6
Kobongola motema ya lokuta 
 
1 Boya, tozonga epai na Yawe !  
Akati-kati biso solo na biteni, kasi akobikisa biso ;  
azokisaki biso, kasi akotia kisi na bapota na biso.   
2 Sima na mikolo mibale, akopesa biso lisusu bomoi ;  
na mokolo ya misato, akotelemisa biso lisusu  
mpo ete tozala na bomoi liboso na Ye.   
3 Toyeba Yawe, toluka penza koyeba Ye ;  
ndenge tongo etanaka solo,  
ndenge wana mpe akomonana :  
akoya epai na biso lokola mvula,  
lokola mvula oyo enokaka na pwasa  
mpe epolisaka mabele.   
   
 
4 Efrayimi, nasala yo lisusu nini ?  
Yuda, nasala yo lisusu nini ?  
Bolingo na bino mpo na Ngai ezali  
lokola londende ya tongo,  
lokola mamwe oyo elimwaka noki.   
5 Yango wana, na maloba ya basakoli na Ngai,  
nazali kokata-kata bino na biteni ;  
na maloba ya monoko na Ngai,  
nazali koboma bino,  
mpe bitumbu ezali kokweyela bino lokola mokalikali.   
6 Pamba te nasepelaka na boboto koleka mbeka,  
mpe na boyebi ya Nzambe koleka mbeka ya kotumba.   
7 Ndenge kaka Adamu asalaki,  
bango mpe babukaki boyokani na Ngai ;  
kuna, bazalaki sembo te liboso na Ngai.   
8 Galadi ezali engumba ya bato mabe,  
etonda na bilembo ya makila.   
9 Ndenge babomi babombamaka  
mpo na koluka kosala bato mabe,  
ndenge wana mpe Banganga-Nzambe basalaka :  
babomaka bato na nzela ya Sishemi ;  
ezali likambo ya somo penza !   
10 Kati na libota ya Isalaele,  
namonaki makambo ya somo makasi :  
Efrayimi amipesaki na kindumba,  
mpe Isalaele akomaki mbindo.   
   
 
11 Yo mpe lisusu, Yuda,  
tango ya kobuka mbuma ebongisami mpo na yo,  
sima na Ngai kozongisa bomengo ya bato na Ngai.