18
Bakangi Yesu
(Mat 26.47-56; Mlk 14.43-50; Lk 22.47-53)
Sima na Yesu kobondela, akendeki elongo na bayekoli na Ye mpe bakatisaki lubwaku ya Sedron epai wapi elanga moko ezalaki. Yesu akotaki na elanga yango elongo na bayekoli na Ye.
Yuda oyo asilaki komibongisa mpo na kokaba Yesu ayebaki esika yango malamu, pamba te Yesu azalaki kokende kuna mbala mingi elongo na bayekoli na Ye. Boye Yuda akendeki na elanga yango mpe amemaki lisanga ya basoda mpe ya bakengeli oyo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo bapesaki ye. Bato yango basimbaki minda, banzete oyo ezalaki kopela moto mpe bibundeli.
Lokola Yesu ayebaki makambo nyonso oyo esengeli kokomela Ye, akendeki kokutana na bango mpe atunaki bango :
— Bozali koluka nani ?
Bazongisaki :
— Yesu ya Nazareti.
Yesu alobaki na bango :
— Ezali Ngai oyo.
Mpe Yuda oyo atekaki Yesu epai na bango azalaki wana elongo na bango. Tango Yesu alobaki na bango : « Ezali Ngai oyo, » bazongaki na sima mpe bakweyaki na mabele. Yesu atunaki bango lisusu :
— Bozali koluka nani ?
Bazongisaki :
— Yesu ya Nazareti.
Yesu alobaki na bango :
— Nasili koloba na bino ete ezali Ngai. Soki ezali Ngai nde bozali koluka, botika bato mosusu kokende.
Ezali bongo nde esengelaki kokokisama, liloba oyo Yesu alobaki : « Kati na bato oyo opesaki ngai, nabungisi ata moko te. »
10 Lokola Simona Petelo azalaki na mopanga, abimisaki yango wuta na ebombelo na yango, abetaki mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe akataki ye litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali. Kombo ya mosali yango ezalaki Malikisi.
11 Kasi Yesu alobaki na Petelo :
— Zongisa mopanga na yo kati na ebombelo na yango. Boni, nasengeli te komela kopo ya pasi, oyo Tata apesi Ngai ?
Yesu liboso ya Ana
(Mat 26.57-58; Mlk 14.53-54; Lk 22.54)
12 Lisanga ya basoda, mokonzi na bango mpe bakengeli ya Bayuda bakamataki Yesu mpe bakangaki Ye basinga ; 13 bamemaki Ye liboso epai ya Ana oyo azalaki tata-bokilo ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe, na mobu wana. 14 Ezalaki mpe Kayifa wana nde apesaki Bayuda toli oyo : « Eleki malamu ete moto moko akufa mpo na bato nyonso. »
Petelo awangani Yesu mpo na mbala ya liboso
(Mat 26.69-70; Mlk 14.66-68; Lk 22.55-57)
15 Simona Petelo mpe moyekoli mosusu bazalaki kolanda Yesu. Moyekoli yango ayebanaki na mokonzi ya Banganga-Nzambe, mpe akotaki elongo na Yesu na lopango ya kati ya ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe. 16 Petelo azalaki kozela libanda, na liboso ya ekuke. Moyekoli wana, oyo ayebanaki na mokonzi ya Banganga-Nzambe, abimaki, asololaki na mwasi mokengeli ekuke mpe akotisaki Petelo. 17 Mwasi mosali oyo azalaki kokengela ekuke atunaki Petelo :
— Boni, yo mpe ozali te moko kati na bayekoli ya moto wana ?
Petelo azongisaki :
— Nazali moyekoli na ye te.
18 Lokola malili ezalaki, basali mpe bakengeli bapelisaki moto mpe batelemaki pembeni-pembeni mpo na koyetola. Petelo mpe azalaki wana elongo na bango mpo na koyetola.
Mokonzi ya Banganga-Nzambe asambisi Yesu
(Mat 26.59-66; Mlk 14.55-64; Lk 22.66-71)
19 Mokonzi ya Banganga-Nzambe apesaki Yesu mituna na tina na bayekoli na Ye mpe na tina na mateya na Ye. 20 Yesu azongiselaki ye :
— Nazalaki koloba na polele penza na miso ya bato nyonso, nazalaki koteya tango nyonso kati na bandako ya mayangani mpe kati na Tempelo, epai wapi Bayuda nyonso basanganaka ; nalobaki eloko moko te na nkuku. 21  Mpo na nini ozali kotuna Ngai mituna ? Tuna epai ya bato oyo bayokaki Ngai koloba. Ezali bango nde bakoki koyeba malamu makambo oyo nazalaki koloba.
