13
Davidi amemi Sanduku na ndako ya Obedi-Edomi
(2Sa 6.1-11)
Davidi asangisaki bakonzi ya basoda, bakonzi ya bankoto mpe bakonzi ya bankama elongo na bato mosusu ya lokumu. Davidi alobaki na lisanga mobimba ya Isalaele : « Soki bomoni yango malamu mpe soki yango ezali mokano na Yawe, Nzambe na biso, tika ete totinda sango epai ya bandeko na biso oyo batikali na bituka nyonso ya Isalaele mpe epai ya Banganga-Nzambe elongo na Balevi, kati na bingumba oyo bango bazali kovanda mpo ete baya kosangana na biso. Tozongisa Sanduku ya Nzambe na biso epai na biso, pamba te tolandelaki yango te tango Saulo azalaki mokonzi. »
Lisanga mobimba endimaki ete basala bongo, pamba te likambo yango emonanaki malamu na miso ya bato nyonso. Davidi asangisaki bana nyonso ya Isalaele longwa na moluka ya Ejipito kino na Lebo-Amati, mpo na kozongisa Sanduku ya Nzambe wuta na Kiriati-Yearimi.
Davidi elongo na basoda nyonso ya Isalaele bakendeki na Baala, na Kiriati-Yearimi oyo ezali kati na Yuda, mpo na kolongola kuna Sanduku ya Nzambe, oyo, liboso na yango, bazalaki kobelela Kombo ya Yawe oyo avandaka kati na basheribe. Batiaki Sanduku ya Nzambe na likolo ya shario ya sika mpe bamemaki yango wuta na ndako ya Abinadabi. Uza mpe Ayiyo nde bazalaki kotambolisa shario yango. Davidi mpe bato nyonso ya Isalaele bazalaki kosepela makasi na liboso ya Nzambe, na koyemba mpe na kobeta mandanda, banzenze, bambunda ya mike-mike, manzanza mpe bakelelo. Tango bakomaki na etando ya Kidoni, Uza asembolaki loboko na ye mpo na kosimba Sanduku ya Nzambe, pamba te bangombe eselumukaki mpe elingaki kokweyisa Sanduku ya Nzambe. 10 Yawe asilikelaki Uza makasi mpe abetaki ye mpo ete asembolaki loboko na ye mpe asimbaki Sanduku ya Nzambe. Boye, Uza akufaki kaka wana liboso ya Nzambe.
11 Davidi asilikaki makasi mpo ete Yawe afungolaki lidusu na kobeta Uza ; yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango « Peretsi-Uza* Peretsi-Uza elingi koloba : lidusu ya Uza.. » 12 Na mokolo wana, Davidi abangaki Nzambe mpe amitunaki : « Ndenge nini namema Sanduku ya Nzambe epai na ngai ? »
13 Boye, Davidi amemaki te Sanduku ya Nzambe epai na ye, kati na engumba ya Davidi ; kasi atiaki yango na ndako ya Obedi-Edomi, moto ya Gati. 14 Sanduku ya Nzambe evandaki sanza misato kati na ndako ya Obedi-Edomi, mpe Yawe apambolaki libota ya Obedi-Edomi mpe biloko na ye nyonso.

*13:11 Peretsi-Uza elingi koloba : lidusu ya Uza.