20
Bana ya Isalaele babundisaki libota ya Benjame
Bana nyonso ya Isalaele, wuta na Dani kino na Beri-Sheba mpe na mokili ya Galadi, babimaki lokola moto moko mpe basanganaki liboso ya Yawe, na Mitsipa. Bakambi ya bato nyonso, ya mabota nyonso ya Isalaele bazalaki kati na lisanga ya bato ya Nzambe : ezalaki na basoda nkoto nkama minei oyo batambolaka na makolo mpe bayebi kobunda na mopanga. Bana ya libota ya Benjame bayokaki ete bana ya Isalaele mosusu bakendeki kuna na Mitsipa. Bongo bana ya Isalaele balobaki :
— Yebisa biso ndenge nini kufa ya somo boye esalemaki.
Molevi, mobali ya mwasi oyo babomaki, alobaki :
— Ngai mpe makangu na ngai, toyaki na Gibea, na mokili ya Benjame mpo na kolekisa butu. Na kati-kati ya butu, bavandi ya Gibea batombokelaki ngai mpe bazingelaki ndako mpo ete baboma ngai ; basangisaki nzoto na makasi na makangu na ngai, mpe akufaki. Nakamataki makangu na ngai, nakataki ye na biteni mpe natindaki eteni moko na moko kati na etuka oyo bapesaki na bana ya Isalaele, pamba te bato ya libota ya Benjame basalaki likambo ya somo mpe ya soni. Sik’oyo, bino nyonso bana ya Isalaele, boloba mpe bokata likambo oyo.
Bato nyonso batelemaki lokola moto moko mpe balobaki : « Moto moko te kati na biso akozonga na ndako na ye ya kapo to na ndako na ye. Tala sik’oyo likambo oyo tokosala bato ya Gibea : Tokokende kobundisa bango kolanda ndenge zeke oyo tokobeta ekotalisa. 10 Tokozwa bato zomi kati na bato nkama moko ya mabota nyonso ya Isalaele, tokozwa bato nkama moko kati na bato nkoto moko mpe bato nkoto moko kati na bato nkoto zomi, mpo na kopesa biloko ya kolia epai ya mampinga. Bongo tango mampinga ekokoma na Gibea, na mokili ya Benjame, bakobundisa bato ya Gibea mpo na makambo nyonso ya somo oyo basalaki kati na Isalaele. »
11 Boye, mibali nyonso ya Isalaele basanganaki esika moko mpe bayokanaki lokola moto moko mpo na kobundisa engumba Gibea. 12 Bato ya bikolo ya Isalaele batindaki mibali kati na mabota nyonso ya Benjame mpe balobaki : « Ndenge nini bosali lisumu ya somo boye kati na bino ? 13 Sik’oyo, botindela biso bato mabe wana ya Gibea mpo ete toboma bango mpe tolongola mabe kati na Isalaele. » Kasi bato ya Benjame baboyaki koyokela baninga na bango, bana ya Isalaele. 14 Wuta na bingumba na bango nyonso ya mike, bato ya libota ya Benjame basanganaki esika moko, na Gibea, mpo na kobundisa bana ya Isalaele. 15 Na mokolo wana, bato ya libota ya Benjame basangisaki basoda nkoto tuku mibale na motoba oyo bayebi kobunda na mopanga, wuta na bamboka na bango nyonso ya mike, longola kaka engumba Gibea oyo esangisaki mibali ya bitumba nkama sambo. 16 Kati na basoda wana, ezalaki na mibali nkama sambo ya makasi oyo basalelaka loboko ya mwasi. Moto moko na moko kati na bango, soki abwaki libanga na nzela ya ebambelo mabanga, ekoki soki moke te kozanga kotuta suki moko. 17 Mibali ya Isalaele, longola kaka bato ya libota ya Benjame, bazalaki nkoto nkama minei, ba-oyo bayebi kosalela mopanga ; mpe bango nyonso bazalaki bato ya bitumba.
18 Bana ya Isalaele bakendeki na Beteli mpe batunaki Nzambe :
— Nani kati na biso asengeli kokende mpo na kobundisa libota ya Benjame ?
Yawe azongisaki :
— Yuda akokende liboso.
19 Na tongo oyo elandaki, bana ya Isalaele bakendeki mpe batongaki molako na bango pembeni ya Gibea. 20 Mibali ya Isalaele babimaki mpo na kobundisa bato ya libota ya Benjame mpe bamibongisaki mpo na kobundisa bango na Gibea. 21 Bato ya libota ya Benjame babimaki na Gibea mpe babomaki, mokolo wana, mibali ya Isalaele nkoto tuku mibale na mibale. 22 Kasi mibali ya Isalaele bamilendisaki, bango na bango, mpe babongamaki na esika oyo bazalaki na mokolo ya liboso. 23 Bana ya Isalaele bakendeki mpe balelaki liboso ya Yawe kino na pokwa, mpe batunaki Yawe :
— Boni, tokende lisusu kobundisa bandeko na biso ya libota ya Benjame ?
Yawe azongiselaki bango :
— Bokende kobundisa bango.
