8
Etumbu ya Isalaele 
 
1 Tia kelelo na monoko na yo !  
Lokola mpongo, pasi ekokitela Ndako ya Yawe,  
mpo ete babebisi boyokani na Ngai  
mpe batombokeli Mobeko na Ngai.   
2 Isalaele azali kobelela Ngai :  
« Oh Nzambe na biso, toyebi Yo ! »   
3 Kasi Isalaele abwaki makambo malamu ;  
yango wana, monguna akolanda ye.   
4 Batunaki Ngai te  
tango batiaki bakonzi mpe baponaki bakambi.  
Bamisalelaki banzambe ya bikeko  
na palata mpe na wolo na bango  
mpo na libebi na bango moko.   
5 Oh Samari, nzambe na yo ya ekeko  
ya mwana ngombe ya mobali ezali nkele !  
Kanda na Ngai epeli mpo na kobebisa bango.  
Kino tango nini bakokoka te kotambola na bopeto ?   
6 Ewuti na Isalaele !  
Ekeko wana ya mwana ngombe ya mobali,  
ezali monyangwisi bibende na moto nde asala yango ;  
ezali Nzambe te.  
Bakobuka yango biteni-biteni,  
mwana ngombe wana ya Samari.   
   
 
7 « Lokola baloni mopepe,  
bakobuka mopepe ya makasi.  
Nzete ya ble oyo ezanga moto ebimisaka farine te.  
Ezala soki ebimisi mito,  
ezali bapaya nde bakolia yango.   
   
 
8 Isalaele abebisami ;  
tala bango wana kati na bikolo,  
bazali komonana lokola biloko pamba !   
9 Pamba te bakendeki na Asiri  
lokola ane ya zamba oyo ezali kotelengana yango moko.  
Efrayimi apesaki bakado epai ya bamakangu na ye.   
10 Ata apesaki bakado kati na bikolo,  
sik’oyo Ngai nakosangisa bango esika moko  
mpe bakobanda kosila kokufa na se ya minyoko  
ya mokonzi moko ya nguya.   
   
 
11 Ata Efrayimi atongi bitumbelo ebele  
mpo na kolongola masumu na ye,  
kasi bitumbelo yango ekomemisa ye kaka masumu.   
12 Nakomelaki bango  
makambo ebele ya Mobeko na Ngai,  
kasi bamonaki yango lokola eloko moko ya mopaya.   
13 Bazali kobonza bambeka lokola likabo mpo na Ngai,  
mpe bazali kolia misuni ;  
kasi Yawe azali kosepela na bango te.  
Sik’oyo, akokanisa mabe na bango  
mpe akopesa bango etumbu  
mpo na masumu na bango :  
bakozonga na Ejipito.   
14 Isalaele abosani Mokeli na ye  
mpe atongi bandako ya kitoko ;  
Yuda atongi bingumba ebele batonga makasi ;  
kasi Ngai nakotinda moto kati na bingumba na bango,  
mpe ekotumba bandako na bango ya kitoko. »