27
Yotami, mokonzi ya Yuda
(2Ba 15.33-38)
Yotami azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na motoba na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yerusha. » Yerusha azalaki mwana ya Tsadoki. Yotami asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe ndenge kaka Oziasi, tata na ye, asalaki ; kasi ye, atikalaki kokota te kati na Tempelo ya Yawe. Atako bongo, bato bakobaki kosala makambo mabe.
Yotami atongaki ekuke ya likolo ya Tempelo ya Yawe mpe asalaki misala ebele na mir, na ngomba Ofeli. Atongaki mpe bingumba kati na etuka ya bangomba ya Yuda, bandako makasi mpe bandako milayi kati na bazamba. Yotami abundisaki mokonzi ya bato ya Amoni mpe alongaki bango. Na mobu wana mpe na mibu mibale oyo elandaki, bato ya Amoni bafutaki ye lokola mpako ya mokonzi bakilo nkoto misato na nkama mitano ya palata, bakilo nkoto minei na nkama mitano ya ble mpe bakilo nkoto minei na nkama mitano ya orje. Yotami akomaki na nguya makasi, pamba te azalaki kotambola na bosembo na miso ya Yawe, Nzambe na ye.
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Yotami, bitumba mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele mpe ya Yuda. Azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na motoba na Yelusalemi. Yotami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi. Akazi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.