18
Bato ya libota ya Dani Bavandaki na Laishi
Na mikolo wana, bana ya Isalaele bazalaki na mokonzi te, mpe bato ya libota ya Dani bazalaki koluka esika ya kovanda ; pamba te kino na tango wana, bazwaki nanu ya bango libula te kati na mabota nyonso ya Isalaele. Boye, bana ya libota ya Dani batindaki mibali mitano ya libota na bango, kowuta na Tsorea mpe na Eshitaoli, mpo na kokende kononga mpe koyeba mokili yango. Balobaki na bango : « Bokende koyeba mokili yango ndenge ezali. »
Mibali mitano yango bakotaki na etuka ya bangomba ya Efrayimi kino na ndako ya Mika, epai wapi balekisaki butu. Tango bakomaki pembeni ya ndako ya Mika, bayokaki mongongo ya elenge mobali Molevi. Babalukaki epai ye azalaki mpe balobaki na ye :
— Nani amemaki yo awa ? Ozali kosala nini na esika oyo ? Mpo na nini ozali awa ?
Elenge mobali ayebisaki bango :
— Tala makambo oyo Mika asali mpo na ngai : Azwi ngai na mosala mpe akomisi ngai nganga-nzambe na ye.
Balobaki na ye :
— Tunela biso epai ya Nzambe mpo ete toyeba soki mobembo na biso ekozala malamu.
Nganga-nzambe azongiselaki bango :
— Bokende na kimia, Yawe andimi mobembo na bino.
Mibali mitano yango bakendeki mpe bakomaki na Laishi. Bamonaki ete, kuna, bazali na kimia mpe na kozanga nungunungu lokola bato ya Sidoni, oyo bazalaki na kimia mpe na kozanga bobangi. Mokonzi moko te ya mboka azalaki konyokola bango. Bazalaki mosika na bato ya Sidoni mpe basalaki boyokani ata na moto moko te. Tango mibali mitano yango bazongaki na Tsorea mpe na Eshitaoli, bandeko na bango batunaki bango :
— Sango nini bomemeli biso ?
Bazongisaki :
— Totelema, tokende kobotola mokili na bango ! Tomoni ete mokili yango ezali malamu penza. Boni ! Mpo na nini bovandi kimia boye ? Bozala bagoyigoyi te mpo na kokende kokota mpe kobotola mokili yango. 10 Tango bokokota kuna, bokomona bato bazali na kimia, mpe bazali na mokili monene oyo Nzambe akabi na maboko na bino, mokili oyo ezangi ata eloko moko te kati na biloko nyonso oyo ezalaka na mabele.
11 Mibali nkama motoba ya libota ya Dani, elongo na bibundeli na bango, balongwaki na Tsorea mpe na Eshitaoli. 12 Bakendeki kotonga molako na bango na Kiriati-Yearimi, kati na mokili ya Yuda. Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango Maane Dani* ; ezali na ngambo ya weste ya Kiriati-Yearimi. 13 Balongwaki wana mpe bakendeki na etuka ya bangomba ya Efrayimi kino na ndako ya Mika. 14 Bongo mibali mitano oyo banongaki mokili ya Laishi balobaki na bandeko na bango : « Boni, boyebi ete kati na ndako oyo tovandi, ezali na efode, bikeko mike-mike ya ndako mpe nzambe ya ekeko basala na ebende oyo banyangwisa na moto ? Boyeba likambo nini bokosala. »
15 Bongo babalukaki wana, na ndako epai wapi bazalaki mpe bakendeki na ndako ya elenge mobali Molevi, na ndako ya Mika, mpe bapesaki ye mbote. 16 Mibali nkama motoba ya libota ya Dani, oyo bamilengelaki mpo na bitumba batelemaki na ekotelo ya ekuke. 17 Bato mitano oyo banongaki mokili bakotaki kati na ndako mpe bazwaki efode, bikeko mike-mike ya ndako mpe nzambe ya ekeko basala na ebende banyangwisa na moto. Nganga-nzambe atelemaki liboso ya ekuke elongo na mibali nkama motoba oyo bamilengelaki mpo na bitumba. 18 Tango mibali bakotaki na ndako ya Mika mpe bazwaki efode, bikeko mike-mike ya ndako mpe nzambe ya ekeko basala na ebende banyangwisa na moto, nganga-nzambe alobaki na bango :
— Likambo nini bozali kosala ?
