21
Jozafati akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Yorami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Tala bandeko mibali ya Yorami : Azaria, Yeyeli, Zakari, Azaria, Mikaeli mpe Shefatia. Bango nyonso bazalaki bana mibali ya Jozafati, mokonzi ya Isalaele. Tata na bango apesaki bango bakado ebele ya palata, ya wolo, ya biloko ya talo ; apesaki bango lisusu bingumba batonga makasi kati na Yuda, kasi apesaki bokonzi epai ya Yorami mpo ete azalaki mwana na ye ya liboso ya mobali.
Yorami, mokonzi ya Yuda
Tango Yorami azwaki bokonzi ya tata na ye mpe alendaki na bokonzi yango, abomaki na mopanga bandeko na ye nyonso ya mibali elongo na ndambo ya bakambi ya Isalaele.
(2Ba 8.16-24)
Yorami azalaki na mibu tuku misato na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu mwambe na Yelusalemi. Alandaki nzela oyo bakonzi ya Isalaele batambolaki na yango mpe asalaki mabe na miso ya Yawe ndenge libota ya Akabi esalaki, pamba te abalaki mwana mwasi ya Akabi. Nzokande, Yawe alingaki te kobebisa libota ya Davidi, mpo na boyokani oyo Ye moko Yawe asalaki elongo na Davidi, mpe mpo ete alakaki kopesa mpo na libela bokonzi epai ya Davidi mpe epai ya bana na ye.
Na tango oyo Yorami azalaki na bokonzi, bato ya Edomi batombokelaki Yuda mpe bamipesaki mokonzi. Yorami akendeki kuna elongo na bakonzi na ye ya basoda mpe bashar na ye nyonso. Na butu, atelemaki mpe abetaki bato ya Edomi oyo bazingelaki ye elongo na bakonzi ya basoda oyo babundaka na bashar. 10 Wuta mokolo wana kino lelo, Edomi etombokelaka kaka Yuda. Na tango wana, Libina mpe etombokelaki Yorami, pamba te Yorami asundolaki Yawe, Nzambe ya batata na ye.
 
11 Yorami atongaki kutu bisambelo ya likolo ya bangomba ya Yuda ; atindikaki bato ya Yelusalemi na kosambela bikeko mpe apengwisaki Yuda. 12 Yorami azwaki mokanda kowuta na mosakoli Eliya ; ezalaki koloba :
« Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya mokonzi na yo Davidi, alobi : ‹ Lokola olandi te ndakisa ya Jozafati, tata na yo, mpe ya Asa, mokonzi ya Yuda, 13 kasi olandi banzela ya bakonzi ya Isalaele, mpe otindiki bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi na kosambela banzambe ya bikeko ndenge libota ya Akabi esalaki ; lokola obomaki lisusu bandeko na yo ya mibali, bato ya ndako ya tata na yo, bato oyo bazalaki malamu koleka yo, 14 Yawe alingi sik’oyo koboma, na nzela ya etumbu ya somo, bato na yo, bana na yo ya mibali, basi na yo mpe biloko na yo nyonso. 15 Yo moko mpe okobela bokono ya makasi, bokono ya libumu oyo pasi na yango ekomata se komata mikolo nyonso kino kobimisa yo misopo na libanda. › »
16 Yawe asalaki ete bato ya Filisitia mpe bato ya Arabi oyo bazalaki kovanda pembeni ya bato ya Kushi babundisa Yorami. 17 Babundisaki Yuda, bakotaki kati na yango na makasi mpe bamemaki biloko nyonso oyo bamonaki kati na ndako ya mokonzi elongo na bana na ye ya mibali mpe basi na ye ; mwana mobali moko kaka atikalaki : Yoakazi*, mwana na ye ya suka.
18 Sima na makambo oyo nyonso, Yawe atindelaki ye bokono ya libumu oyo esilaka te. 19 Pasi na yango ezalaki mikolo nyonso komata se komata ; mpe na suka ya mobu ya mibale, misopo ya Yorami ebimaki na libanda mpo na bokono mpe akufaki kati na pasi makasi. Bato na ye batumbaki te biloko ya solo kitoko mpo na kopesa ye lokumu ndenge basalaki mpo na batata na ye.
20 Yorami azalaki na mibu tuku misato na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu mwambe na Yelusalemi. Akendeki kaka ndenge wana, moto ata moko te ayokaki mawa. Bakundaki ye kati na engumba ya Davidi, kasi kati na bakunda ya bakonzi te.
* 21:17 Yoakazi to Akazia elingi koloba : Yawe asimbi.