5
Buku mpe Mpate
Bongo namonaki, na loboko ya mobali ya Ye oyo avandaki na Kiti ya Bokonzi, buku moko elingama, bakoma yango na kati mpe na libanda, mpe bakanga yango na bikangelo sambo. Namonaki mpe anjelu moko ya nguya kosakola na mongongo makasi : « Nani abongi mpo na kobuka bikangelo ya buku mpe kofungola yango ? »
Kasi ezala kati na Lola to na mokili to na se ya mabele, moko te akokaki kofungola buku to kotala kati na yango.
Tango namonaki bongo, nalelaki mingi mpo ete moko te amonanaki ete abongi mpo na kofungola buku to kotala kati na yango. Bongo moko kati na bampaka alobaki na ngai : « Kolela te ! Tala ! Nkosi ya libota ya Yuda, Mokitani ya Davidi, alongaki mpo na kobuka bikangelo sambo mpe kofungola buku yango. »
Mpe namonaki Mpate moko ya kotelema na kati-kati ya Kiti ya Bokonzi, mpe bazingela na bikelamu minei ya bomoi elongo na bampaka. Mpate yango amonanaki lokola nde basilaki koboma Ye ; azalaki na maseke sambo mpe miso sambo oyo ezali milimo sambo ya Nzambe, oyo etindama na mokili mobimba.
Mpate apusanaki mpo na kozwa buku wuta na loboko ya ngambo ya mobali ya Ye oyo avandaki na Kiti ya Bokonzi. Tango kaka azwaki buku, bikelamu minei ya bomoi mpe bampaka tuku mibale na minei bagumbamaki liboso ya Mpate. Moko na moko kati na bango asimbaki na loboko na ye lindanda mpe kopo ya wolo etonda na ansa oyo ezali mabondeli ya basantu. Mpe bayembaki nzembo ya sika :
« Obongi na kozwa buku
mpe kobuka bikangelo na yango,
pamba te babomaki Yo ;
bongo na nzela ya makila na Yo,
osikolaki, mpo na Nzambe, bato ya bikolo nyonso,
ya nkota nyonso, ya mikili nyonso
mpe ya mabota nyonso.
10 Okomisaki bango ekolo ya bakonzi
mpe ya Banganga-Nzambe mpo Nzambe na biso,
mpe bakokonza mokili. »
11 Bongo natalaki mpe nayokaki mongongo ya ba-anjelu ebele, oyo motango na bango ezalaki bankoto na bankoto ; bazingelaki Kiti ya Bokonzi, bikelamu ya bomoi mpe bampaka, 12 mpe bazalaki koloba na mongongo makasi :
« Mpate oyo babomaki abongi na kozwa
nguya, bomengo, bwanya mpe makasi,
lokumu, nkembo mpe masanzoli. »
13 Bongo nayokaki bikelamu nyonso oyo ezalaka kati na Lola, na mabele, na se ya mabele mpe na likolo ya ebale monene ; bango nyonso bazalaki koloba :
« Tika ete masanzoli mpe lokumu,
nkembo mpe nguya
ezonga epai ya Mpate mpe epai na Ye
oyo avandi na Kiti ya Bokonzi
mpo na libela na libela ! »
14 Bikelamu minei ya bomoi bazalaki kozongisa : « Amen. » Mpe bampaka bafukamaki mpe bagumbamelaki.