki songe ya lingenda ya bokonzi. Mokonzi atunaki ye :
— Ester, mwasi ya mokonzi, likambo nini ? Bosenga na yo ezali nini ? Nazali pene ya kopesa yo ata kati-kati ya bokonzi na ngai !
Ester azongisaki :
— Oh soki esepelisi mokonzi, tika ete mokonzi akoka koya lelo, elongo na Amani, na feti monene oyo nabongisi mpo na ye.
Mokonzi alobaki :
— Bolukela ngai noki Amani mpo ete tokokisa bosenga ya Ester.
Boye, mokonzi mpe Amani bakendeki na feti oyo Ester abongisaki. Tango bazalaki komela vino, mokonzi atunaki lisusu Ester :
— Sik’oyo, posa na yo ezali nini ? Ekopesamela yo. Mpe bosenga na yo ezali nini ? Ekopesamela yo, ata soki ezali kati-kati ya bokonzi na ngai.
Ester azongisaki :
— Posa mpe bosenga na ngai ezali boye : Soki nazwi ngolu na miso ya mokonzi mpe soki mokonzi asepeli kokokisa posa mpe bosenga na ngai, tika ete mokonzi mpe Amani bakoka koya lobi na feti oyo nakobongisa mpo na bango ; bongo nde nakopesa eyano na motuna ya mokonzi.
Amani akani koboma Maridoshe
Amani abimaki na esengo mpe na nsayi. Kasi tango Amani amonaki Maridoshe na ekuke ya mokonzi mpe asosolaki ete Maridoshe atelemi te mpe azali kolenga te liboso na ye, Amani asilikelaki Maridoshe makasi. 10 Kasi atako bongo, Amani akangaki motema mpe azongaki epai na ye ; abengisaki balingami na ye mpe Zereshi, mwasi na ye. 11 Amani abetelaki bango lisolo ya bomengo na ye oyo ezalaki penza ebele, motango ya bana na ye mpe makambo nyonso oyo mokonzi azalaki kosala mpo na kopesa ye lokumu mpe ndenge nini atombolaki ye likolo ya bakambi mpe bakalaka mosusu.
12 Amani abakisaki :
— Esuki kaka wana te ! Nazali kaka ngai moko, moto oyo Ester, mwasi ya mokonzi, abengi elongo na mokonzi na feti oyo abongisi. Mpe lobi, abengi ngai lisusu elongo na mokonzi. 13 Kasi makambo oyo nyonso ezali kosepelisa ngai te tango nazali komona Moyuda wana Maridoshe kovanda na ekuke ya mokonzi.
14 Zereshi, mwasi na ye, mpe baninga na ye nyonso balobaki na ye :
— Telemisa nzete ya bametele pene tuku mibale na mitano na bosanda ; mpe lobi na tongo, okosenga na mokonzi ete badiembika Maridoshe na nzete yango. Bongo okokende na esengo na feti elongo na mokonzi.
Likanisi oyo esepelisaki Amani, mpe atelemisaki nzete.