4
Yesu asololi na mwasi ya engumba Samari
Yesu ayokaki ete Bafarizeo bazwi sango oyo ezali koloba ete akomi na bayekoli ebele koleka Yoane mpe azali kobatisa bato mingi koleka Yoane. (Nzokande, Yesu Ye moko azalaki kobatisa te, kasi ezalaki nde bayekoli na Ye.) Boye, alongwaki na Yuda mpe azongaki na Galile. Lokola asengelaki kolekela na Samari, akomaki na engumba Sishari ya Samari, oyo ezalaki mosika te na elanga oyo Jakobi apesaki epai ya mwana na ye, Jozefi. Nzokande libulu ya mayi ya Jakobi ezalaki kati na elanga yango. Boye lokola Yesu alembaki nzoto mpo na mobembo, avandaki pembeni ya libulu yango. Ezalaki pene ya ngonga ya midi.
Tango mwasi moko ya engumba Samari akendeki kotoka mayi, Yesu alobaki na ye :
— Pesa Ngai mayi mpo ete namela.
(Bayekoli ya Yesu bakendeki na engumba mpo na kosomba biloko ya kolia).
Kasi mwasi yango alobaki :
— Ebandi ndenge nini yo oyo ozali Moyuda osenga ngai, mwasi ya engumba Samari, mayi mpo ete omela ? —Pamba te Bayuda bazalaki koyokana te na bato ya Samari.—
10 Yesu azongiselaki ye :
— Soki oyebaki likabo ya Nzambe mpe nani oyo asengi yo mayi, ezali yo nde olingaki kosenga Ye mayi mpo ete omela, mpe Ye alingaki kopesa yo mayi ya bomoi.
11 Mwasi alobaki na Yesu :
— Nkolo, ozali na eloko moko te mpo na kotoka mayi, mpe libulu ezali mozindo ; bongo mayi yango ya bomoi, olingaki kozwa yango wapi ? 12 Koko na biso, Jakobi, apesa biso libulu oyo ; ye moko mpe amela mayi na yango, elongo na bana na ye mpe bibwele na ye. Boni, okanisi ete oleki ye ?
13 Yesu azongiselaki ye :
— Moto nyonso oyo amelaka mayi oyo, ayokaka lisusu posa ya mayi ; 14  kasi moto oyo akomela mayi oyo Ngai nakopesa ye akoyoka lisusu posa ya mayi te : mayi oyo Ngai nakopesa ye ekokoma kati na ye lokola etima ya mayi oyo ekawukaka te mpe etiolaka kino na bomoi ya seko.
15 Mwasi yango alobaki na Yesu :
— Nkolo, pesa ngai mayi yango mpo ete nayokaka lisusu posa ya mayi te mpe nazonga lisusu awa te mpo na kotoka mayi.
16 Yesu alobaki na ye :
— Kende, benga mobali na yo mpe zonga awa.
17 Mwasi azongisaki :
— Nazali na mobali te.
Yesu alobaki na ye :
— Ozali koloba penza ya solo ete ozali na mobali te, 18  pamba te ozalaki na mibali mitano ; mpe ye oyo ozali na ye sik’oyo azali mpe mobali na yo te. Boye likambo oyo owuti koloba ezali ya solo.
19 Mwasi yango alobaki na Yesu :
— Nkolo, namoni ete ozali mosakoli. 20 Bakoko na biso, bato ya Samari, bagumbamelaki Nzambe na likolo ya ngomba oyo ; kasi bino, Bayuda, bolobaka ete esika epai wapi tosengeli kogumbamela ezali kati na Yelusalemi.
21 Yesu azongiselaki ye :
— Mwasi, ndima Ngai : tango ezali koya, tango oyo bakogumbamela lisusu Tata te na likolo ya ngomba oyo to kati na Yelusalemi. 22  Bino, bato ya Samari, bogumbamelaka nzambe oyo boyebi te ; kasi biso, togumbamelaka Nzambe oyo toyebi, pamba te lobiko ewuti epai ya Bayuda. 23  Kasi tango ezali koya mpe esili na yango kokoka, tango oyo bagumbameli ya solo bokogumbamela Tata, kati na Molimo mpe kati na solo ; pamba te Tata alukaka bato oyo bogumbamelaka Ye na lolenge wana. 24  Nzambe azali Molimo ; esengeli ete bato oyo bagumbamelaka Ye bagumbamela Ye kati na Molimo mpe kati na solo.
25 Mwasi alobaki na Yesu :
— Nayebi ete Masiya azali koya, Ye oyo babengaka Klisto ; mpe tango akoya, akoyebisa biso makambo nyonso.
26 Yesu alobaki na ye :
— Nazali Masiya, Ngai oyo nazali koloba na yo.