22 Tango kaka Yesu alobaki bongo, moko kati na bakengeli oyo bazalaki wana abetaki Ye mbata na koloba :
— Boni ! Ezali bongo nde ozali kozongisela mokonzi ya Banganga-Nzambe ?
23 Yesu alobaki na ye :
— Soki nalobi mabe, mabe yango ezali wapi ? Kasi soki nalobi na Ngai kaka solo, mpo na nini kobeta Ngai ?
24 Bongo Ana atindaki Yesu oyo azalaki kaka ya kokangama na basinga, epai ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe.
Petelo awangani Yesu mpo na mbala ya mibale
(Mat 26.71-75; Mlk 14.69-72; Lk 22.58-62)
25 Wana Simona Petelo azalaki nanu koyetola moto, batunaki ye :
— Yo mpe ozali te moko kati na bayekoli na ye ?
Petelo awanganaki yango na koloba :
— Te, nazali moyekoli na ye te.
26 Kasi moko kati na basali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe, ndeko mobali ya moto oyo Petelo akataki litoyi, alobaki :
— Boni, ngai namonaki yo te elongo na ye kati na elanga ?
27 Kasi Petelo awanganaki yango lisusu ; mpe mbala moko, soso elelaki.
Pilato asambisi Yesu
(Mat 27.1-2, 11-31; Mlk 15.2-15; Lk 23.13-25)
28 Bongo na tongo makasi, longwa na ndako ya Kayifa, bamemaki Yesu kati na ndako ya moyangeli oyo azalaki moto ya Rome. Kasi bango moko bato oyo bamemaki Yesu bakotaki te kati na ndako ya moyangeli, mpo ete bamikomisa mbindo te mpe mpo ete bazwa nzela ya kolia bilei ya Pasika. 29 Yango wana moyangeli Pilato abimaki na libanda mpe atunaki bango :
— Bofundi moto oyo mpo na likambo nini ?
30 Bazongiselaki ye :
— Soki moto oyo asalaki mabe te, tolingaki mpe koya te kotika ye na maboko na yo.
31 Pilato alobaki na bango :
— Bokamata ye mpe bosambisa ye bino moko kolanda mibeko na bino.
Bayuda bazongiselaki ye :
— Biso tozali na ndingisa te ya kokatela moto etumbu ya kufa.
32 Ezali ndenge wana nde ekokisamaki maloba oyo Yesu alobaki mpo na kolakisa lolenge ya kufa oyo asengelaki kokufa.
33 Pilato azongaki kati na ndako ya moyangeli, abengaki Yesu mpe atunaki Ye :
— Boni, ozali mokonzi ya Bayuda ?
34 Yesu azongisaki :
— Boni, ezali na ndenge na yo moko nde olobi yango to bato mosusu nde bayebisi yo na tina na Ngai ?
35 Pilato atunaki Yesu :
— Boni, okanisi ete ngai nazali Moyuda ? Ezali bato ya ekolo na yo moko mpe bakonzi ya Banganga-Nzambe nde bayei kotika yo na maboko na ngai. Osali nini ?
36 Yesu azongisaki :
— Bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te ; soki ezalaki ya mokili oyo, basali na Ngai balingaki kobunda mpo ete nakweya te na maboko ya Bayuda. Solo, bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te.
37 Pilato atunaki :
— Elingi koloba nini, ozali nde mokonzi ?
Yesu azongisaki :
— Yo nde olobi yango ete nazali mokonzi. Nabotamaki mpe nayaki kati na mokili mpo na kopesa litatoli na tina na solo. Moto oyo azali kati na solo ayokaka mongongo na Ngai.
38 Pilato atunaki Ye :
— Solo ezali nini ?
Sima na koloba maloba wana, Pilato abimaki lisusu na libanda epai wapi Bayuda bazalaki mpe alobaki na bango :
— Nazwi ye na likambo moko te ya mabe mpo ete nakatela ye etumbu ya kufa. 39 Kasi lokola ezali momesano epai na bino ete nabimisa na boloko mokangami moko, na tango ya feti ya Pasika, bozwa sik’oyo mokano. Bolingi ete natika mokonzi ya Bayuda mpo ete akoma nsomi ?
40 Bango nyonso bazongisaki na koganga :
— Te ! Ye te ! Bimisa nde Barabasi !
Nzokande, Barabasi azalaki moyibi mpe mobomi bato.