35
Joziasi asepeli feti ya Pasika
(2Ba 23.21-23)
Joziasi asepelaki feti ya Pasika mpo na lokumu ya Yawe kati na Yelusalemi ; mpe na mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso, bakataki kingo ya mpate mpo na mbeka ya Pasika. Atiaki Banganga-Nzambe mpo ete bakoba mosala na bango mpe alendisaki bango na mosala ya Tempelo ya Yawe. Alobaki na Balevi oyo babulisamaki mpo na Yawe mpe bazalaki na mokumba ya koteya Isalaele mobimba :
— Botia Sanduku ya bule kati na Tempelo oyo Salomo, mwana mobali ya Davidi, mokonzi ya Isalaele, atongaki ; ezali lisusu ya komema na mapeka na bino te. Sik’oyo, bosalela Yawe, Nzambe na bino, mpe Isalaele, bato na Ye. Bomibongisa kolanda mabota mpe masanga na bino ya mosala, kolanda mitindo oyo Davidi, mokonzi ya Isalaele, mpe Salomo, mwana na ye ya mobali, bakomaki. Bowumela na bisika na bino ya mosala kati na Esika ya bule : lisanga moko ya Balevi mpo na libota moko na moko ya bandeko na bino, bato ya ekolo na bino. Bokata kingo ya mpate mpo na mbeka ya Pasika, bomibulisa mpe bobongisa mpate yango ya Pasika mpo na bandeko na bino oyo bozali na bango ekolo moko, kolanda mitindo ya Yawe na nzela ya Moyize.
Joziasi azwaki kati na bibwele na ye moko mokonzi bana meme mpe bana ntaba nkoto tuku misato mpe bangombe nkoto misato, mpo na bato ya Isalaele, nkoto tuku misato oyo bazalaki wana mpo ete bakoka kobonza yango lokola mbeka ya Pasika. Bakalaka na ye mpe bapesaki wuta na mokano ya mitema na bango, epai ya bato, epai ya Banganga-Nzambe mpe epai ya Balevi. Ilikia, Zakari mpe Yeyeli, oyo bazalaki bakambi ya misala kati na Tempelo ya Nzambe, bapesaki epai ya Banganga-Nzambe lokola mbeka ya Pasika bana meme nkoto mibale na nkama motoba mpe bangombe nkama misato. Konania elongo na bandeko na ye ya mibali : Shemaya, Netaneeli, Ashabia, Yeyeli mpe Yozabadi oyo bakambi ya Balevi, bapesaki bameme nkoto mitano mpe bangombe nkama mitano epai ya Balevi lokola mbeka ya Pasika.
10 Tala ndenge babongisaki losambo : Banganga-Nzambe batelemaki na esika na bango ya mosala, mpe Balevi bazalaki kati na masanga na bango, kolanda mitindo ya mokonzi. 11 Bato babonzaki bana meme mpe bana ntaba lokola mbeka ya Pasika, mpe Balevi bazalaki kopesa makila na yango epai ya Banganga-Nzambe mpo ete basopa yango na likolo ya etumbelo, wana Balevi bazalaki kopapa mbeka 12 mpe kotia pembeni biteni ya kobonza lokola mbeka ya kotumba, mpo na kopesa yango epai ya bato kolanda masanga na bango mpo ete babonza yango epai na Yawe, kolanda ndenge ekomama kati na buku ya Moyize. Basalaki mpe ndenge wana mpo na bangombe. 13 Kolanda ndenge mobeko ezalaki kotinda, batumbaki na moto meme oyo ebonzamaki lokola mbeka ya Pasika mpe balambaki makabo mosusu ya bule na nzungu, na kikalungu mpe na basani ; mpe bapesaki yango na lombangu epai ya bato nyonso. 14 Sima na yango, Balevi babongisaki mbeka ya Pasika mpo na bango moko mpe mpo na Banganga-Nzambe ; pamba te Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron, bazalaki kosala kino na butu mosala ya kobonza bambeka ya kotumba mpe mafuta ya banyama. Yango wana Balevi bazalaki kobongisa mbeka ya Pasika mpo na bango moko mpe mpo na Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron.
