26
Masanga ya bakengeli bikuke
Tala masanga ya bakengeli bikuke :
 
Mpo na bato ya Kore :
Meshelemia, mwana mobali ya Kore, moko kati na bana mibali ya Azafi.
Meshelemia azalaki na bana mibali oyo :
mwana ya liboso, Zakari ;
mwana ya mibale, Yediayeli ;
mwana ya misato, Zebadia ;
mwana ya minei, Yatinieli ;
mwana ya mitano, Elami ;
mwana ya motoba, Yoanani ;
mpe mwana ya sambo, Eliowenayi.
Obedi-Edomi mpe azalaki na bana mibali oyo :
mwana ya liboso, Shemaya ;
mwana ya mibale, Yozabadi ;
mwana ya misato, Yoa ;
mwana ya minei, Sakari ;
mwana ya mitano, Netaneeli ;
mwana ya motoba, Amieli ;
mwana ya sambo, Isakari ;
mwana ya mwambe, Pewulitayi ;
pamba te Nzambe apambolaki Obedi-Edomi.
Mwana na ye ya mobali Shemaya azalaki mpe na bana mibali oyo bazalaki bakambi ya libota ya tata na bango, pamba te bazalaki bilombe mibali. Bana mibali ya Shemaya :
Otini, Refaeli, Obedi, Elizabadi ;
mpe bandeko na ye ya mibali oyo bazalaki bilombe, Eliwu mpe Samakia.
Bango nyonso bazalaki bakitani ya Obedi-Edomi. Bango, bana na bango mpe bandeko na bango ya mibali bazalaki bilombe mpe bato ya mpiko mpo na mosala. Bakitani nyonso ya Obedi-Edomi bazalaki tuku motoba na mibale.
Meshelemia azalaki na bana mibali mpe bandeko mibali oyo bazalaki bilombe : bango nyonso bazalaki zomi na mwambe.
 
10 Osa, moko kati na bana mibali ya Merari, azalaki na bana mibali oyo :
Shimiri oyo tata na ye atiaki ye mokonzi atako azalaki mwana ya liboso te ;
11 Ilikia, mwana ya mibale ;
Tebalia, mwana ya misato ;
mpe Zakari, mwana ya minei.
Bana mibali mpe bandeko mibali ya Osa bazalaki bango nyonso zomi na misato.
 
12 Masanga ya bakengeli bikuke ezalaki na mokumba ya kokengela bikuke ya Tempelo ya Yawe, na bokambami ya bakonzi na bango ndenge bandeko na bango bazalaki mpe kosala. 13 Boye kobanda na leki kino na kulutu, bazalaki kobeta zeke mpo na ekuke moko na moko, kolanda mabota na bango.
14 Mpo na ekuke ya ngambo ya este, zeke ekweyaki epai ya libota ya Shelemia.
Bongo babetaki zeke mpo na mwana na ye ya mobali Zakari oyo azalaki mopesi toli ya bwanya, mpe zeke mpo na ekuke ya ngambo ya Nor ekweyaki likolo na ye.
15 Mpo na ekuke ya ngambo ya sude, zeke ekweyaki epai ya Obedi-Edomi ; mpe mpo na ndako oyo babombelaka biloko, zeke ekweyaki epai ya bana na ye ya mibali.
16 Mpo na ekuke ya ngambo ya weste mpe ekuke ya Shaleketi, na nzela oyo emata na likolo, zeke ekweyaki epai ya Shupimi mpe Osa.
 
Tala ndenge bakabolaki masanga ya bakengeli bikuke :
17 mokolo na mokolo, ezalaki na Balevi motoba na ngambo ya este,
Balevi minei na ngambo ya nor,
mpe Balevi minei na ngambo ya sude ;
mpe masanga mibale oyo moko na moko ezalaki na bato mibale, na ndako oyo babombelaka biloko.
18 Mpo na lopango ya weste, ezalaki na bakengeli minei na nzela ; mpe mibale kati na lopango.
 
19 Oyo nde ezalaki masanga ya bakengeli bikuke oyo baponamaki kati na libota ya Kore mpe ya Merari.
Misala mosusu ya Balevi
20 Balevi mosusu lokola Ayiya, bazalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya Tempelo mpe biloko ya bule.
21 Tala bakitani ya Laedani, oyo bazalaki bato ya etuka ya Gerishoni mpe bakambi, moto na moto ya libota na ye : bato ya Yeyeli ; 22 mpe bana mibali ya Yeyeli : Zetami mpe ndeko na ye ya mobali Joeli. Bazalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya Tempelo ya Yawe.
 
23 Mpo na bakitani ya Amirami, ya Yitseari, ya Ebron mpe ya Uzieli :
 
24 Shebueli, mokitani ya Gerishomi, mwana mobali ya Moyize, azalaki mokonzi ya babateli bozwi ya Tempelo. 25 Tala bandeko na ye ya mibali oyo babotamaki na nzela ya Eliezeri : Reabia, Ezayi, Yorami, Zikiri mpe Shelomiti.
26 Shelomiti elongo na bandeko na ye ya mibali bazalaki na mokumba ya kobatela biloko nyonso oyo mokonzi Davidi abulisaki mpo na Yawe ; bakambi ya mabota, bakambi ya bankoto, bakambi ya bankama mpe bakonzi mosusu ya mampinga. 27 Babulisaki biloko mosusu oyo bazwaki na bitumba mpo na kobongisa Tempelo ya Yawe. 28 Shelomiti mpe bandeko na ye ya mibali bazalaki na mokumba ya kobatela biloko nyonso oyo Samuele, momoni makambo ; Saulo, mwana mobali ya Kishi ; Abineri, mwana mobali ya Neri ; Joabi oyo kombo ya mama na ye ezalaki « Tseruya, » babulisaki mpo na Yawe.
29 Mpo na bakitani ya Yitseari :
Kenania mpe bana na ye ya mibali oyo bazalaki bakomi mikanda mpe basambisi. Bazalaki na mokumba ya kotala makambo ya boyokani ya Isalaele na bikolo mosusu.
30 Mpo na bakitani ya Ebron :
Ashabia mpe bandeko na ye ya mibali, bilombe mibali nkoto moko na nkama sambo. Bazalaki kokamba Isalaele na ngambo ya weste ya Yordani ; mpe bazalaki na mokumba ya misala nyonso ya Yawe mpe ya mokonzi. 31 Mpo na bakitani ya Ebron : Yeriya azalaki mokonzi na bango, kolanda milongo ya mabota na bango.
Na mobu ya tuku minei ya bokonzi ya Davidi, batalaki malamu na buku ya mabota mpe bamonaki kati na engumba Yaezeri ya Galadi, bilombe mibali kati na bakitani ya Ebron. 32 Yeriya azalaki na bandeko mibali nkoto mibale na nkama sambo : bazalaki bilombe mibali mpe bakambi ya mabota. Mokonzi Davidi apesaki bango mokumba ya misala nyonso ya Nzambe mpe ya mokonzi kati na libota ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase.