3
Bana mibali ya Davidi
(2Sa 3.2-5)
Tala bana mibali ya Davidi oyo babotamaki na Ebron :
 
Mwana ya liboso ezalaki Aminoni, mwana mobali ya Ayinoami, moto ya Jizireyeli ;
ya mibale, Daniele, mwana mobali ya Abigayili, moto ya Karimeli ;
ya misato, Abisalomi, mwana mobali ya Maaka, mwana mwasi ya Talimayi, mokonzi ya Geshuri ;
ya minei, Adoniya, mwana mobali ya Agite ;
ya mitano, Shefatia, mwana mobali ya Abitali ;
mpe ya motoba, Yitileami oyo Egila, mwasi na ye, abotaki.
 
Bango nyonso motoba bazalaki bana mibali ya Davidi oyo babotamaki na Ebron, mboka mokonzi, epai wapi akonzaki mibu sambo na ndambo.
 
 
Davidi akonzaki wuta na Yelusalemi mibu tuku misato na misato.
(2Sa 5.14-16; 1Ma 14.4-7)
Tala bakombo ya bana na ye ya mibali oyo babotamaki na Yelusalemi :
 
Shimea, Shobabi, Natan mpe Salomo. Ezali Batisheba, mwana mwasi ya Amieli, nde abotaki bana mibali minei oyo.
Babotelaki ye lisusu bana oyo : Yibari, Elishama, Elifeleti, Noga, Nefegi, Yafia, Elishama, Eliyada mpe Elifeleti.
Bango nyonso bazalaki libwa.
 
Bango nyonso nde bazalaki bana mibali ya Davidi, longola bana mibali oyo bamakangu na ye babotelaki ye. Mpe Tamari azalaki ndeko na bango ya mwasi.
 
10 Salomo azalaki tata ya Roboami,
Roboami azalaki tata ya Abiya,
Abiya azalaki tata ya Asa,
Asa azalaki tata ya Jozafati,
11 Jozafati azalaki tata ya Yorami,
Yorami azalaki tata ya Akazia,
Akazia azalaki tata ya Joasi,
12 Joasi azalaki tata ya Amatsia,
Amatsia azalaki tata ya Azaria,
Azaria azalaki tata ya Yotami,
13 Yotami azalaki tata ya Akazi,
Akazi azalaki tata ya Ezekiasi,
Ezekiasi azalaki tata ya Manase,
14 Manase azalaki tata ya Amoni,
Amoni azalaki tata ya Joziasi,
15 Joziasi azalaki tata ya bana mibali oyo :
Yoanani, mwana na ye ya liboso ;
Yeoyakimi, ya mibale ;
Sedesiasi, ya misato ;
Shalumi, ya minei.
16 Bana mibali ya Yeoyakimi :
Yekonia mpe Sedesiasi.
Bakonzi oyo bakonzaki sima na bowumbu
17 Libota ya Yekonia, mokangami :
Shealitieli, mwana na ye ya mobali ; 18 Malikirami, Pedaya, Shenatsari, Yekamia, Oshama mpe Nedabia.
19 Bana mibali ya Pedaya :
Zorobabeli mpe Shimei.
Bana mibali ya Zorobabeli :
Meshulami mpe Anania. Shelomiti azalaki ndeko na bango ya mwasi.
20 Bana mibali ya Meshulami :
Ashuba, Oeli, Berekia, Asadia, Yoshabi-Esedi.
Bango nyonso bazalaki mitano.
21 Bakitani ya Anania :
Pelatia mpe Ezayi elongo na bana mibali ya Refaya, ya Arinani, ya Abidiasi mpe ya Shekania.
22 Libota ya Shekania :
Shemaya elongo na bana na ye ya mibali : Atushi, Yigali, Baria, Nearia mpe Shafati.
Bango nyonso bazalaki motoba.
23 Bana mibali ya Nearia :
Eliowenayi, Ezekiasi mpe Azirikami.
Bango nyonso bazalaki misato.
24 Bana mibali ya Eliowenayi :
Odavia, Eliashibi, Pelaya, Akubi, Yoanani, Delaya mpe Anani.
Bango nyonso bazalaki sambo.