27
Bakonzi ya mampinga ya Davidi
Tala bana ya Isalaele oyo bazalaki kosalela mokonzi : ezalaki na bakambi ya mabota, bakonzi ya bankoto mpe ya bankama ya basoda mpe bakomi mikanda. Mosala na bango ezalaki : kotala makambo oyo etali mabongisi ya mampinga. Sanza na sanza kati na mobu, lisanga moko ezalaki kokota na mosala mpe lisanga mosusu ezalaki kobima. Lisanga moko na moko ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
 
Mpo na sanza ya liboso : lisanga ya Yashobeami, mwana mobali ya Zabidieli ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei. Yashobeami azalaki mokitani ya Peretsi mpe azalaki mokonzi ya bakonzi nyonso ya mampinga mpo na sanza ya liboso.
Mpo na sanza ya mibale : lisanga ya Dodayi, moto ya libota ya Aoyi. Mikiloti azalaki mokambi ya lisanga ya Dodayi. Lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
Mpo na sanza ya misato : lisanga ya Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, mokonzi ya Banganga-Nzambe ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei. Benaya azalaki moko kati na basoda ya mpiko tuku misato mpe azalaki mokonzi na bango ; Amizadabi, mwana na ye ya mobali, azalaki moko kati na basoda ya lisanga yango.
Mpo na sanza ya minei : lisanga ya Asaeli, ndeko mobali ya Joabi. Zebadia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye ; lisanga yango ezalaki na bato nkoto tuku mibale na minei.
Mpo na sanza ya mitano : lisanga ya mokambi Shamewuti, moto ya libota ya Yizirayi ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
Mpo na sanza ya motoba : lisanga ya Ira, mwana mobali ya Ikeshi, moto ya libota ya Tekoa ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
10 Mpo na sanza ya sambo : lisanga ya Eletsi, moto ya libota ya Peloni, moko kati na bato ya libota ya Efrayimi ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
11 Mpo na sanza ya mwambe : lisanga ya Sibekayi, moto ya libota ya Usha, moko kati na bakitani ya Zera ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
12 Mpo na sanza ya libwa : lisanga ya Abiezeri, moto ya libota ya Anatoti, moko kati na bato ya libota ya Benjame ; lisanga yango ezalaki na bato nkoto tuku mibale na minei.
13 Mpo na sanza ya zomi : lisanga ya Maarayi, moto ya libota ya Netofa, moko kati na bakitani ya Zera ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
14 Mpo na sanza ya zomi na moko : lisanga ya Benaya, moto ya libota ya Piratoni, moko kati na bato ya libota ya Efrayimi ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
15 Mpo na sanza ya zomi na mibale : lisanga ya Elidayi, moto ya libota ya Netofa, moko kati na bakitani ya Otinieli ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
Bakonzi ya mabota ya Isalaele
16 Tala bakonzi ya mabota ya Isalaele :
 
Mpo na libota ya Ribeni :
Eliezeri, mwana mobali ya Zikiri ;
mpo na libota ya Simeoni :
Shefatia, mwana mobali ya Maaka ;
17 mpo na libota ya Levi :
Ashabia, mwana mobali ya Kemweli ;
mpo na libota ya Aron :
Tsadoki ;
18 mpo na libota ya Yuda :
Eliwu, ndeko mobali ya Davidi ;
mpo na libota ya Isakari :
Omiri, mwana mobali ya Mikaeli ;
19 mpo na libota ya Zabuloni :
Yishimaeya, mwana mobali ya Abidiasi ;
mpo na libota ya Nefitali :
Yerimoti, mwana mobali ya Azirieli ;
20 mpo na libota ya Efrayimi :
Oze, mwana mobali ya Azazia ;
mpo na ndambo ya libota ya Manase :
Joeli, mwana mobali ya Pedaya ;
21 mpo na ndambo ya libota ya Manase kati na Galadi :
Yido, mwana mobali ya Zakari ;
mpo na libota ya Benjame :
Yaasieli, mwana mobali ya Abineri ;
22 mpo na libota ya Dani :
Azareeli, mwana mobali ya Yeroami.
 
Bango wana nde bazalaki bakonzi ya mabota ya Isalaele.
 
23 Davidi atangaki te molongo ya mibali oyo bazalaki na se ya mibu tuku mibale ya mbotama, pamba te Yawe alakaki ete akokomisa Isalaele ebele lokola minzoto ya likolo. 24 Joabi, mwana mobali ya Tseruya, abandaki kotanga bango kasi asilisaki te. Pamba te likolo ya botangi wana, Yawe akitiselaki Isalaele kanda na Ye. Boye, motango ya bato yango ekomamaki te na buku ya masolo ya mokonzi Davidi.
Babateli bozwi ya mokonzi
25 Azimaveti, mwana mobali ya Adieli, azalaki kobatela bibombelo ya bozwi ya mokonzi.
Jonatan, mwana mobali ya Oziasi, azalaki mobateli ya bibombelo na bazamba, na bingumba, na bamboka mike mpe na bandako milayi.
26 Eziri, mwana mobali ya Kelubi, azalaki mokambi ya basali bilanga ;
27 Shimei, moto ya engumba Rama, azalaki mobateli bilanga ya vino ;
Zabidi, moto ya engumba Shefami, azalaki mobateli masanga ya vino mpe bilanga ya vino.
28 Bala-Anani, moto ya engumba Gederi, azalaki mobateli banzete ya olive mpe ya sikomori, na lubwaku ya ngambo ya weste ;
Yoashi azalaki mobateli mafuta ya olive ;
29 Shitrayi, moto ya engumba Saroni, azalaki mobateli bangombe oyo ezalaki kolia na Saroni ;
Shafati, mwana mobali ya Adilayi, azalaki mobateli bangombe na mabwaku.
30 Obili, moto ya libota ya Isimaeli, azalaki mobateli bashamo ;
Yedeya, moto ya libota ya Meronoti, azalaki mobateli ba-ane ya basi.
31 Yazizi, moto ya libota ya Agari, azalaki mobateli bibwele.
Bango nyonso bazalaki babateli bozwi ya mokonzi Davidi.
 
32 Jonatan, ndeko ya tata ya Davidi, azalaki mopesi toli, moto ya mayele mpe mokomi mikanda.
Yeyeli, mwana mobali ya Akimoni, azalaki kolandela bana mibali ya mokonzi.
33 Ayitofeli azalaki mopesi toli ya mokonzi ;
mpe Ushayi, moto ya Ariki, azalaki mobateli sekele ya mokonzi.
34 Yeoyada, mwana mobali ya Benaya, elongo na Abiatari, bakitanaki na Ayitofeli.
Joabi azalaki mokonzi ya mampinga ya mokonzi.