5
Bamemi Sanduku na Tempelo
Tango Salomo asilisaki misala nyonso ya kotonga Tempelo ya Yawe, amemaki biloko oyo Davidi, tata na ye, abulisaki : palata, wolo mpe bisalelo nyonso ; atiaki yango kati na bibombelo bomengo ya Tempelo ya Nzambe.
(1Ba 8.1-21)
Bongo Salomo abengisaki, na Yelusalemi, bakambi nyonso ya Isalaele, bakambi nyonso ya bituka mpe ya mabota nyonso ya bato ya Isalaele, mpo na komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe wuta na Siona, engumba ya Davidi. Bato nyonso ya Isalaele basanganaki pene ya mokonzi na tango ya feti ya Bandako ya kapo, na sanza ya sambo. Tango bakambi nyonso ya Isalaele bakomaki, Balevi batombolaki Sanduku.
Banganga-Nzambe mpe Balevi bamemaki Sanduku yango, Ndako ya kapo ya Bokutani mpe bisalelo nyonso ya bule oyo ezalaki kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. Mokonzi Salomo mpe lisanga mobimba ya Isalaele oyo esanganaki epai na ye liboso ya Sanduku babonzaki lokola mbeka bameme mpe bangombe oyo balongaki kotanga te mpo na koyeba motango na yango, pamba te ezalaki ebele penza. Banganga-Nzambe batiaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe na esika na yango, kati na Tempelo, kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule, na se ya mapapu ya basheribe. Mapapu ya basheribe ezalaki ya kofungwama na likolo ya esika oyo Sanduku ezalaki, bongo ezipaki Sanduku mpe banzete ya komemela yango. Mpo ete banzete yango elekaki milayi, basonge na yango ezalaki komonana wuta na likolo ya Sanduku, na liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule ; kasi ezalaki komonana te wuta na libanda. Sanduku etikala wana kino na mokolo ya lelo. 10 Kati na Sanduku, ezalaki na eloko mosusu te longola kaka bitando mibale ya mabanga oyo Moyize atiaki na Orebi epai wapi Yawe asalaki boyokani elongo na bana ya Isalaele tango babimaki na Ejipito. 11 Tango Banganga-Nzambe bazalaki kobima libanda ya Esika ya bule, pamba te bango nyonso bamibulisaki mpe batalaki kokitana ya masanga na bango te, 12 Balevi oyo nyonso bazalaki kobeta mindule : Azafi, Emani, Yedutuni elongo na bana na bango ya mibali mpe bandeko na bango ; bazalaki kotelema na ngambo ya este ya etumbelo, balata bilamba ya lino ya kitoko, mpe bazalaki kobeta manzanza, mandanda mpe banzenze. Bazalaki elongo na Banganga-Nzambe nkama moko na tuku mibale oyo bazalaki kobeta bakelelo. 13 Babeti nyonso ya bakelelo mpe bayembi bazalaki kosangana lokola moto moko mpo na kotombola mongongo moko, mpo na kokumisa mpe kosanzola Yawe. Bazalaki kotombola mingongo na bango mpo na kokumisa mpe koyembela Yawe na bakelelo, na manzanza mpe na bibetelo mosusu ya mindule :
Yawe azali malamu,
bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !
Na tango wana kaka, Tempelo ya Yawe etondisamaki na lipata. 14 Mpe mpo na lipata, Banganga-Nzambe bakokaki lisusu te kotelema kati na yango mpo na kosala mosala na bango, pamba te nkembo na Yawe etondisaki Tempelo ya Nzambe.