2
Bana mibali ya Isalaele
(Ebl 35.23-26)
Tala bana mibali ya Isalaele :
Ribeni, Simeoni, Levi, Yuda, Isakari, Zabuloni, Dani, Jozefi, Benjame, Nefitali, Gadi mpe Aseri.
Libota ya Yuda
(Ebl 38; 46.12)
Bana mibali ya Yuda :
Eri, Onani mpe Shela.
Ezali Mwana mwasi ya Shuwa, moto ya Kanana, nde abotelaki Yuda bana mibali misato wana. Eri, mwana mobali ya liboso ya Yuda, atambolaki mabe na miso ya Yawe, mpe Yawe abomaki ye.
Tamari, bokilo ya Yuda, abotelaki ye Peretsi mpe Zera.
Bana mibali nyonso ya Yuda bazalaki mitano.
 
Bana mibali ya Peretsi :
Etsironi mpe Amuli.
(1Ba 5.11)
Bana mibali ya Zera :
Zimiri, Etani, Emani, Kalikoli mpe Darida ;
bango nyonso bazalaki mitano.
(Joz 7)
Mwana mobali ya Karimi :
Akari oyo ayeisaki mobulu na Isalaele tango abukaki mobeko ya kozwa biloko oyo babulisaki mpo na Yawe.
Mwana mobali ya Etani :
Azaria.
Bana mibali oyo babotelaki Etsironi :
Yerameeli, Rami mpe Kelubayi.
(Mit 1.7; Rit 4.19-22)
10 Rami azalaki tata ya Aminadabi ;
mpe Aminadabi azalaki tata
ya Nashoni, mokambi ya bato ya Yuda.
11 Nashoni azalaki tata ya Salima ;
Salima azalaki tata ya Boazi.
12 Boazi azalaki tata ya Obedi ;
mpe Obedi azalaki tata ya Izayi.
 
13 Izayi azalaki tata
ya Eliabi, mwana na ye ya liboso ya mobali ; ya mibale, Abinadabi ;
ya misato, Shimea ; 14 ya minei, Netaneeli ;
ya mitano, Radayi ; 15 ya motoba, Otsemi ;
mpe ya sambo, Davidi.
16 Bandeko na bango ya basi : Tseruya mpe Abigayili.
Tseruya abotaki bana mibali misato :
Abishayi, Joabi mpe Asaeli.
17 Abigayili abotaki mwana moko ya mobali, mpe kombo na ye ezalaki « Amasa. » Yeteri, moto ya Isimaeli, nde azalaki tata ya Amasa.
 
18 Azuba abotelaki Kalebi, mwana mobali ya Etsironi,
mwana moko ya mwasi, mpe kombo na ye ezalaki « Yerioti ; »
mpe bana mibali misato : Yesheri, Shobabi mpe Aridoni.
19 Tango Azuba akufaki, Kalebi abalaki Efrata oyo abotelaki ye Wuri.
20 Wuri azalaki tata ya Uri,
mpe Uri azalaki tata ya Betisaleyeli.
 
21 Mpe na sima, Etsironi asangisaki nzoto na mwana mwasi ya Makiri, tata ya bato ya Galadi. Abalaki ye tango azalaki na mibu tuku motoba ; mpe mwana mwasi ya Makiri abotelaki ye Segubi.
22 Segubi azalaki tata ya Yairi oyo azalaki kokonza bingumba tuku mibale na misato kati na mokili ya Galadi.
23 Kasi bato ya Geshuri mpe ya Siri babotolaki na makasi bamboka oyo Yairi azalaki kokonza ; babotolaki mpe Kenati elongo na bamboka na yango ya mike : bingumba nyonso oyo babotolaki ezalaki tuku motoba.
Bango nyonso wana bazalaki bakitani ya Makiri, tata ya bato ya Galadi.
24 Sima na kufa ya Etsironi na mboka Kalebi Efrata, mwasi na ye, Abiya, abotaki mwana mobali, mpe kombo na ye « Ashiwuri. » Ashiwuri azalaki tata ya Tekoa.
25 Bana mibali ya Yerameeli, mwana liboso ya Etsironi, bazalaki :
Rami, mwana na ye ya liboso ya mobali, Buna, Oreni, Otsemi mpe Ayiya. 26 Yerameeli abalaki mwasi mosusu oyo kombo na ye ezalaki « Atara. » Atara abotelaki ye Onami.
27 Bana mibali ya Rami, mwana mobali ya liboso ya Yerameeli :
Matsi, Yamini mpe Ekere.
28 Bana mibali ya Onami :
Shamayi mpe Yada.
Bana mibali ya Shamayi :
Nadabi mpe Abishuri. 29 Kombo ya mwasi ya Abishuri ezalaki « Abiyaili. » Abiyaili abotelaki ye Abani mpe Molidi.
30 Bana mibali ya Nadabi :
Seledi mpe Apayimi.
Seledi atikalaki kobota te mpe akufaki.
31 Mwana mobali ya Apayimi :
Yisheyi oyo azalaki tata ya Sheshani. Sheshani azalaki tata ya Akilayi.
32 Bana mibali ya Yada, ndeko mobali ya Shamayi :
Yeteri mpe Jonatan.
Yeteri atikalaki kobota te mpe akufaki.
33 Bana mibali ya Jonatan :
Peleti mpe Zaza.
Bango wana nde bazalaki bakitani ya Yerameeli.
 
34 Sheshani atikalaki kobota bana mibali te, kaka bana basi. Kasi azalaki na mowumbu moko ya mobali na kombo Yara, moto ya Ejipito. 35 Sheshani abalisaki mwana na ye ya mwasi epai ya Yara, mowumbu na ye ya mobali, mpe mwana yango ya mwasi abotelaki Yara mwana mobali, Atayi.
36 Atayi azalaki tata ya Natan,
Natan azalaki tata ya Zabadi.
37 Zabadi azalaki tata ya Efilali,
Efilali azalaki tata ya Obedi.
38 Obedi azalaki tata ya Jewu,
Jewu azalaki tata ya Azaria.
39 Azaria azalaki tata ya Eletsi,
Eletsi azalaki tata ya Eleasa.
40 Eleasa azalaki tata ya Sisimayi,
Sisimayi azalaki tata ya Shalumi.
41 Shalumi azalaki tata ya Yekamia,
mpe Yekamia azalaki tata ya Elishama.
 
42 Bana mibali ya Kalebi, ndeko ya Yerameeli :
Mesha, mwana na ye ya liboso oyo azalaki tata ya Zifi,
mpe Maresha, tata ya Ebron.
43 Bana mibali ya Ebron :
Kora, Tapua, Rekemi mpe Shema.
44 Shema azalaki tata ya Raami,
mpe Raami azalaki tata ya Yorikeami.
Rekemi azalaki tata ya Shamayi.
45 Mwana mobali ya Shamayi ezalaki Maoni,
Maoni azalaki tata ya Beti-Tsuri.
46 Efa, makangu ya Kalebi, abotelaki ye
Arani, Motsa mpe Gazezi.
Arani azalaki tata ya Gazezi.
47 Bana mibali ya Yadayi :
Regwemi, Yotami, Geshani, Peleti, Efa mpe Shaafi.
48 Maaka, makangu mosusu ya Kalebi, abotelaki ye
Sheberi mpe Tirana.
49 Abotelaki ye lisusu
Shaafi, tata ya Madimana,
mpe Sheva, tata ya Makibena mpe Gibea.
Kalebi azalaki na mwana moko ya mwasi, Akisa.
50 Bango wana nde bazalaki bakitani ya Kalebi.
 
Bana mibali ya Wuri, mwana ya liboso oyo abotaki na Efrata, mwasi na ye :
Shobali, tata ya Kiriati-Yearimi ; 51 Salima, tata ya Beteleemi ; mpe Arefi, tata ya Beti-Gaderi.
52 Bakitani ya Shobali, tata ya Kiriati-Yearimi :
Aruwe mpe Atsi-Amenuoti. 53 Mabota ya Kiriati-Yearimi : bato ya Yeteri, ya Puti, ya Shumati mpe ya Mishirayi. Bato ya Tsorea mpe ya Eshitaoli babimelaki na mabota oyo.
54 Bakitani ya Salima :
Bato ya Beteleemi, ya Netofa, ya Aroti-Beti-Joabi, ya Atsi-Amanati mpe ya Tsorea, 55 elongo na mabota ya bato ya mayele oyo bazalaki kovanda na Yaebetsi : bato ya Tirea, ya Shimea mpe ya Sukoti. Bango wana nde bato ya Keni oyo babimeli na Amati, tata ya libota ya Rekabi.