2 Masolo ya Kala
LISOLO YA SALOMO, MOKONZI YA ISALAELE
1
Salomo asengi bwanya
Salomo, mwana mobali ya Davidi, alendisamaki makasi na bokonzi na ye, pamba te Yawe, Nzambe na ye, azalaki elongo na ye mpe akomisaki ye moto monene penza.
(1Ba 3.4-15)
Salomo abengisaki Isalaele mobimba : bakonzi ya bankoto ya basoda, bakonzi ya bankama ya basoda, basambisi, bakambi ya Isalaele mobimba mpe bakambi ya mabota. Bongo, Salomo elongo na lisanga mobimba bakendeki na esambelo ya likolo ya ngomba, na Gabaoni, pamba te Ndako ya kapo ya Bokutani ya Nzambe, oyo Moyize, mosali na Yawe, atelemisaki na esobe ezalaki kuna. Nzokande, Davidi amemaki Sanduku ya Nzambe, wuta na Kiriati-Yearimi kino na esika oyo abongisaki mpo na yango, pamba te atelemisaki mpo na yango Ndako ya kapo kati na Yelusalemi. Kasi etumbelo ya bronze oyo Betisaleyeli, mwana mobali ya Uri mpe koko ya Wuri, atongaki ezalaki liboso ya Mongombo. Ezalaki kuna nde Salomo elongo na lisanga mobimba balukaki Yawe.
Salomo akendeki na etumbelo ya bronze, liboso ya Yawe kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, mpe abonzaki kuna bambeka ya kotumba nkoto moko.
Na butu wana, Nzambe abimelaki Salomo mpe alobaki na ye :
— Senga Ngai nyonso oyo olingi ete napesa yo.
Salomo azongiselaki Nzambe :
— Otalisi bolamu monene epai ya Davidi, tata na ngai, mpe otie ngai mokonzi na esika na ye. Sik’oyo, oh Yawe Nzambe, tika ete elaka oyo opesaki epai ya Davidi, tata na ngai, ekokisama ! Pamba te ezali Yo nde otie ngai mokonzi ya bato oyo bazali ebele lokola putulu ya mabele. 10 Pesa ngai bwanya mpe boyebi mpo ete nakoka kotambolisa bato oyo. Pamba te, nani akolonga kokamba ebele ya bato na Yo oyo ?
11 Nzambe alobaki na Salomo :
— Lokola likambo oyo ezali posa ya motema na yo ; lokola osengi bozwi te, bomengo to lokumu te to mpe kufa ya banguna na yo te ; lokola osengi te bomoi molayi, kasi osengi bwanya mpe boyebi mpo na kotambolisa bato na Ngai, oyo natie yo mokonzi na bango, 12 bwanya mpe boyebi ekopesamela yo, mpe nakopesa yo lisusu bozwi, bomengo mpe lokumu oyo mokonzi moko te, liboso na yo, atikala kozwa, mpe mokonzi moko te, sima na yo, akotikala kozwa.
13 Bongo Salomo alongwaki na esambelo ya likolo ya ngomba, na Gabaoni epai wapi akendeki liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mpe azongaki na Yelusalemi. Mpe akomaki mokonzi ya Isalaele.
Bozwi ya Salomo
(1Ba 10.26-29; 2Ma 9.25-28)
14 Salomo asangisaki bashar mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda ; azalaki na bashar nkoto moko na nkama minei, mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda, nkoto zomi na mibale. Abombaki bango kati na bingumba epai wapi babombaka bashar, mpe na Yelusalemi epai wapi mokonzi azalaki kovanda. 15 Mokonzi asalaki ete wolo mpe palata ekoma ebele na Yelusalemi lokola mabanga, mpe banzete ya sedele ekoma ebele lokola banzete ya sikomori oyo ezali kati na mokili ya lubwaku. 16 Bampunda ya Salomo ezalaki kowuta na Ejipito mpe na engumba Kue. Bato ya mombongo ya mokonzi nde bazalaki kosomba yango kuna na engumba Kue. 17 Bazalaki kosomba na Ejipito shar moko na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, nkama motoba, mpe mpunda moko na motuya ya mbongo ya bibende, nkama moko na tuku mitano ; bazalaki mpe kosomba yango mpo na bakonzi nyonso ya bato ya Iti mpe ya Siri.
(1Ba 5.15-30; 7.13-51)
18 Salomo apesaki mitindo mpo na kotonga Tempelo ya Yawe mpe ndako ya mokonzi mpo na ye moko.