7
Yesu abikisi mosali ya mokonzi ya basoda
(Mat 8.5-13; Yn 4.46-54)
Sima na Yesu koloba makambo oyo nyonso epai ya bato, akotaki na Kapernawumi.
Kuna, mosali moko ya mokonzi ya basoda azalaki kobela mpe akomaki pene ya kokufa. Mokonzi yango ya basoda azalaki kolinga mingi mosali na ye. Tango mokonzi ya basoda ayokaki sango na tina na Yesu, atindaki ndambo ya bampaka ya Bayuda epai na Yesu mpo na kosenga na Ye ete akende kobikisa mosali ya mokonzi ya basoda. Tango bakomaki epai ya Yesu, babondelaki Ye makasi ; balobaki :
— Tata wana abongi penza ete osalela ye likambo oyo asengi epai na Yo, pamba te alingaka ekolo na biso, mpe ye nde atongaki ndako na biso ya mayangani.
Boye Yesu akendeki elongo na bango. Kasi tango akomaki pene ya ndako, mokonzi ya basoda atindaki baninga na ye koloba na Yesu :
— Nkolo, komitungisa na Yo te, pamba te nazali ya kokoka te mpo ete okota na ndako na ngai. Ezali mpe mpo na yango nde namimonaki ete nabongi te mpo na koya epai na Yo. Kasi loba kaka liloba moko, mpe mosali na ngai akobika na bokono na ye. Pamba te ngai moko mpe nazali na se ya bakonzi oyo baleki ngai, mpe ezali na basoda oyo bazali na se ya bokonzi na ngai. Soki nalobi na moko : « Kende, » akendaka ; mpe na mosusu : « Yaka, » ayaka ; bongo soki nalobi na mowumbu na ngai : « Sala mosala oyo, » asalaka yango.
Tango Yesu ayokaki maloba oyo, akamwaki ye mingi ; bongo abalukaki epai ya ebele ya bato oyo bazalaki kolanda Ye mpe alobaki :
— Nazali koloba na bino penza ya solo : ezala kati na Isalaele, natikali nanu komona te kondima ya boye.
10 Tango bato oyo mokonzi ya basoda atindaki bazongaki na ndako, bakutaki mosali yango nzoto kolongono.
Yesu asekwisi elenge mobali
11 Sima na yango, Yesu akendeki na engumba moko na kombo Nayini ; bayekoli na Ye elongo na ebele ya bato balandaki Ye. 12 Wana akomaki pene ya ekuke ya engumba, akutanaki na bato bazali kokende kokunda mwana mobali moko oyo awutaki kokufa : azalaki mwana kaka moko ya mwasi moko akufisa mobali. Mpe bato mingi ya engumba yango bazalaki elongo na mwasi yango. 13 Tango kaka Nkolo amonaki mwasi yango, ayokelaki ye mawa mingi mpe alobaki na ye :
— Kolela te !
14 Apusanaki mpe asimbaki tsipoyi oyo bazalaki komema na yango mwana oyo akufaki, mpe bato oyo bazalaki komema yango batelemaki. Yesu alobaki :
— Elenge mobali, nalobi na yo, lamuka !
15 Moto oyo akufaki avandaki mpe abandaki koloba ; mpe Yesu azongisaki ye epai ya mama na ye. 16 Bato nyonso batondaki na kobanga, bakomaki kokumisa Nzambe mpe koloba :
— Mosakoli moko ya monene abimi kati na biso. Nzambe ayei kosunga bato na Ye !
17 Sango oyo na tina na Yesu epanzanaki kati na Yuda mpe kati na bamboka ya zingazinga.
Yesu mpe Yoane Mobatisi
(Mat 11.2-19)
18 Bayekoli ya Yoane bayebisaki makambo wana nyonso epai ya nkolo na bango. Yoane abengaki bayekoli na ye, mibale kati na bango, 19 mpe atindaki bango epai ya Nkolo Yesu mpo na kotuna :
— Boni, ozali penza Ye oyo asengelaki koya to tosengeli kozela mosusu ?
20 Tango bakomaki epai ya Yesu, balobaki na Ye :
— Yoane Mobatisi atindi biso epai na Yo mpo ete totuna : « Boni, ozali penza Ye oyo asengelaki koya to tosengeli kozela mosusu ? »
21 Kaka na tango, Yesu abikisaki bato ebele na bokono, na pasi mpe na milimo mabe, mpe afungolaki miso ya bakufi miso ebele. 22 Boye, Yesu azongiselaki bayekoli oyo Yoane atindaki :
— Bokende koyebisa Yoane makambo oyo bomoni mpe oyo boyoki : bakufi miso bazali komona, bakufi matoyi bazali koyoka, ba-ebosono bazali kotambola, bato na maba bazali kopetolama, bakufi bazali kosekwa, mpe Sango Malamu ezali kosakolama epai ya babola. 23  Esengo na moto oyo akokweyisa kondima na ye te likolo na Ngai !