15 Babeti mindule, bana mibali ya Azafi, bazalaki na esika na bango ya mosala kolanda mitindo ya Davidi, ya Azafi, ya Emani mpe ya Yedutuni, mosakoli ya mokonzi. Bakengeli bikuke mpe bazalaki na bisika na bango ya mosala ; batikalaki kozala mosika na yango te, pamba te bandeko na bango, Balevi, bazalaki mpe kobongisela bango biloko. 16 Ezalaki ndenge wana nde misala nyonso ebongisamaki mokolo wana mpo na kosepela feti ya Pasika mpe kobonza mbeka ya kotumba na likolo ya etumbelo ya Yawe, kolanda mitindo ya mokonzi Joziasi.
17 Bana ya Isalaele oyo bazalaki wana basepelaki na tango wana feti ya Pasika mpe feti ya Mapa ezanga levire, mikolo sambo.
(2Ba 23.22-23)
18 Wuta na tango ya mosakoli Samuele, feti ya Pasika ya lolenge wana etikalaki nanu kosalema te kati na Isalaele. Mpe kati na bakonzi ya Isalaele, moko te asepelaki feti ya Pasika lokola Pasika oyo Joziasi asepelaki elongo na Banganga-Nzambe, Balevi, bato nyonso ya Yuda mpe ya Isalaele oyo bazalaki kuna elongo na bavandi ya Yelusalemi. 19 Ezalaki na mobu ya zomi na mwambe ya bokonzi ya Joziasi nde basepelaki Pasika yango.
Kufa ya Joziasi
(2Ba 23.28-30)
20 Sima na makambo oyo nyonso mpe sima na Joziasi kobongisa Tempelo ya Yawe, Neko, mokonzi ya Ejipito, akendeki kobundisa Karikemishi, na ebale Efrate ; mpe Joziasi akendeki kokutana na ye mpo na kokanga ye nzela. 21 Neko atindelaki ye bamemi sango mpo na koloba na ye :
— Mokonzi ya Yuda, likambo nini kati ya yo mpe ngai ? Na mokolo ya lelo, nayei na ngai te mpo na kobundisa yo ; nayei nde kobundisa mokonzi mosusu. Nzambe alobi na ngai ete nasala likambo yango na lombangu. Keba ete otombokela Nzambe oyo azali elongo na ngai, soki te akobebisa yo.
22 Kasi Joziasi aboyaki kotika ye, mpe lokola ayokaki te makambo oyo Neko ayebisaki ye kowuta na monoko ya Nzambe, Joziasi amibongolaki mpo na kobundisa Neko na lubwaku ya Megido.
23 Kati na bitumba, basoda oyo babundaka na batolotolo babetaki mokonzi Joziasi, mpe ye alobaki na basoda na ye :
— Bolongola ngai awa, pamba te nazoki makasi.
24 Basoda na ye balongolaki ye na shar oyo azalaki kobunda na yango, batiaki ye na shar na ye mosusu mpe bamemaki ye na Yelusalemi epai wapi akufaki. Bakundaki ye kati na bakunda ya batata na ye. Bato nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi basalelaki Joziasi matanga. 25 Jeremi asalaki nzembo ya mawa mpo na Joziasi. Bayembi nyonso ya mibali mpe ya basi bayembelaki Joziasi banzembo ya mawa kino na mokolo ya lelo mpe bakomisaki likambo yango mobeko kati na Isalaele. Banzembo yango ekomama kati na buku ya banzembo ya mawa.
26 Makambo mpe misala mosusu ya Joziasi, elongo na misala ya botosi na ye kati na makambo ya Yawe, kolanda oyo ekomama kati na Mobeko ya Yawe, 27 misala na ye, kobanda na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele mpe ya Yuda.