Lisolo ya bakonzi ya Yuda
10
Isalaele atombokeli mokonzi Roboami
(1Ba 12.1-24)
Roboami akendeki na Sishemi epai wapi lisanga mobimba ya Isalaele esanganaki mpo na kokomisa ye mokonzi. Kasi sima na Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, koyoka sango yango wuta na Ejipito epai wapi akendeki kobombama mpo na kokima mokonzi Salomo, azongaki wuta na Ejipito. Boye, batindaki bato kobenga Jeroboami ; bongo ye Jeroboami elongo na lisanga mobimba ya Isalaele bakendeki epai ya Roboami mpe balobaki na ye :
— Tata na yo anyokolaki biso makasi. Kasi sik’oyo, yo, lembisa misala makasi mpe mikumba oyo tata na yo atia na mito na biso ; bongo biso, tokosalela yo.
Roboami azongisaki :
— Bopesa ngai mikolo misato mpo na koyekola likambo yango, bongo bozongela ngai.
Mpe bato bakendeki.
Mokonzi Roboami atunaki toli epai ya bampaka oyo basalaki elongo na Salomo, tata na ye, tango azalaki nanu na bomoi. Alobaki na bango :
— Toli nini bozali kopesa ngai lokola eyano ya kopesa epai ya bato oyo ?
Bazongiselaki ye :
— Soki omitalisi lokola moto malamu epai ya bato oyo, soki olobeli bango na boboto mpe opesi bango eyano ya malamu, bakozala tango nyonso basali na yo.
Kasi Roboami aboyaki toli oyo bampaka bapesaki ye ; asengaki toli epai ya bilenge mibali oyo bakolaki esika moko na ye mpe bazalaki kosalela ye. Atunaki bango :
— Toli nini bozali kopesa lokola eyano ya kopesa epai ya bato oyo balobi na ngai : « Lembisa misala makasi mpe mikumba oyo tata na yo atia na mito na biso ? »
10 Bilenge mibali oyo bakolaki esika moko na ye bazongisaki :
— Tala makambo oyo okoyebisa bato oyo balobi na yo : « Tata na yo anyokolaki biso na misala makasi ; kasi yo, lembisela biso yango ! » Yebisa bango : « Mosapi na ngai ya moke eleki loketo ya tata na ngai na monene. 11 Kobanda lelo, soki tata na ngai anyokolaki bino na misala makasi, ngai nakoyeisa yango lisusu makasi koleka ; soki tata na ngai azalaki kobeta bino fimbu ya poso ya nyama, ngai nakobeta bino fimbu ya ebende. »
12 Sima na mikolo misato, Jeroboami elongo na bato nyonso bazongaki epai ya Roboami, ndenge mokonzi ayebisaki bango : « Bozongela ngai sima na mikolo misato. » 13 Mokonzi Roboami aboyaki kosalela toli oyo bampaka bapesaki ye, ayanolaki bato na maloba mabe makasi ; 14 alandaki toli ya bilenge mibali mpe ayebisaki bango :
— Soki tata na ngai anyokolaki bino na misala makasi, ngai nakoyeisa yango lisusu makasi koleka ; soki tata na ngai azalaki kobeta bino fimbu ya poso ya nyama, ngai nakobeta bino fimbu ya ebende.
15 Mokonzi aboyaki koyoka bato, pamba te ezalaki Nzambe nde asalaki bongo mpo na kokokisa Liloba oyo Yawe ayebisaki Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, na nzela ya mosakoli Ayiya, moto ya Silo.
Bana ya Isalaele ya Nor batomboki
(1Ba 12.16-19)
16 Tango bana nyonso ya Isalaele bamonaki ete mokonzi aboyi koyoka bango, bazongiselaki ye :
— Eloko nini ya lisanga tozali na yango na Davidi ? Tozali na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi ! Isalaele, tika ete moto na moto azonga na ndako na ye ya kapo ! Mpe yo, mokitani ya Davidi, tikala kotala makambo ya ndako na yo !
Wana bana nyonso ya Isalaele bazongaki na bandako na bango ya kapo, 17 Roboami akobaki kokonza bana ya Isalaele oyo bazalaki kovanda na bingumba ya Yuda.
18 Mokonzi Roboami atindaki Adorami oyo azalaki motambolisi ya misala makasi, kasi bana ya Isalaele babambaki ye mabanga mpe akufaki. Nzokande, mokonzi Roboami alongaki komata na shar na ye mpo na kokima na Yelusalemi. 19 Ezali boye nde bana ya Isalaele batombokelaki ndako ya Davidi kino na mokolo ya lelo.