24 Tango bato oyo Yoane atindaki bazongaki, Yesu akomaki koloba na ebele ya bato na tina na Yoane :
— Eloko nini bokendeki kotala kati na esobe ? Mwa nzete oyo mopepe ezalaki koningisa epai na epai ? 25  Soki te, bokendeki penza kotala nini ? Moto moko alata bilamba ya kitoko ? Te ! Bato oyo balataka bilamba ya kitoko mpe bamisepelisaka kati na bozwi na bango bavandaka kati na bandako ya bakonzi. 26  Kasi nani bino bokendeki penza kotala ? Mosakoli ? Iyo, nazali koloba na bino, mpe aleki kutu ata mosakoli. 27  Yoane azali moto oyo Makomi ezali koloba boye na tina na ye :
« Nakotinda ntoma na Ngai liboso na Yo,
oyo akobongisela Yo nzela. »
28  Nazali koloba na bino : kati na bato oyo babotama na mwasi, moko te aleki Yoane na monene ; nzokande, ye oyo aleki moke kati na Bokonzi ya Nzambe aleki Yoane Mobatisi na monene.
(Mat 11.16-19)
29 Bato nyonso elongo na bafutisi mpako oyo bayokaki maloba na Yesu bandimaki ete nzela ya Nzambe ezali sembo, pamba te Yoane abatisaki bango 30 Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko baboyaki mokano ya Nzambe mpo na bango, pamba te baboyaki ete Yoane abatisa bango.
31 Boye Yesu alobaki :
— Na nani penza nakokokanisa bato ya ekeke oyo ? Bakokani penza na banani ? 32  Bakokani penza na bana mike oyo bavandi na esika oyo bato ebele bakutanaka mpe bazali koganga, bamoko na bamosusu :
« Tobetaki baflite, kasi bobinaki te ;
toyembelaki bino banzembo ya matanga,
kasi bolelaki te ! »
33  Pamba te, tango Yoane Mobatisi ayaki, azalaki kolia mapa te mpe azalaki komela vino te, mpe bolobaki : « Azali na molimo mabe kati na ye ! »
34  Mwana na Moto ayaki, azali kolia, azali komela, mpe bozali koloba : « Azali na lokoso ya kolia mpe ya komela masanga, moninga ya bafutisi mpako mpe ya bato ya masumu ! » 35  Kasi bato nyonso oyo bayambaka Bwanya ya Nzambe batalisaka ete ezali sembo.
Yesu mpe mwasi mosumuki
36 Mofarizeo moko abengisaki Yesu mpo ete alia mesa moko elongo na ye. Yesu akendeki na ndako ya Mofarizeo yango mpe avandaki na mesa mpo na kolia. 37 Nzokande, kati na engumba yango, ezalaki na mwasi moko oyo azalaki kobika bomoi ya masumu. Tango ayokaki ete Yesu azali kolia na ndako ya Mofarizeo, ayaki wana na molangi ya alibatre etonda na malasi, 38 atelemaki na sima ya Yesu, na makolo na Ye ; azalaki kolela mpe, na mpinzoli na ye, akomaki kopolisa makolo ya Yesu. Bongo apangusaki makolo yango na nzela ya suki na ye, apesaki yango beze mpe asopelaki yango malasi.
39 Tango Mofarizeo oyo abengisaki Yesu amonaki bongo, amilobelaki :
— Soki moto oyo azali mosakoli, alingaki koyeba soki mwasi oyo azali kosimba Ye azali nani, mpe soki azali mwasi ya lolenge nini : moto ya masumu.
40 Yesu alobaki na ye :
— Simona, nazali na likambo ya koyebisa yo.
Mofarizeo azongisaki :
— Moteyi, loba yango.
41 Yesu alobaki :
— Moto moko adefisaki bato mibale mbongo. Moto ya liboso asengelaki kozongisa mbongo ya bibende nkama mitano, mpe oyo ya mibale, mbongo ya bibende tuku mitano. 42  Kasi lokola, kati na bango mibale, moko te azalaki na mbongo ya kozongisa, modefisi alimbisaki bango mpo ete bafuta lisusu niongo yango te. Na makanisi na yo, nani kati na bango mibale akolinga modefisi koleka ?
43 Simona azongisaki :
— Nakanisi ete ezali moto oyo balimbisi niongo ya mbongo oyo eleki ebele.
Yesu alobaki na ye :
— Okati malamu !
44 Bongo abalukaki epai ya mwasi, mpe alobaki na Simona :
— Omoni mwasi oyo ? Tango nakotaki na ndako na yo, opesaki Ngai mayi te ya kosukola makolo na Ngai ; kasi ye, apolisi yango na mpinzoli na ye mpe apangusi yango na nzela ya suki na ye. 45  Opesaki Ngai beze te ; kasi ye, banda nakotaki awa, atiki te kopesa makolo na Ngai beze. 46  Opakolaki Ngai mafuta te na moto ; kasi ye, asopeli makolo na Ngai malasi. 47  Yango wana, nazali koloba na yo : ebele ya masumu na ye elimbisami, lokola atalisi bolingo monene. Kasi moto oyo balimbisaki niongo moke azali kotalisa bolingo moke.
48 Bongo Yesu alobaki na mwasi :
— Masumu na yo elimbisami.
49 Bato mosusu oyo babengamaki elongo na Ye bakomaki koloba, bango na bango :
— Moto oyo azali penza nani, oyo akomi ata kolimbisa masumu ?
50 Kasi Yesu alobaki na mwasi yango :
— Kondima na yo ebikisi yo ; kende na kimia !