27 Kaka na tango yango, bayekoli ya Yesu bazongaki. Bakamwaki mingi komona Yesu kosolola na mwasi. Kasi moko te kati na bango amekaki kotuna Ye : « Ozali koluka nini ? » to « Mpo na nini ozali kosolola na ye ? »
28 Bongo mwasi atikaki mbeki na ye wana, azongaki na engumba mpe alobaki na bato :
29 — Boya kotala moto oyo ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalaki. Akoki kozala Klisto te ?
30 Bato babimaki longwa na engumba mpe bakendeki epai ya Yesu.
31 Na tango yango, bayekoli bazalaki kosenga na Yesu :
— Rabi, lia.
32 Kasi Yesu azongiselaki bango :
— Ngai, nakolia bilei oyo bino boyebi te.
33 Bongo bayekoli na Ye balobanaki bango na bango :
— Boni, ekoki kozala na moto oyo amemelaki Ye bilei ?
34 Yesu alobaki na bango :
— Bilei na Ngai ezali : kosala mokano ya Ye oyo atindaki Ngai mpe kosilisa mosala oyo apesaki Ngai. 35  Bino bolobaka : « Etikali sanza minei mpo ete tobuka mbuma kati na bilanga. » Kasi Ngai, nazali koloba na bino : bofungola miso na bino mpe botala malamu bilanga ; bambuma ekomeli mpe ekoki mpo na kobuka. 36  Moto oyo azali kobuka azali komizwela lifuti mpe kosangisa bambuma mpo na bomoi ya seko. Boye, moloni mpe mobuki mbuma bazali kosepela elongo, bango mibale. 37  Awa nde ekokisami bosolo ya lisese oyo elobaka : « Moko alonaka, mosusu abukaka. » 38  Natindaki bino kobuka bambuma ya elanga oyo bino bolonaki te ; ezali bato mosusu nde basalaki mosala, mpe bino bozali bobele kosepela na motoki ya bato mosusu.
39 Bato mingi ya Samari, oyo bazalaki kovanda kati na engumba wana bandimelaki Yesu mpo na litatoli oyo mwasi azalaki kopesa : « Ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalaki. » 40 Tango bato ya Samari bayaki epai ya Yesu, basengaki na Ye ete avanda elongo na bango ; mpe Yesu avandaki elongo na bango mikolo mibale. 41 Bato ebele koleka bakomaki kondimela Ye mpo na maloba oyo Ye moko azalaki koloba. 42 Bongo balobaki na mwasi wana :
— Tondimi kaka te mpo na makambo oyo olobaki, pamba te biso moko toyoki sik’oyo mpe toyebi ete azali penza Mobikisi ya mokili.
Yesu abikisi mwana ya kalaka
(Mat 8.5-13; Lk 7.1-10)
43 Sima na mikolo mibale, Yesu alongwaki wana mpe akendeki na Galile. 44 Solo, Ye moko Yesu alobaki ete mosakoli azwaka lokumu te kati na ekolo na ye. 45 Tango akomaki na Galile, bato ya Galile bayambaki Ye, pamba te bango mpe bakendeki na Yelusalemi, na tango ya feti, mpe bamonaki makambo nyonso oyo asalaki kuna.
46 Yesu ayaki lisusu na Kana ya Galile, epai wapi abongolaki mayi vino. Nzokande, na Kapernawumi, ezalaki na mokonzi moko ya basoda oyo mwana na ye ya mobali azalaki kobela. 47 Tango ayokaki ete Yesu akomi na Galile longwa na Yuda, akendeki kokutana na Ye mpe asengaki na Ye ete akende kobikisa mwana na ye ya mobali oyo akomi pene ya kokufa.
48 Yesu alobaki na ye :
— Boni, bokondima kaka soki bomoni bilembo mpe bikamwa ?
49 Mokonzi wana ya basoda alobaki :
— Nkolo na ngai, yaka noki liboso ete mwana na ngai ya mobali akufa.
50 Yesu alobaki na ye :
— Kende, mwana na yo ya mobali azali na bomoi.
Moto yango andimaki maloba oyo Yesu alobaki mpe azongaki.
51 Wana azalaki kozonga, basali na ye bayaki kokutana na ye mpe bayebisaki ye :
— Mwana na yo ya mobali abiki na bokono na ye.
52 Atunaki bango soki ezalaki na ngonga nini mwana abikaki.
Bazongisaki :
— Fievele etikaki ye lobi oyo eleki, na ngonga ya liboso sima na midi.
53 Tata asosolaki ete ezalaki kaka na ngonga oyo Yesu alobaki na ye : « Mwana na yo ya mobali azali na bomoi. » Bongo ye elongo na bato nyonso ya ndako na ye bandimaki.
54 Oyo nde ezalaki likamwisi ya mibale oyo Yesu asalaki sima na Ye kozonga na Galile longwa na Yuda.