29
Makabo mpo na kotonga Tempelo ya Yawe
Mokonzi Davidi alobaki na lisanga mobimba :
— Salomo, mwana na ngai ya mobali, moko kaka oyo Nzambe aponi, azali nanu elenge mpe ayebi penza makambo malamu te. Nzokande, mosala ezali monene, pamba te Ndako oyo ezali mpo na moto te kasi mpo na Yawe Nzambe. Na bozwi na ngai nyonso, nabongisaki mpo na Ndako ya Nzambe na ngai : wolo mpo na misala ya wolo, palata mpo na misala ya palata, ebende mpo na misala ya bibende, mabaya mpo na misala ya mabaya, mabanga ya onikisi mpe mabanga ya kobamba, mabanga oyo engengaka mpe ya balangi ebele, mabanga ya talo ya lolenge nyonso mpe mabanga ya marbre. Biloko oyo nyonso ezalaki penza ebele. Mpe lisusu, na tina na bolingo na ngai mpo na Ndako ya Nzambe na ngai, napesi sik’oyo wuta na bozwi na ngai moko : wolo mpe palata mpo na Ndako ya Nzambe na ngai likolo ya nyonso oyo nabongisaki mpo na Ndako oyo ya bule : kilo nkoto nkama moko ya wolo ya peto ya Ofiri, kilo nkoto nkama mibale na tuku mitano ya palata ya peto mpo na kolatisa bamir ya Ndako. Wolo mpe palata yango ebongisami mpo na misala ya wolo mpe ya palata, mpe mpo na misala nyonso oyo bato ya misala ya maboko basengeli kosala. Sik’oyo, nani alingi kopesa na esengo mpe na motema moko epai na Yawe ?
Boye, bakambi ya mabota, bakonzi ya mabota ya Isalaele, bakonzi ya bankoto mpe ya bankama mpe bakambi ya misala ya mokonzi bapesaki makabo wuta na mitema na bango moko. Mbala moko, bapesaki mpo na mosala ya Ndako ya Nzambe : bakilo nkama tuku sambo ya wolo, biloko ya wolo nkoto zomi, bakilo koleka minkoko nkama misato ya palata, bakilo nkoto nkama motoba ya bronze, mpe bakilo koleka minkoko misato ya bibende. Bato nyonso oyo bazalaki na mabanga ya talo bapesaki yango na ebombelo ya bozwi ya Tempelo ya Yawe epai ya Yeyeli, moto ya libota ya Gerishoni. Bato basepelaki mingi na makabo oyo bango moko bapesaki wuta na mokano ya mitema na bango, pamba te bazalaki kopesa yango epai ya Yawe, na motema mobimba. Mokonzi Davidi mpe asepelaki na yango mingi.
Losambo ya Davidi
10 Davidi akumisaki Yawe liboso ya lisanga mobimba na maloba oyo :
« Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, tata na biso,
tika ete ozwa lokumu mpo na libela !
11 Oh Yawe, monene, nguya, kongenga,
nkembo mpe bokonzi ezali ya Yo ;
pamba te biloko nyonso oyo ezali na likolo mpe na se ezali ya Yo.
Yawe, bokonzi ezali ya Yo,
osalaka nyonso oyo olingi na ekelamu nyonso.
12 Bozwi mpe lokumu ewutaka epai na Yo ;
ozali na bokonzi likolo na nyonso,
makasi mpe nguya ezali na maboko na Yo
mpo na kotombola mpe kopesa makasi na moto nyonso.
13 Nzambe na biso, tozali sik’oyo kosanzola Yo
mpe kokumisa Kombo na Yo.
14 Nazali nani, mpe bato na ngai bazali banani,
mpo ete tozwa makoki ya kopesa makabo oyo,
wuta na mokano ya mitema na biso moko ?
Nyonso ewutaka epai na Yo,
mpe topesi Yo kaka oyo ewuti na loboko na Yo.
