14
Yesu abikisi lisusu na mokolo ya Saba
Mokolo moko ya Saba, Yesu akendeki kolia kati na ndako ya moko kati na bakambi ya Bafarizeo, mpe Bafarizeo bazalaki kotala Ye malamu. Liboso na Ye, ezalaki na moto moko oyo azalaki kobela bokono ya kovimba nzoto. Yesu atunaki Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko :
— Boni, mobeko na biso epesaka nzela ya kobikisa moto na mokolo ya Saba to te ?
Kasi bavandaki kimia.
Yesu asimbaki mobeli yango, abikisaki ye na bokono na ye mpe azongisaki ye. Bongo atunaki bango :
— Soki moko kati na bino azali na mwana to ngombe ; bongo, na mokolo ya Saba, akweyi to ekweyi kati na libulu, boni, bokobimisa te na lombangu mwana yango to ngombe yango ?
Bakokaki te kopesa Ye eyano.
Tango Yesu amonaki ndenge nini bato oyo babengamaki na feti bazalaki kopona bisika ya lokumu, alobaki na bango lisese oyo : « Soki moto abengisi yo na feti ya libala, kokende komivandisa te na esika ya lokumu, pamba te, kati na bato oyo babengami na feti yango, ekoki kozala na moto oyo aleki yo na lokumu. Soki esalemi bongo, moto oyo abengisi bino mibale akoya koloba na yo : ‹ Tikela moto oyo kiti na yo ! › Bongo, na soni nyonso, okokende kozwa esika ya suka. 10  Kasi soki babengisi yo na feti, kende na yo kovanda na esika ya suka, mpo ete, tango moto oyo abengisi yo akoya, aloba na yo : ‹ Molingami na ngai, yaka kovanda na esika oyo eleki malamu ! › Boye, okopesamela lokumu na miso ya bato nyonso oyo babengami na feti.
11  Solo, moto nyonso oyo amitombolaka, bakokitisa ye ; mpe moto oyo amikitisaka, bakotombola ye. »
12 Bongo Yesu alobaki na moto oyo abengisaki Ye :
— Soki osali feti mpo ete bato baya kolia, kobengisa te balingami na yo, bandeko na yo, baboti na yo to bazwi oyo bazalaka pene na yo ; noki te bango mpe bakobengisa yo mpo na kozongisela yo, na nzela wana, bolamu oyo osalaki mpo na bango. 13  Kasi Soki osali feti, bengisa babola, bakufi miso, bakakatani mpe ba-ebosono ; 14  mpe Nzambe akopambola yo. Atako bakoki te kozongisela yo bolamu oyo osali mpo na bango, kasi Nzambe akofuta niongo na mokolo oyo bato ya sembo bakosekwa.
Lisese ya feti
(Mat 22.1-14)
15 Tango moko kati na babengami ayokaki bongo, alobaki na Yesu :
— Esengo na moto oyo akolia na feti kati na Bokonzi ya Nzambe !
16 Yesu azongiselaki ye :
— Moto moko asalaki feti monene mpe abengisaki bato ebele. 17  Tango ngonga ya kolia ekokaki, atindaki mosali na ye kokende koloba na bato oyo babengamaki : « Boya, pamba te nyonso esili kobongisama sik’oyo. »
18  Kasi bango nyonso bakomaki kosenga bolimbisi ndenge moko.
Moto ya liboso alobaki : « Nawuti kosomba elanga, nasengeli kokende kotala yango ; nabondeli yo, limbisa ngai ! »
19  Moto ya mibale alobaki : « Nawuti kosomba bangombe zomi, nasengeli komeka yango ; nabondeli yo, limbisa ngai ! »
20  Moto mosusu alobaki : « Nawuti kobala mwasi ; nakoki koya te. »
21  Mosali azongaki mpe ayebisaki makambo nyonso epai ya nkolo na ye. Nkolo ndako asilikaki makasi mpe atindaki mosali na ye : « Kende noki na banzela, na babalabala ya engumba, mpe memela ngai babola, ba-ebosono, bakakatani mpe bakufi miso. »
22  Sima na mwa tango, mosali ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, nasali ndenge otindaki ngai ; kasi bisika ezali nanu. »
23  Nkolo alobaki na mosali na ye : « Kende lisusu na banzela mpe na babalabala ya engumba, tinda bango na makasi mpo ete bakota, mpe ndako na ngai etonda na bato. 24  Pamba te, nazali koloba na yo : moko te kati na bato oyo babengamaki akolia biloko ya feti na ngai. »
Ndenge nini kozala moyekoli ya Yesu
(Mat 10.37-38)
25 Ebele ya bato bazalaki kokende elongo na Yesu. Yesu abalukaki mpo na kotala bango mpe alobaki :
26  — Soki moto ayei epai na Ngai, kasi alingi Ngai te koleka tata na ye, mama na ye, mwasi na ye, bana na ye, bandeko na ye ya mibali, bandeko na ye ya basi, mpe ezala ata bomoi na ye moko, moto ya ndenge wana akoki te kozala moyekoli na Ngai. 27  Mpe moto nyonso oyo amemaka ekulusu na ye te mpe alandaka Ngai te akoki te kozala moyekoli na Ngai. 28  Soki moko kati na bino alingi kotonga ndako molayi, boni, bokovanda nanu te mpe bokoluka nanu te koyeba motuya mpo na kotala soki bozali na mbongo ya kokoka mpo na kosilisa misala ya kotonga ndako yango ? 29  Pamba te, soki sima na bino kotia moboko, bokoki lisusu te kosilisa kotonga ndako yango, bato nyonso oyo bakobanda komona yango bakobanda koseka bino mpe koloba : 30  « Botala moto oyo ! Abandaki mosala ya kotonga ndako, kasi azangaki makoki ya kosilisa yango. »
31  Ndenge moko, soki mokonzi moko alingi kokende kobundisa mokonzi mosusu, boni, akovanda nanu te mpe akotala nanu te soki, elongo na basoda na ye nkoto zomi, akoki kobundisa mokonzi oyo, elongo na basoda nkoto tuku mibale, azali koya kobundisa ye ? 32  Soki amoni ete akokoka te, wana monguna na ye azali nanu mosika, akotindela ye bato mpo na kosenga kimia.
33  Boye, kati na bino, moto nyonso oyo akoki kokabwana te na biloko na ye nyonso akoki te kozala moyekoli na Ngai.
(Mat 5.13; Mlk 9.50)
34  Mungwa ezali malamu ; kasi soki mungwa ebungisi elengi na yango, ndenge nini bakozongisa lisusu elengi na yango ? 35  Ekozala lisusu na tina moko te, ezala mpo na mabele to mpo na kobongisa bilanga ; kasi bakobwaka yango. Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !