6
Mobeko mpo na kobulisa moto epai na Yawe
Yawe alobaki na Moyize : « Yebisa bana ya Isalaele : Mobali to mwasi oyo amibulisi mpo na Yawe na nzela ya ndayi ya libulisi asengeli komipekisa komela vino, masanga oyo elangwisaka, masanga ya ngayi oyo basala na vino mpe masanga ya ngayi oyo basala na masanga mosusu oyo elangwisaka ; asengeli te komela masanga oyo basala na bambuma ya vino ya mayi to ya kokawuka. Na mikolo nyonso ya libulisi na ye, asengeli te kolia eloko nyonso oyo basala na bambuma ya vino, kobanda na mokokoli kino na poso. Na mikolo nyonso ya ndayi ya libulisi na ye, jileti esengeli te kotutana na moto na ye to basengeli te kokata suki ya moto na ye, kino tango ya libulisi na ye mpo na Yawe ekosila ; akozala bule mpe akotika suki ya moto na ye mpe mandefu na ye kokola. Na mikolo nyonso ya libulisi na ye mpo na Yawe, asengeli te kosimba ebembe ; ezala mpo na kufa ya tata na ye, ya mama na ye, ya ndeko na ye ya mobali to ya ndeko na ye ya mwasi, asengeli te komikomisa mbindo ; pamba te na moto na ye, azali na elembo ya libulisi mpo na Nzambe. Na mikolo nyonso ya libulisi na ye, akozala bule mpo na Yawe.
Soki moto akufi na mbalakata pene na ye, moto na ye oyo epesama mpo na libulisi ekokoma mbindo. Bongo asengeli kokatisa suki na ye ya moto mpe mandefu na ye na mokolo ya sambo, mokolo na ye ya kopetolama. 10 Na mokolo ya mwambe, asengeli komema epai ya Nganga-Nzambe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani : bibenga mibale ya zamba mpe bana mibale ya ebenga ya mboka. 11 Nganga-Nzambe akobonza moko lokola mbeka mpo na masumu mpe mosusu, lokola mbeka ya kotumba ; akosala mosala ya bolimbisi masumu na ye lokola asimbaki ebembe. Kaka na mokolo yango, akobulisa lisusu moto na ye epai na Yawe. 12 Akokaba lisusu epai na Yawe libulisi na ye mpe akobonza lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, mwana meme ya mobu moko ; pamba te mikolo na ye ya liboso, oyo esilaki koleka, ekotangama lisusu te mpo ete akomaki mbindo.
13 Tala mobeko mpo na moto oyo amibulisi mpo na Yawe : ‹ soki mikolo ya libulisi na ye ekoki, basengeli komema ye na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani 14 epai wapi akobonza lokola mbeka mpo na Yawe : mwana meme ya mobu moko mpe ezanga mbeba lokola mbeka ya kotumba ; meme ya mwasi ya mobu moko mpe ezanga mbeba lokola mbeka mpo na masumu ; mpe meme ya mobali mpe ezanga mbeba lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani ; 15 kitunga ya mapa ezanga levire mpe basala na farine basangisa na mafuta ; bagalete ezanga levire mpe bapakola mafuta elongo na mbeka ya masanga mpe makabo mosusu. 16 Nganga-Nzambe akomema makabo wana nyonso liboso ya Yawe ; akobonza mbeka na ye mpo na masumu mpe mbeka na ye ya kotumba ; 17 akobonza lisusu epai na Yawe meme ya mobali lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, elongo na kitunga ya mapa ezanga levire. Nganga-Nzambe akobakisa na likolo na yango mbeka na ye ya masanga mpe makabo na ye mosusu. 18 Bongo moto oyo amipesa na libulisi mpo na Yawe akokata, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, suki ya moto na ye mpe ya mandefu na ye ; akolokota yango mpe akobwaka yango na moto oyo ezali kopela na se ya mbeka mpo na kozongisa boyokani. 19 Nganga-Nzambe akozwa lipeka ya mbeka ya meme ya mobali tango esili kozika ; akozwa lisusu, kati na kitunga, lipa moko ezanga levire mpe galeti moko ezanga levire, akotia yango na maboko ya moto oyo amipesa na libulisi mpo na Yawe sima na ye kokata suki ya moto na ye mpe mandefu na ye. 20 Nganga-Nzambe akobulisa mpe akotombola yango mpo na kopesa yango epai na Yawe, pamba te ezali biloko ya bule mpe ya Nganga-Nzambe, ndenge moko na tolo mpe mopende.
21 Wana nde ezali mobeko mpo na moto oyo amibulisi mpo na Yawe, na nzela ya ndayi, elongo na makabo oyo asengeli kobonza epai na Yawe mpo na libulisi na ye. Mpe soki azali na makoki, akoki na ye kopesa makabo mosusu wuta na motema na ye moko. Akokokisa biloko nyonso kolanda ndayi oyo asilaki kolapa mpe mobeko ya libulisi na ye. › »
Banganga-Nzambe basengeli kopambola bato
22 Yawe alobaki na Moyize : 23 « Loba na Aron mpe na bana na ye ya mibali : ‹ Tala ndenge nini bokobanda kopambola bana ya Isalaele, bokoloba :
24 ‘ Tika ete Yawe apambola yo
mpe abatela yo !
25 Tika ete Yawe angengisela yo elongi na Ye
mpe apesa yo ngolu na Ye !
26 Tika ete Yawe amona yo
mpe apesa yo kimia ! ’ ›
27 Ezali ndenge wana nde bakobanda kobelela Kombo na Ngai mpo na bolamu ya bana ya Isalaele, mpe Ngai nakopambola bango. »