24 Na mokolo ya mibale, bana ya Isalaele babundisaki bato ya libota ya Benjame. 25 Na tango wana, bana ya libota ya Benjame bakimaki na Gibea mpo na kobundisa bana ya Isalaele, babomaki lisusu mibali ya Isalaele nkoto zomi na mwambe ; bango nyonso bazalaki bato oyo bayebi kobunda na mopanga. 26 Bana ya Isalaele bakendeki, bango nyonso, na Beteli, mpe kuna, bavandaki mpe balelaki liboso ya Yawe. Na mokolo wana, bana ya Isalaele bakilaki bilei kino na pokwa mpe babonzaki, epai na Yawe, mbeka ya kotumba mpe mbeka ya boyokani. 27 Bana ya Isalaele batunaki Yawe. (Na mikolo wana, Sanduku ya Boyokani ya Nzambe ezalaki kuna. 28 Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, mwana mobali ya Aron, azalaki na mosala liboso ya Sanduku). Batunaki :
— Boni, tokende lisusu kobundisa bandeko na biso, bato ya libota ya Benjame to te ?
Yawe azongisaki :
— Bokende, pamba te, lobi, nakokaba bango na maboko na bino.
29 Bongo mibali ya Isalaele babombamaki mpe bazingelaki Gibea. 30 Bana ya Isalaele bakendeki na mokolo ya misato kobundisa libota ya Benjame mpe bamibongisaki malamu mpo na kobundisa Gibea lokola na mbala ya liboso. 31 Bana ya Benjame babimelaki bango mpe babendaki bango mosika ya engumba. Babandaki koboma bana ya Isalaele ndenge basalaki liboso ; babomaki bato pene tuku misato kati na zamba, na nzela ya Beteli mpe ya Gibea. 32 Libota ya Benjame bakanisaki ete bakobeta bango ndenge basalaki liboso.
Nzokande bana ya Isalaele bazwaki mokano ya kokima mpe ya komema bango mosika ya engumba, mosika ya Gibea. 33 Na bongo, bana ya Isalaele batelemaki na bisika na bango mpe bakendeki kosangana mpo na bitumba, na Bala-Tamari. Bana ya Isalaele, oyo babombamaki, babimaki na bisika na bango mpe balandaki bango na etando ya polele, na Gibea. 34 Mibali makasi ya Isalaele, nkoto zomi, babimaki na Gibea ; mpe bitumba ezalaki makasi. Kasi bana ya libota ya Benjame basosolaki te mabe nini ekokomela bango. 35 Yawe abetaki bana ya Benjame liboso ya Isalaele, mpe, na mokolo wana, bana ya Isalaele babomaki mibali nkoto tuku mibale na nkama moko kati na libota ya Benjame, ba-oyo bayebi kobunda na mopanga.
36 Bongo bana ya Benjame bamonaki ete bakweyi penza na bitumba. Nzokande bana ya Isalaele bakosaki kozonga sima mpo ete batiaki elikya na bango epai ya mibali oyo babombamaki pene ya Gibea. 37 Mibali yango babimelaki mbala moko Gibea, bapanzanaki mpe babetaki engumba mobimba na mopanga. 38 Mibali ya Isalaele mpe bandeko na bango, oyo babombamaki pene ya Gibea, bayokanaki na elembo moko : mibali oyo babombamaki basengeli komatisa wuta na engumba lipata ya milinga na likolo. 39 Tango bana ya Isalaele bamonaki lipata wana ya milinga, bapesaki mokongo na bitumba. Kasi mibali ya Benjame babandaki kobeta mpe koboma bana ya Isalaele pene tuku misato. Bakanisaki ete bakobeta bango ndenge basalaki liboso. 40 Kasi tango lipata ya milinga ebandaki komata makasi na likolo, bana ya Benjame babalukaki mpe bamonaki engumba na bango mobimba kopela moto mpe komatisa likonzi monene ya lipata ya milinga. 41 Bana ya Isalaele babalolaki elongi na bango mpo na kotala mibali ya Benjame. Bongo mibali ya Benjame babangaki mpo ete bamonaki likama oyo ekomeli bango. 42 Boye, bapesaki bana ya Isalaele mokongo mpe bakimaki na nzela ya esobe. Kasi bitumba elandaki bango, mpe mibali ya Isalaele, oyo babimaki na engumba Gibea, basilisaki koboma bango nyonso na nzela na bango. 43 Bazingelaki bana ya Benjame, balandaki bango na kozanga kopema mpe banyataki bango na makolo kino liboso ya Gibea, na ngambo oyo moyi ebimelaka. 44 Kati na bana ya Benjame, mibali nkoto zomi na mwambe bakufaki : bango nyonso bazalaki bilombe ya bitumba. 45 Ndambo kati na bango bakimaki na nzela ya esobe, na ngambo ya libanga monene ya Rimoni. Na nzela, bana ya Isalaele babomaki bato nkoto mitano oyo balokotaki na nzela. Balandaki bango lisusu kino na Gideomi mpe babomaki mibali nkoto mibale. 46 Motango nyonso ya bana ya Benjame oyo bakufaki na mokolo wana ezalaki nkoto tuku mibale na mitano : bango nyonso bazalaki bilombe ya bitumba mpe bayebaki kobunda na mopanga. 47 Mibali nkama motoba kati na bango balongaki kopesa mokongo mpe kokima na nzela ya esobe kino na libanga monene ya Rimoni. Bawumelaki kuna sanza minei. 48 Mibali ya Isalaele bazongelaki bato ya libota ya Benjame mpe babomaki na mopanga mibali nyonso elongo na bibwele na bango, kobanda na engumba Gibea kino na bamboka mike. Batumbaki bamboka mike nyonso epai wapi balekaki.