15 Liboso na Yo, tozali bapaya mpe baleki nzela,
ndenge ezalaki batata na biso.
Mikolo na biso awa na mokili ezali koleka
lokola elili oyo ezangi elikya.
16 Oh Yawe, Nzambe na biso,
bomengo nyonso oyo tobongisi mpo na kotonga Tempelo
mpo na lokumu ya Kombo na Yo ya Bule
ewuti na loboko na Yo mpe ezali ya Yo.
17 Oh Nzambe na ngai,
nayebi ete oyebi bozindo ya mitema na biso,
osepelaka na bosembo.
Napesi nyonso oyo wuta na mokano ya motema na ngai moko
mpe na makanisi ya lokuta te.
Sik’oyo, namoni ndenge nini bato na Yo, oyo bazali awa,
bapesi Yo makabo oyo na motema malamu.
18 Oh Yawe, Nzambe ya Abrayami, Izaki mpe Isalaele, batata na biso,
batela makanisi oyo kati na mitema ya bato na Yo mpo na libela
mpe sala ete mitema na bango ekangama na Yo.
19 Pesa na mwana na ngai ya mobali, Salomo, motema ya boyengebene
mpo na kobatela mitindo na Yo, malako na Yo mpe bikateli na Yo ;
mpo na kosala nyonso mpe kotonga Ndako
oyo nasaleli mabongisi oyo nyonso. »
20 Davidi alobaki na bato nyonso :
— Bopambola Yawe, Nzambe na bino !
Boye, bato nyonso bakumisaki Yawe, Nzambe ya bakoko na bango, bagumbamaki mpe bafukamaki liboso ya Yawe mpe ya mokonzi.
Bapakoli Salomo mafuta ya bokonzi
21 Mokolo oyo elandaki, babonzaki bambeka mpe bambeka ya kotumba epai na Yawe : bangombe ya mibali nkoto moko, bameme ya mibali nkoto moko mpe bana meme nkoto moko elongo na makabo ya masanga ya vino mpe makabo mosusu ebele, mpo na Isalaele mobimba. 22 Baliaki mpe bamelaki liboso ya Yawe na esengo na mokolo wana, mpe batatolaki mpo na mbala ya mibale ete Salomo, mwana mobali ya Davidi, azali mokonzi. Bapakolaki ye mafuta mpo ete azala mokonzi ; mpe Tsadoki, mpo ete azala Nganga-Nzambe. 23 Salomo avandaki na Kiti ya Bokonzi ya Yawe lokola mokonzi na esika ya Davidi, tata na ye. Apambolamaki mpe Isalaele mobimba etosaki ye. 24 Bakonzi nyonso, basoda ya mpiko mpe bana nyonso ya mibali ya mokonzi Davidi batosaki mokonzi Salomo. 25 Yawe atombolaki Salomo makasi liboso ya Isalaele mobimba, mpe apesaki ye lokumu ya bokonzi koleka bakonzi nyonso ya Isalaele oyo balekaki liboso na ye.
Kufa ya Davidi
(1Ba 2.10-12)
26 Davidi, mwana mobali ya Izayi, azalaki mokonzi ya Isalaele mobimba. 27 Davidi akonzaki Isalaele mibu tuku minei : mibu sambo na Ebron mpe mibu tuku misato na misato na Yelusalemi.
28 Akufaki na kimobange ya esengo. Atondisamaki na mibu ebele, na bozwi mpe na lokumu ; bongo Salomo, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
29 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Davidi, wuta na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya misala ya mosakoli Samuele, na buku ya misala ya mosakoli Natan mpe na buku ya misala ya mosakoli Gadi. 30 Kati na babuku ya misala yango, balobelaki mpe makambo nyonso ya bokonzi mpe ya makasi na ye, makambo nyonso oyo ekomelaki ye, Isalaele mpe mikili nyonso ya zingazinga.