7
Kotangama ya bana ya Isalaele
Tango misala ya kotonga mir esilaki mpe natiaki bizipelo ya bikuke, batiaki bakengeli bikuke, bayembi mpe Balevi : bato na bato na mosala na bango. Napesaki mokumba ya kokamba engumba Yelusalemi epai ya Anani, ndeko na ngai ya mobali, mpe epai ya Anania, moyangeli ya engumba batonga makasi, oyo, koleka bato ebele, azalaki moto ya sembo mpe azalaki kotosa Nzambe. Nalobaki na bango :
— Bikuke ya Yelusalemi esengeli te kofungwama liboso ete moyi engala, mpe, na pokwa, bakokanga makasi bizipelo na yango mpe bakokotisa yango bikangelo, wana bakengeli bikuke bakozala nanu na bisika na bango ya mosala. Botia lisusu lokola bakengeli, bavandi ya Yelusalemi : bamoko bakozala na bisika na bango ya mosala, mpe bamosusu bakokengela pembeni ya bandako na bango.
Nzokande, etando ya engumba Yelusalemi ezalaki monene mpe ekenda mosika makasi, kasi bato kati na yango bazalaki moke mpe bandako etongamaki nanu te. Nzambe na ngai apesaki ngai makanisi ya kosangisa bankumu, bakambi mpe bato mosusu mpo na kotanga motango na bango kolanda mabota na bango. Bongo, namonaki buku ya bokoko ya ba-oyo bazongaki bato ya liboso longwa na bowumbu. Tala makomi oyo namonaki kuna :
 
Tala bato ya etuka ya Yuda, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, amemaki na bowumbu ; mpe wuta na bowumbu, bazongaki na Yelusalemi mpe na Yuda, moto na moto na engumba na ye ; bazongaki nzela moko na Zorobabeli, Jozue, Neyemi, Azaria, Raamia, Naamani, Maridoshe, Bilishani, Misipereti, Bigivayi, Neumi mpe Baana.
 
Tala motango ya bana ya Isalaele :
Bakitani ya Pareoshi :
nkoto mibale na nkama moko na tuku sambo na mibale.
Bakitani ya Shefatia :
nkama misato na tuku sambo na mibale.
10 Bakitani ya Ara :
nkama motoba na tuku mitano na mibale.
11 Bakitani ya Paati-Moabi na nzela ya Jozue mpe Joabi :
nkoto mibale na nkama mwambe na zomi na mwambe.
12 Bakitani ya Elami :
nkoto moko na nkama mibale na tuku mitano na minei.
13 Bakitani ya Zatu :
nkama mwambe na tuku minei na mitano.
14 Bakitani ya Zakayi :
nkama sambo na tuku motoba.
15 Bakitani ya Binuwi :
nkama motoba na tuku minei na mwambe.
16 Bakitani ya Bebayi :
nkama motoba na tuku mibale na mwambe.
17 Bakitani ya Azigadi :
nkoto mibale na nkama misato na tuku mibale na mibale.
18 Bakitani ya Adonikami :
nkama motoba na tuku motoba na sambo.
19 Bakitani ya Bigivayi :
nkoto mibale na tuku motoba na sambo.
20 Bakitani ya Adini :
nkama motoba na tuku mitano na mitano.
21 Bakitani ya Ateri na nzela ya Ezekiasi :
tuku libwa na mwambe.
22 Bakitani ya Ashumi :
nkama misato na tuku mibale na mwambe.
23 Bakitani ya Betsayi :
nkama misato na tuku mibale na minei.
24 Bakitani ya Arifi :
nkama moko na zomi na mibale.
25 Bakitani ya mboka Gabaoni :
tuku libwa na mitano.
26 Bato ya bamboka Beteleemi mpe Netofa :
nkama moko na tuku mwambe na mwambe.
27 Bato ya mboka Anatoti :
nkama moko na tuku mibale na mwambe.
28 Bato ya mboka Beti-Azimaveti :
tuku minei na mibale.
29 Bato ya bamboka Kiriati-Yearimi, Kefira mpe Beyeroti :
nkama sambo na tuku minei na misato.
30 Bato ya bamboka Rama mpe Geba :
nkama motoba na tuku mibale na moko.
31 Bato ya mboka Mikimasi :
nkama moko na tuku mibale na mibale.
32 Bato ya bamboka Beteli mpe Ayi :
nkama moko na tuku mibale na misato.
33 Bato ya mboka Nebo mosusu :
tuku mitano na mibale.
34 Bato ya mboka ya Elami mosusu :
nkoto moko na nkama mibale na tuku mitano na minei.
35 Bato ya mboka Arimi :
nkama misato na tuku mibale.
36 Bakitani ya mboka Jeriko :
nkama misato na tuku minei na mitano.
37 Bato ya bamboka Lodi, Adidi mpe Ono :
nkama sambo na tuku mibale na moko.
38 Bakitani ya engumba Sena :
nkoto misato na nkama libwa na tuku misato.
 
39 Tala motango ya Banganga-Nzambe :
Bakitani ya Yedaeya na nzela ya libota ya Jozue :
nkama libwa na tuku sambo na misato.
40 Bakitani ya Imeri :
nkoto moko na tuku mitano na mibale.
41 Bakitani ya Pashuri :
nkoto moko na nkama mibale na tuku minei na sambo.
42 Bakitani ya Arimi :
nkoto moko na zomi na sambo.
 
43 Tala motango ya Balevi :
Bakitani ya Jozue na nzela ya Kadimieli mpe ya Odeva :
tuku sambo na minei.
 
44 Tala motango ya bayembi :
Bakitani ya Azafi :
nkama moko na tuku minei na mwambe.
 
45 Tala motango ya bakengeli bikuke :
Bakitani ya Shalumi, Ateri, Talimoni, Akubi, Atita mpe Shobayi :
nkama moko na tuku misato na mwambe.
 
46 Basali ya Tempelo :
Bakitani ya Tsika, Asufa, Tabaoti, 47 Kerosi, Siya, Padoni, 48 Lebana, Agaba, Shalimayi, 49 Anani, Gideli, Gaari, 50 Reaya, Retsini, Nekoda, 51 Gazami, Uza, Paseya, 52 Besayi, Mewunimi, Nefusimi, 53 Bakibuki, Akufa, Aruri, 54 Batsiliti, Meyida, Arisha, 55 Barikosi, Sisera, Tama, 56 Netsia mpe Atifa.
 
57 Tala bakitani ya basali ya Salomo :
Bakitani ya Sotayi, Sofereti, Perida, 58 Yala, Darikoni, Gideli, 59 Shefatia, Atili, Pokereti-Atsebayimi mpe Amoni.
60 Motango ya basali ya Tempelo mpe ya bakitani ya basali ya Salomo : nkama misato na tuku libwa na mibale.
 
61 Tala molongo ya bato oyo bawutaki na bowumbu, na bingumba Teli-Mela, Teli-Arisha, Kerubi-Adoni mpe Imeri, kasi balongaki te kolakisa ete mabota na bango ya botata ewuta na Isalaele :
62 Bakitani ya Delaya, Tobiya mpe Nekoda :
nkama motoba na tuku minei na mibale.
 
63 Mpe kati na Banganga-Nzambe :
bakitani ya Obaya, ya Akotsi mpe ya Barizilayi oyo abengamaki « Barizilayi » mpo ete abalaki mwana mwasi ya Barizilayi, moto ya Galadi.
64 Balukaki mikanda oyo bakoma bakombo ya bakoko na bango, kasi batikalaki komona yango te. Boye balongolaki bango na mosala ya bonganga-Nzambe, pamba te bazalaki mbindo. 65 Moyangeli apekisaki bango kolia bilei ya bule kino tango Nganga-Nzambe moko akotuna toli ya Yawe na tina na bango na nzela ya Urimi mpe Tumimi.
 
66 Motango ya lisanga mobimba ya bato oyo bawutaki na bowumbu ezalaki nkoto tuku minei na mibale na nkama misato na tuku motoba, 67 bakisa bawumbu na bango ya mibali mpe ya basi nkoto sambo na nkama misato na tuku misato na sambo ; bazalaki mpe na bayembi ya basi mpe ya mibali nkama mibale na tuku minei na mitano, bampunda nkama sambo na tuku misato na motoba, bamile nkama mibale na tuku minei na mitano, 68 bashamo nkama minei na tuku misato na mitano mpe ba-ane nkoto motoba na nkama sambo na tuku mibale.
 
69 Bakambi mingi ya mabota bapesaki makabo oyo bakataki kopesa wuta na mitema na bango moko, mpo na misala ya kotonga Tempelo. Moyangeli apesaki na libenga ya misala mbongo ya bibende ya wolo nkoto moko, bakopo tuku mitano mpe banzambala nkama mitano na tuku misato ya mosala ya bonganga-Nzambe. 70 Bakambi mosusu ya mabota bapesaki na libenga ya misala mbongo ya bibende ya wolo nkoto tuku mibale mpe mbongo ya bibende ya palata nkoto mibale na nkama mibale na tuku mibale. 71 Batikali kati na bato bapesaki mbongo ya bibende ya wolo nkoto tuku mibale, mbongo ya bibende ya palata nkoto mibale mpe banzambala tuku motoba na sambo ya mosala ya bonganga-Nzambe.
72 Banganga-Nzambe, Balevi, bakengeli bikuke, bayembi, basali ya Tempelo, ndambo kati na bato mpe bato nyonso ya Isalaele bavandaki kati na bingumba na bango moko.
Tango sanza ya sambo ekomaki, bana ya Isalaele bakomaki kovanda kati na bingumba na bango.