21
Yesu abimeli lisusu bayekoli na Ye
(Lk 5.1-11)
Sima na yango, Yesu abimelaki lisusu bayekoli na Ye na libongo ya ebale ya Tiberiade. Tala ndenge nini abimelaki bango : Wana bayekoli oyo bazalaki esika moko : Simona Petelo, Toma oyo babengaka Lipasa ; Natanaele, moto ya mboka Kana ya Galile, bana ya Zebede mpe bayekoli mosusu mibale ; Simona Petelo alobaki na bango :
— Bandeko na ngai, nakeyi na ngai koloba mbisi !
Balobaki na ye :
— Biso mpe tokende elongo na yo !
Bakendeki mpe bamataki na bwato ; kasi na butu wana, bazwaki ata mbisi moko te.
Na tongo makasi, Yesu atelemaki na libongo, kasi bayekoli bayebaki te ete ezali Ye. Yesu abengaki bango :
— Bana na Ngai ! Boni, bozali na mbisi te ?
Bazongisaki :
— Te !
Alobaki na bango :
— Bobwaka monyama na ngambo ya loboko ya mobali ya bwato, mpe bokozwa bambisi.
Boye, babwakaki monyama mpe bakokaki lisusu te kobenda yango longwa na mayi, pamba te etondaki na bambisi ebele.
Moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga mingi alobaki na Petelo :
— Bandeko, ezali Nkolo !
Tango kaka ayokaki ete ezali Nkolo, Simona Petelo akangaki nzambala na ye na loketo mpe amibwakaki na mayi, pamba te amilongolelaki bilamba mpo na koloba mbisi. Ezali bayekoli mosusu nde bazongisaki bwato na libongo, wana bazalaki kobenda monyama etonda na bambisi ebele, pamba te bazalaki mosika te na mokili : bametele pene nkama moko ekabolaki libongo na esika oyo bazalaki.
Tango bakitaki na mabele, bamonaki mapa mpe moto ya makala oyo na likolo na yango ezalaki na bambisi.
10 Yesu alobaki na bango :
— Boya na ndambo ya bambisi oyo bowuti kozwa.
11 Simona Petelo amataki na bwato mpe abendaki monyama kino na mokili. Ezalaki ya kotonda na bambisi ya minene pene nkama moko na tuku mitano na misato. Atako bambisi ezalaki penza ebele, monyama epasukaki te. 12 Bongo Yesu alobaki na bango :
— Boya kolia.
Lokola bayekoli bayebaki ete ezali Nkolo, moko te kati na bango amekaki kotuna Ye : « Ozali nani ? » 13 Yesu apusanaki, azwaki mapa mpe akabolaki yango kati na bango ; asalaki mpe bongo mpo na mbisi. 14 Ezalaki mbala ya misato oyo Yesu abimelaki bayekoli na Ye sima na kosekwa na Ye kati na bakufi.
Yesu mpe Petelo
15 Tango basilisaki kolia, Yesu atunaki Simona Petelo :
— Simona, mwana mobali ya Yoane ; boni, olingaka Ngai koleka ndenge bango balingaka Ngai ?
Azongisaki :
— Iyo, Nkolo ! Oyebi malamu ete nalingaka Yo.
Yesu alobaki na ye :
— Batela bampate na Ngai.
16 Yesu atunaki ye mpo na mbala ya mibale :
— Simona, mwana mobali ya Yoane ; boni, olingaka Ngai ?
Azongisaki :
— Iyo, Nkolo ! Oyebi malamu ete nalingaka yo !
Yesu alobaki na ye :
— Batela bampate na Ngai.
17 Bongo Yesu atunaki ye mpo na mbala ya misato :
— Simona, mwana mobali ya Yoane ; boni, olingaka Ngai ?
Petelo ayokaki mawa mingi kati na motema mpo ete ekomaki mbala ya misato oyo Yesu atunaki ye : « Olingaka Ngai ? » Bongo azongiselaki Yesu :
— Nkolo, oyebi makambo nyonso ; oyebi malamu ete nalingaka Yo !
Yesu alobaki na ye :
— Batela bameme na Ngai. 18  Nazali koloba na yo penza ya solo : tango ozalaki elenge, ozalaki kokanga yo moko mokaba na yo mpe ozalaki kokende na esika nyonso oyo olingi. Kasi tango okokoma mobange, okotanda maboko na yo, mpe ekozala moto mosusu nde akokanga yo mokaba mpe akomema yo na esika oyo yo okolinga kutu kokende te.
19 Yesu alobaki bongo mpo na kotalisa lolenge ya kufa oyo Petelo asengelaki kokufa mpo na nkembo ya Nzambe. Sima na Ye koloba bongo, alobaki na Petelo :
— Landa Ngai !
20 Petelo atalaki na sima mpe amonaki moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga koleka bayekoli mosusu, ye oyo, wana bazalaki kolia, alalelaki Yesu na tolo mpe atunaki Ye : « Nkolo, nani akoteka Yo ? » Ye mpe azalaki kolanda bango. 21 Tango Petelo amonaki ye, atunaki Yesu :
— Nkolo, okanisi nini mpo na ye ?
22 Yesu azongisaki :
— Soki nalingi ete azala kaka na bomoi kino tango nakoya, wana etali yo na nini ? Kasi yo, landa Ngai.
23 Mpo na yango, sango epanzanaki kati na bandeko ete moyekoli yango akokufa te. Nzokande, Yesu alobaki te ete moyekoli wana akokufa te, kasi alobaki nde : « Soki nalingi ete azala kaka na bomoi kino tango nakoya, wana etali yo na nini ? »
24 Ezali kutu moyekoli yango nde azali kotatola makambo yango mpe akomaki yango na mokanda. Mpe biso toyebi ete litatoli na ye ezali ya solo.
25 Yesu asalaki lisusu makambo mosusu ebele ; soki bakomaki yango na mikanda moko sima na mosusu, nakanisi ete mokili mobimba elingaki kokoka te mpo na kobomba babuku oyo balingaki kokoma.