22
Nzambe akokomisa nyonso ya sika
Bongo anjelu alakisaki ngai ebale ya mayi ya bomoi ; ezalaki kongenga lokola talatala mpe ezalaki kobima wuta na Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe ya Mpate. Ezalaki kotiola na kati-kati ya balabala monene ya engumba. Na esika oyo ebale ekabwanaki na biteni mibale, ezalaki na nzete ya bomoi oyo ebotaka bambuma mbala zomi na mibale na mobu, elingi koloba ete ebotaka bambuma sanza na sanza ; mpe makasa na yango ebikisaka bikolo.
Elakeli mabe ekozala lisusu te. Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe ya Mpate ekozala kati na engumba, mpe bawumbu na Ye bakosalela Ye. Bakomona elongi na Ye, mpe Kombo na Ye ekokomama na bambunzu na bango. Butu ekozala lisusu te. Bakozala na posa te ya pole ya mwinda to ya moyi, pamba te Nkolo Nzambe akongengisa bango na pole na Ye. Mpe bakokonza seko na seko.
Anjelu alobaki na ngai : « Maloba oyo ezali ya solo mpe ebongi na kotiela yango motema. Nkolo, Nzambe ya milimo ya basakoli, atindaki anjelu na Ye mpo na kolakisa na basali na Ye makambo oyo esengeli kosalema kala mingi te. »
Yesu azali koya
Yoka ! Nazali koya kala mingi te. Esengo na moto oyo abatelaka maloba ya masakoli oyo ekomama kati na buku oyo.
 
Ngai Yoane, nayokaki mpe namonaki makambo oyo. Mpe tango nayokaki mpe namonaki yango, nafukamaki na makolo ya anjelu oyo alakisaki ngai yango mpo na kogumbamela ye. Kasi anjelu alobaki na ngai : « Kosala bongo te ! Nazali moninga na yo ya mosala, ya bandeko na yo, basakoli ; mpe ya ba-oyo nyonso babatelaka maloba ya buku oyo. Gumbamela nde Nzambe ! »
10 Bongo alobaki na ngai lisusu : « Kobomba te maloba ya masakoli ya buku oyo, pamba te tango ekomi pene. 11 Tika ete moto oyo asalaka mabe akoba kosala mabe, tika ete moto oyo azali mbindo akoba kozala mbindo, tika ete moto oyo azali sembo akoba kozala sembo, mpe tika ete moto azali bule akoba kozala bule ! »
 
 
12  Yoka ! Nazali koya kala mingi te ! Nakomema elongo na Ngai lifuti mpo na moto na moto kolanda misala na ye. 13  Nazali Alifa mpe Omega, Moto ya liboso mpe Moto ya suka, Ebandeli mpe Suka.
 
14  Esengo na bato oyo basukolaka bilamba na bango mpo na kozwa ndingisa ya kolia bambuma ya nzete ya bomoi mpe ya koleka na bikuke mpo na kokota na engumba. 15  Kasi bambwa, bato ya maji, bandumba, babomi, basambeli bikeko mpe bato nyonso oyo balingaka mpe basalelaka lokuta, bakozala na libanda ya engumba.
 
16  Ngai Yesu, natindaki anjelu na Ngai mpo na kotatola bosolo ya makambo oyo kati na Mangomba. Nazali Mosisa mpe mokitani ya Davidi ; Monzoto ya tongo, oyo engengaka.
 
17 Molimo mpe Mwasi mobandami ya libala balobi :
— Yaka ! Tika ete ye oyo azali koyoka maloba oyo aloba : « Yaka ! » Tika ete ye oyo azali na posa ya mayi aya ; mpe tika ete ye oyo alingi kozwa mayi ya bomoi azwa yango na ofele.
 
18 Ngai Yoane, nazali koyebisa moto nyonso oyo azali koyoka maloba ya masakoli ya buku oyo : soki moto abakisi ata likambo moko na likolo ya makambo oyo, Nzambe akobakisela ye bitumbu oyo ekomami kati na buku oyo ; 19 mpe soki moto alongoli ata likambo moko na maloba ya masakoli ya buku oyo, Nzambe mpe akolongola ye ndingisa ya kolia bambuma ya nzete ya bomoi mpe ya kokota kati na Engumba ya Bule, oyo etalisami kati na buku oyo.
 
20 Motatoli ya makambo oyo alobi :
— Iyo, nazali koya kala mingi te.
Amen : Nkolo Yesu, yaka !
 
21 Tika ete ngolu ya Nkolo Yesu ezala na bino nyonso !