14
Davidi na Yelusalemi
(2Sa 5.11-16; 1Ma 3.5-8)
Irami, mokonzi ya Tiri, atindaki bantoma epai ya Davidi mpo ete bamemela ye mabaya ya sedele, bato oyo bapasolaka mabanga mpe basharipantie ; mpe batongelaki ye ndako. Davidi asosolaki ete Yawe nde akomisaki ye mokonzi ya Isalaele mpe ete azalaki kotombola bokonzi na ye makasi mpo na Isalaele, bato na Ye.
Davidi abalaki lisusu basi ebele kati na Yelusalemi mpe abotaki lisusu bana ebele ya mibali mpe ya basi. Tala bakombo ya bana na ye ya mibali oyo babotamaki na Yelusalemi : Shamuwa, Shobabi, Natan, Salomo, Yibari, Elishuwa, Elipeleti, Noga, Nefegi, Yafia, Elishama, Beliada mpe Elifeleti.
Davidi alongi bato ya Filisitia
(2Sa 5.17-25)
Tango bato ya Filisitia bayokaki sango ete bapakoli Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele mobimba, bango nyonso bakendeki koluka ye. Kasi tango Davidi ayokaki sango ya mabongisi na bango, abimaki mpo na kokutana na bango. Bato ya Filisitia bakomaki mpe bapanzanaki na lubwaku ya bakitani ya Rafa. 10 Davidi atunaki Nzambe :
— Nakoki solo kokende kobundisa bato ya Filisitia ? Okokaba bango solo na maboko na ngai ?
Yawe azongiselaki ye :
— Kende, pamba te nakokaba bango na maboko na yo.
11 Bato ya Filisitia bamataki na Bali-Peratsimi, mpe Davidi alongaki bango kuna. Bongo Davidi alobaki : « Na nzela ya loboko na ngai, Nzambe afungoleli ngai nzela kati na banguna na ngai, ndenge mayi epasolaka nzela. »
Yango wana babengaki esika yango Bala-Peratsimi* Bali-Peratsimi elingi koloba : Nkolo ya banzela.. 12 Bato ya Filisitia basundolaki kuna banzambe na bango, mpe Davidi apesaki mitindo ete batumba yango na moto.
13 Sima na mwa tango, bato ya Filisitia bayaki mpe bapanzanaki lisusu kati na lubwaku. 14 Bongo Davidi atunaki lisusu Nzambe, mpe Nzambe azongiselaki ye : « Tango okobundisa bango, kolanda bango na sima te ; kasi tambola mopanzi, mosika na bango. Bongo tango okokoma epai bango bazali, bimela bango na liboso, liboso ya zamba ya banzete ya mirie Mirie ezali lolenge moko ya nzete oyo mbuma na yango ezalaka mwindo mpe esungaka mpo na kokawusa pota.. 15 Tango okoyoka lokito ya makolo ya bato na likolo ya banzete ya mirie, na tango wana nde okobima mbala moko mpo na kobunda ; pamba te ekolakisa ete Nzambe abimi liboso na yo mpo na kobeta mampinga ya bato ya Filisitia. »
16 Davidi asalaki ndenge Nzambe atindaki ye mpe abomaki bato ya Filisitia, longwa na Gabaoni kino na Gezeri. 17 Kombo ya Davidi ekendeki sango na mokili mobimba mpe Yawe asalaki ete bikolo nyonso ebanga Davidi.

*14:11 Bali-Peratsimi elingi koloba : Nkolo ya banzela.

14:14 Mirie ezali lolenge moko ya nzete oyo mbuma na yango ezalaka mwindo mpe esungaka mpo na kokawusa pota.