19 Bazongisaki :
— Kanga monoko ! Tia loboko na monoko na yo, yaka elongo na biso mpe zala tata na biso mpe nganga-nzambe na biso. Boni, likambo nini eleki malamu : kozala nganga-nzambe ya moto to kozala nganga-nzambe ya libota mpe ya etuka moko ya Isalaele ?
20 Nganga-nzambe atondaki na esengo, akamataki efode, banzambe ya bikeko ya ndako mpe bikeko mosusu ; akendeki elongo na bato ya libota ya Dani. 21 Babalukaki mpe bazongelaki nzela na bango ya mobembo, batiaki liboso bana na bango ya mike, bibwele mpe bozwi na bango ya talo. 22 Tango bakomaki mwa mosika na ndako ya Mika, Mika mpe bato oyo bazalaki pene ya ndako na ye batelemaki na koganga mpe balandaki libota ya Dani. 23 Awa bazalaki kobelela sima na libota ya Dani, bana ya Dani babalukaki mpe batunaki Mika :
— Likambo nini ezwi yo mpo ete omemela biso ebele ya bato boye ?
24 Mika azongisaki :
— Bozwi banzambe na ngai, oyo nasalaki, nganga-nzambe na ngai, mpe bokeyi na bino ; eloko nini natikali na yango lisusu ? Ndenge nini bokoki kotuna ngai : « Likambo nini ezwi yo ? »
25 Bato ya libota ya Dani bazongiselaki ye :
— Tika ete mongongo na yo eyokana te kati na biso, noki te bato ya kanda bakokweyela yo mpe bakoboma yo elongo na libota na yo mobimba.
26 Bana ya libota ya Dani balandaki nzela na bango. Tango Mika amonaki ete bana ya Dani baleki ye na makasi, abalukaki mpe azongaki na ndako na ye. 27 Bana ya libota ya Dani babotolaki biloko oyo Mika asalaki mpe nganga-nzambe na ye.
Bongo bakendeki kobundisa engumba Laishi, mboka ya bato ya kimia mpe ya kozanga nungunungu ; babomaki bato nyonso na mopanga mpe batumbaki engumba na bango na moto. 28 Moto moko te ayaki kobikisa mboka wana, pamba te ezalaki mosika na Sidoni mpe esalaki boyokani te elongo na ekolo mosusu. Engumba yango ezalaki na lubwaku oyo ezali pembeni ya Beti-Reobi. Bana ya libota ya Dani batongaki wana engumba na bango mpe bavandaki kuna. 29 Bapesaki engumba yango kombo « Dani. » Ezalaki kombo ya koko na bango, Dani, mwana mobali ya Isalaele. Na kala, bazalaki kobenga engumba yango Laishi. 30 Bana ya libota ya Dani batelemisaki ekeko mpo na bango moko mpe batiaki Jonatan, mwana mobali ya Gerishomi, mwana mobali ya Manase mpe koko ya Moyize, mpo ete akoma Nganga-Nzambe ya bato ya libota ya Dani elongo na bana na ye. Basalaki mosala ya bonganga-Nzambe mpo na libota ya Dani kino tango bato ya mokili bakendeki na bowumbu. 31 Bakobaki kosalela bikeko oyo Mika asalaki na tango nyonso oyo Ndako ya Nzambe ezalaki na Silo.
* 18:12 Maane Dani, na lokota ya Ba-Ebre : Maani Dani elingi koloba : Molako ya libota ya Dani.