16
Nzambe mpe mbongo
Yesu alobaki na bayekoli na Ye :
— Mozwi moko azalaki na mobateli bomengo ; bongo bafundaki ye epai ya mozwi ete azali kosakana na biloko na ye. Mozwi abengaki ye mpo na kotuna ye : « Makambo nini nazali koyoka na tina na yo ? Yebisa ngai ndenge nini obateli bomengo na ngai ; pamba te, kobanda lelo, okozala lisusu mobateli bomengo na ngai te. »
Mobateli bomengo amilobelaki : « Nasala nini sik’oyo ? Mokonzi na ngai azali kolongola ngai na mosala ? Nazali na makasi te ya kotimola mabele, mpe nakoyoka soni mpo na kokoma kosenga-senga. Ah ! Nasosoli sik’oyo likambo oyo nakoki kosala mpo ete, tango nakozala lisusu na mosala te, bato bayamba ngai kati na bandako na bango. »
Boye, abengaki bato nyonso oyo bazalaki na niongo ya mokonzi na ye ; atunaki na moto ya liboso : « Osengeli kofuta boni lokola niongo epai ya mokonzi na ngai ? »
Moto yango azongisaki : « Batono tuku mibale ya mafuta. »
Mobateli bomengo alobaki na ye : « Zwa mokanda na yo ya niongo, vanda noki, mpe koma mokanda mosusu ya nyonso ya bangungulu zomi. »
Atunaki na moto mosusu : « Osengeli kofuta boni lokola niongo epai ya mokonzi na ngai ? »
Azongisaki : « Basaki nkama moko ya ble. »
Mobateli bomengo alobaki na ye : « Zwa mokanda na yo ya niongo, mpe koma mokanda mosusu ya nyonso ya basaki tuku mwambe. »
Mokonzi akumisaki mobateli mabe wana ya bomengo mpo na mayele oyo asalaki na yango. Pamba te bato ya mokili oyo, bazali na mayele koleka bana ya pole.
Nalobi na bino : bosalela bomengo ya mabe mpo na kotonga bondeko na bato mosusu ; mpo ete tango ekosila, bayamba bino kati na bivandelo ya seko. 10  Moto oyo azali sembo na makambo mike, akoki mpe kozala sembo na makambo minene ; mpe moto oyo azali sembo te na makambo mike, akozala mpe sembo te na makambo minene. 11  Boye soki bozali sembo te na bobateli bomengo oyo ezwami na banzela ya lokuta, nani akopesa bino bomengo ya solo ? 12  Mpe soki bozali sembo te na bobateli biloko ya moto mosusu, nani akopesa bino biloko oyo esengeli kozala ya bino moko ?
(Mat 6.24)
13  Mosali moko te akoki kosalela bankolo mibale, pamba te akoyina moko mpe akolinga mosusu to akokangama na moko mpe akoboya mosusu. Bokoki te kosalela mbala moko Nzambe mpe mbongo.
14 Wana Bafarizeo bazalaki koyoka Yesu koloba makambo wana nyonso, bazalaki koseka Ye, pamba te bazalaki na lokoso ya mbongo.
15 Kasi Yesu alobaki na bango :
— Bino, bozali penza bato oyo bomilakisaka na miso ya bato mosusu lokola nde bozali bato ya sembo, nzokande Nzambe ayebi mitema na bino ; pamba te oyo bato bamonaka motuya makasi, Nzambe ayokaka yango nkele.
Mibeko mpe Bokonzi ya Nzambe
(Mat 11.12-13)
16  Tango ya Mibeko mpe ya Basakoli ewumelaki kino na Yoane Mobatisi ; kasi wuta Yoane Mobatisi ayaki, Sango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali koteyama, mpe moto nyonso azali kobunda na kondima mpo na kokota kuna.
(Mat 5.18)
17  Ezali penza pete mpo na Likolo mpe mabele kolimwa ; kasi mpo na Mibeko, ezali penza pasi mpo na nkoma na yango oyo eleki moke kolongwa.
(Mat 5.32)
18  Mobali nyonso oyo alongoli mwasi na ye na libala mpe abali mwasi mosusu asali ekobo, mpe mobali oyo abali mwasi oyo balongoli na libala asali mpe ekobo.
Moto ya bomengo mpe mobola Lazare
19  Ezalaki na mozwi moko oyo azalaki kolata bilamba ya motane makasi mpe ya lino ya kitoko, bongo azalaki kobika bomoi ya bisengo mikolo nyonso. 20  Na liboso ya ekuke ya ndako na ye, mobola moko atandamaki wana, kombo na ye ezalaki Lazare, nzoto na ye mobimba etonda na bapota ; 21  azalaki koluka ata kolia biloko oyo ezalaki kokweya longwa na mesa ya mozwi, kasi ezalaki bambwa nde ezalaki koya kolembola bapota na ye.
22  Mokolo moko, mobola yango akufaki, mpe ba-anjelu bamemaki ye epai ya Abrayami. Mozwi mpe akufaki, mpe bakundaki ye. 23  Kati na mboka ya bakufi, mozwi azalaki konyokwama na pasi makasi ; boye atombolaki miso mpe amonaki, na mosika, Abrayami elongo na Lazare avanda pembeni na ye.
24  Mozwi akomaki koganga : « Tata Abrayami, yokela ngai mawa ! Tinda Lazare ete atia songe ya mosapi na ye kati na mayi mpo ete atangisela ngai mayi na lolemo, pamba te nazali koyoka pasi makasi kati na moto oyo. »
25  Kasi Abrayami azongisaki : « Mwana na ngai, kanisa ete, wana ozalaki na bomoi, ozwaki bolamu ebele, kasi Lazare azwaki nde pasi ebele. Sik’oyo awa, azali kozwa kobondisama na ye ; kasi yo, okomi na pasi. 26  Lisusu, libulu moko monene ekaboli biso mpe bino, mpo ete moto nyonso oyo alingi kolongwa awa epai biso tozali mpo na kokende epai na bino, akoka te ; mpe ete moto nyonso oyo alingi kokatisa libulu yango longwa kuna epai bino bozali mpo na koya awa epai na biso, akoka mpe te. »
27  Mozwi alobaki : « Tata, nasengi na yo, tinda Lazare epai ya libota na ngai, 28  pamba te nazali na bandeko mitano. Tika ete akende kokebisa bango mpo ete, bango mpe, bakoma awa te, kati na esika oyo ya pasi ! »
29  Abrayami azongisaki : « Bandeko na yo bazali na Moyize mpe basakoli ; tika ete bayoka bango ! »
30  Mozwi alobaki lisusu : « Te, tata Abrayami ! Kasi soki moto moko awuti na mboka ya bakufi mpe akei epai na bango, bakobongola mitema ! »
31  Abrayami alobaki na ye : « Soki baboyi koyoka Moyize mpe basakoli, bakondima mpe kaka te ata soki moto moko alamuki kati na bakufi. »