16
Nalobi na bino makambo oyo nyonso mpo ete bokweya te na komekama to mpo ete kondima na bino ekweya te. Pamba te bakobengana bino na bandako ya mayangani ; mpe tango elingi kutu kokoka, tango oyo moto nyonso oyo akoboma bino akokanisa ete, wana azali kosala bongo, azali kobonzela Nzambe mbeka. Bakosala bongo mpo ete batikalaki koyeba te ezala Tata to ngai. Namiyebiseli bino makambo wana nyonso mpo ete, soki tango yango ekoki, bokanisa ete Ngai nasilaki koyebisa bino yango. Nayebisaki bino yango te wuta na ebandeli, mpo ete nazalaki nanu elongo na bino.
Mosala ya Molimo Mosantu
Sik’oyo, nazali kokende epai na Ye oyo atindaki Ngai, mpe moko te kati na bino azali kotuna Ngai : « Ozali kokende wapi ? » Kasi mpo ete nalobi na bino bongo, mawa etondi kati na mitema na bino. Nzokande, nalobi na Ngai kaka bosolo. Ezali penza mpo na bolamu na bino ete Ngai nakende ; pamba te soki nakeyi te, Molobeli akoya te epai na bino ; kasi soki nakeyi, nakotindela bino Ye. Bongo tango akoya, akotalisa bato ya mokili na tina na lisumu, na tina na bosembo mpe na tina na kosambisama : na tina na lisumu, pamba te bandimaka Ngai te ; 10  na tina na bosembo, pamba te nakeyi epai ya Tata, mpe bokomona Ngai lisusu te ; 11  na tina na kosambisama, pamba te mokonzi ya mokili oyo asili kosambisama.
12  Nazali lisusu na makambo mingi ya koyebisa bino, kasi bokokoka kososola yango te sik’oyo. 13  Tango akoya, Molimo ya bosolo, akotambolisa bino kati na bosolo nyonso ; pamba te akoloba te makambo kowuta na Ye moko, kasi akoloba kaka makambo nyonso oyo akoyoka, mpe akoyebisa bino makambo oyo ekoya ; 14  akomonisa nkembo na Ngai, pamba te akozwa makambo kowuta epai na Ngai mpe akoyebisa bino yango. 15  Nyonso oyo ezali ya Tata ezali mpe ya Ngai ; yango wana nalobi ete akozwa makambo kowuta epai na Ngai mpe akoyebisa bino yango.
Mawa ekobongwana esengo
16  Etikali mwa tango moke mpo ete bomona Ngai lisusu te ; mpe sima na mwa tango, bokomona Ngai lisusu.
17 Ndambo ya bayekoli ya Yesu bakomaki komituna :
— Yesu alingi penza koyebisa biso nini na maloba oyo : « Etikali mwa tango moke mpo ete bomona Ngai lisusu te ; mpe sima na mwa tango, bokomona Ngai lisusu » mpe « nazali kokende epai ya Tata ? »
18 Bamitunaki lisusu :
— Alingi kotalisa nini tango alobi : « Etikali mwa tango moke ? » Tozali kososola te ndimbola to tina na yango.
19 Wana Yesu asosolaki ete balingi kotuna Ye motuna, alobaki na bango :
— Boni, bozali solo na posa ya koyeba tina ya maloba na Ngai oyo : « Etikali mwa tango moke mpo ete bomona Ngai lisusu te ; mpe sima na mwa tango, bokomona Ngai lisusu ? » 20  Nazali koloba na bino penza ya solo : wana bino bokozala kolela mpe komitungisa, mokili ekosepela ; bokozala solo na mawa, kasi mawa na bino ekobongwana esengo. 21  Na tango ya kobota, mwasi ayokaka pasi makasi, pamba te eleko ya kobimisa mwana wuta kati na libumu na ye ekoki ; kasi soki kaka aboti, abosanaka pasi nyonso oyo amonaki, mpo na esengo oyo atondaka na yango mpo ete aboti moto. 22  Bino mpe ndenge moko, bozali sik’oyo na mawa ; kasi tango nakomona bino lisusu, mitema na bino ekotonda na esengo, mpe moto ata moko te akokoka kolongola bino esengo yango. 23  Na mokolo yango, bokopesa Ngai lisusu ata motuna moko te. Nazali koloba na bino penza ya solo : Tata akopesa bino nyonso oyo bokosenga Ye na Kombo na Ngai. 24  Kino sik’oyo, bosengi nanu eloko moko te na Kombo na Ngai. Bosenga, mpe bokozwa, mpo ete esengo na bino ezala ya kokoka.
Yesu alongi mokili
25  Nalobaki na bino makambo wana nyonso na masese ; kasi tango ezali koya, tango oyo nakoloba na bino lisusu na masese te, kasi tango oyo nakoyebisa bino na polele penza makambo oyo etali Tata. 26  Na mokolo wana, bokosenga na Kombo na Ngai. Nazali koloba na bino te ete nakosengela bino epai ya Tata. 27  Ye moko Tata alingaka bino, pamba te bolingaka Ngai mpe bondimaki ete nawutaki epai na Nzambe. 28  Solo, nawutaki epai ya Tata mpe nayaki kati na mokili ; mpe sik’oyo, nazali kotika mokili mpe nazali kozonga epai ya Tata.
29 Bayekoli ya Yesu balobaki :
— Okomi sik’oyo koloba na biso na polele mpe otiki koloba na masese ! 30 Tososoli sik’oyo ete oyebi nyonso, mpe ete ozali na posa te ete bapesa Yo mituna. Mpo na yango, tondimi solo ete owutaki epai ya Nzambe.
31 Yesu azongiselaki bango :
— Bondimi sik’oyo ? 32  Kasi boyeba malamu ete tango ezali koya, mpe esili kokoka, tango oyo bokopanzana na bangambo nyonso, moto na moto na ngambo na ye, mpe oyo bokotika Ngai, Ngai moko. Kasi nazali Ngai moko te, pamba te Tata azali elongo na Ngai. 33  Nasengelaki koloba na bino bongo mpo ete bozala na kimia kati na Ngai. Kati na mokili, bozali solo komona pasi ; kasi boyika mpiko, nalongi mokili.